BARUCH
Chapter 4
Baru | LinVB | 4:1 | Bwanya bona bozali buku ya mibeko mya Nzambe, miye mizali mya seko. Oyo akomemya mibeko akozala na bomoi, oyo atosi mibeko te, akokufa. | |
Baru | LinVB | 4:2 | Bana ba Yakob, bozonga, bokangana na mibeko ; botambola o nzela ya mwinda mwa mibeko. | |
Baru | LinVB | 4:4 | Esengo na biso, bato ba Israel, mpo bayebisi biso maye makosepelisa Nzambe ! Bandeko baombo bazala na mpiko | |
Baru | LinVB | 4:6 | Batekaki bino na bikolo bisusu, kasi basilisi bino te. Awa boyokisaki Nzambe nkanda, bakabaki bino o maboko ma banguna. | |
Baru | LinVB | 4:8 | Bobosanaki Nzambe wa lobiko, oyo akoleisaka bino ! Boyokisaki Yeruzalem, mama wa bino, mawa ; | |
Baru | LinVB | 4:9 | amoni nkanda ya Nzambe ekweli bino mpe aleli boye : Bino baninga ba Sion, boyoka : Nzambe ayokisi ngai mawa mingi. | |
Baru | LinVB | 4:10 | Namoni bana babali na bana basi ba ngai bakei o boombo, Nzambe wa lobiko atindaki bango. | |
Baru | LinVB | 4:11 | Ngai nabokoloki bango na esengo enene ; bokei bwa bango boyokisi ngai mpasi na mawa. | |
Baru | LinVB | 4:12 | Moko te asepela na mpasi ya ngai, mwasi bozenge azangi mosalisi. Natikali ngai moko mpo ya masumu ma bana ba ngai ; mpamba te, baboyaki kotosa mibeko mya Nzambe. | |
Baru | LinVB | 4:13 | Bandimaki mitindo mya ye soki te, batambolaki nzela ya mitindo mya Nzambe te, balandaki nzela ya bosembo te. | |
Baru | LinVB | 4:14 | Bino bato bofandi pene na Sion, boyaka ! Bokanisa bana ba ngai, babali na basi, baye Nzambe wa lobiko atindaki o boombo. | |
Baru | LinVB | 4:15 | Atindelaki bango bato bautaki mosika, bato bakoyokaka nsoni te mpe bakolobaka lokota bango bayebi te, bato bakomemyaka bakolo te, bakoyokelaka ata bana bake mawa te. | |
Baru | LinVB | 4:16 | Bakendeki na bana babali ba bolingo ba mwasi bozenge, batikaki ye moko mosika na bana basi ba ye. | |
Baru | LinVB | 4:18 | Oyo atindelaki bino makambo mana ma mpasi, ye moto akobikisa bino o maboko ma banguna. | |
Baru | LinVB | 4:20 | Nasili natiki elamba ya ngai ya esengo, nalati ngoto ya bobondeli ; bomoi bwa ngai mobimba nakobelela Nzambe wa lobiko. | |
Baru | LinVB | 4:21 | Bana ba ngai, bolendisa mitema, bobelela Nzambe : Akolongola bino o minyoko mpe o maboko ma banguna ba bino ; | |
Baru | LinVB | 4:22 | zambi natii elikya libiki lya bino likouta na Nzambe wa lobiko, ye Mosantu akoyokisa ngai esengo enene : mosika te Nzambe wa lobiko, Mobikisi wa bino, akolakisa bino ngolu ya ye. | |
Baru | LinVB | 4:23 | Awa bokendeki, nalelaki mpe nayokaki mawa mingi, kasi mokolo Nzambe akozongisa bino epai ya ngai nakozala na esengo enene mikolo minso. | |
Baru | LinVB | 4:24 | Baninga ba Sion bazali komono bino o boombo sikawa, mosika te, bakomono ’te Nzambe akobikisa bino ; Nzambe wa lobiko akotinda libiki, likoyela bino na nkembo enene mpe na nguya ya Nzambe wa lobiko. | |
Baru | LinVB | 4:25 | Bana ba ngai, boikikiza nkanda ya Nzambe. Monguna anyokoli bino mingi, kasi bokomono ’te akosuka ; bokotia makolo o nkingo ya ye. | |
Baru | LinVB | 4:26 | Bana ba ngai ba bolingo bakendeki nzela ya mabaku, lokola etonga ya bibwele biye banguna babotoloki. | |
Baru | LinVB | 4:27 | Bana ba ngai, bolendisa mitema, bobelela Nzambe ; oyo ayokisi bino mpasi, akokanisa bino lisusu. | |
Baru | LinVB | 4:28 | Liboso bozalaki na makanisi ma kokima Nzambe ; bozongela ye mpe bokangana na ye makasi, | |
Baru | LinVB | 4:29 | zambi oyo atindeli bino mpasi ena enene akobikisa bino mpe akozongisela bino esengo ya seko. Makambo manso makobongo | |
Baru | LinVB | 4:32 | Mawa na bingumba biye esika bana ba yo bazalaki baombo ; mawa na engumba eye ekangaki bana ba yo ! | |
Baru | LinVB | 4:33 | Ata bango basepelaki mokolo okweyaki mpe obebaki, mokolo engumba ya bango ekobeba, bakoyoka mawa. | |