Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 4
Deut LinVB 4:1  Bato ba Israel, boyoka sikawa mibeko mpe mitindo nakopesa bino. Botosa myango mpo ’te bobika mpe bokoma bankolo ba mokili Yawe Nzambe wa bankoko ba bino akopesa bino.
Deut LinVB 4:2  Napesi bino mibeko ; bobakisa ata moko te, bolongola mpe moko te ; kasi botosa mibeko mya Yawe Nzambe wa bino, se lokola natindi myango.
Deut LinVB 4:3  Bomonoki na miso makambo Yawe asalaki o Bet-Peor. Bato banso balandaki Baal wa Peor, Yawe Nzambe wa bino alongolaki bango o kati ya bino.
Deut LinVB 4:4  Kasi bino bato botosaki Yawe Nzambe wa bino, banso bozali na bomoi lelo.
Deut LinVB 4:5  Na­lakisi bino mitindo mpe mibeko, lokola Yawe Nzambe wa ngai atindaki ngai mpo ’te botosa myango o mokili bokozwa sikawa.
Deut LinVB 4:6  Botosa mpe bolanda myango, bongo bato bamono ’te bozali bato ba bwanya mpe ba mayele. Soko bayoki mibeko mya bino, bakoloba : « Solo, ekolo eye eza­li ekolo ya bato ba mayele mpe ba bwanya ! »
Deut LinVB 4:7  Ya solo, epai wapi bakomono ekolo enene boye ezali na ba­nzambe se penepene na bango, lokola Nzambe wa biso azali penepene na biso mbala inso tobondeli ye ?
Deut LinVB 4:8  Wapi ekolo eye ezali na mibeko mpe na mitindo mya bosembo lokola miye ngai napesi bino lelo ?
Deut LinVB 4:9  Kasi bokeba : Mokolo moko te bo­bosana makambo manso bomonoki na miso. Bobomba mango o mitema mikolo minso kin’o liwa. Bolakisa mango na bana mpe na bankoko ba bino.
Deut LinVB 4:10  O mokolo bozalaki o ngo­mba Oreb o miso ma Yawe Nzambe wa bino, Yawe alobaki na ngai : « Sa­ngisa bato banso bayoka maloba ma ngai mpo ’te bayekola kobanga ngai bomoi bwa bango mobimba, balakisa mpe bana ba bango ’te babanga ngai. »
Deut LinVB 4:11  O mokolo mona bobelemeki mpe botelemeki o nse ya ngomba. Ngomba ezalaki na móto tee o likolo, mpe likolo liyindaki mpo ya ma­mpata manene mpe mpo ya milinga makasi.
Deut LinVB 4:12  Yawe alobaki ut’o móto mopelaki makasi. Bozalaki koyoka maloba ma ye, kasi bozalaki komono eloko te, boyokaki se lolaka.
Deut LinVB 4:13  Yawe ayebisaki bino bondeko alingaki kokata na bino, atindaki bino ’te bola­nda Mibeko zomi, miye akomaka o mabanga mabale.
Deut LinVB 4:14  Mpe Yawe ati­ndaki ngai ’te nalakisa bino mibeko na mimeseno bokolanda o mokili moye, esika bokokoto mpo ’te bokoma bankolo.
Deut LinVB 4:15  O mokolo Yawe alobaki na bino o ngomba Oreb ut’o móto mopelaki makasi, bomonoki elili mpenza ya moto te, bongo bokebaka
Deut LinVB 4:16  ’te bosala lisumu te na bosalaka ekeko elakisi ata nini, ekeko ya mobali to ya mwasi,
Deut LinVB 4:17  ekeko ya nyama ya mokili to ya ndeke ekopimbwaka o likolo,
Deut LinVB 4:18  ekeko ya nyama ekolandaka o nse, ekeko ya mbisi ezali o mai o nse ya mabelé.
Deut LinVB 4:19  Ekotombola bino miso mpo ya kotala mwese, sanza, minzoto to bikelamo binso bizali o likolo, bondima te kokumbamela mpe kokumisa bya­ngo. Bizali biloko Yawe Nzambe wa bino akabeli bato ba bikolo binso bya nse.
Deut LinVB 4:20  Kasi bino, Yawe akamataki bino mpe abimisaki bino o Ezipeti, etumbelo eye ya bonyangwisi ebende, mpo ’te bokoma ekolo ya ye, lokola bozali naino tee lelo.
Deut LinVB 4:21  Yawe asilikaki na ngai mpo ya bino ; alayaki ndai ’te ngai nakokatisa Yordane te mpo ya kokoto o mokili mwa esengo, moye Yawe Nzambe wa bino alingi kopesa bino sikawa.
Deut LinVB 4:22  Solo, ngai nakokufa se o mokili moye, mpe nakokatisa Yordane te. Kasi bino bokokatisa yango mpe bokozwa mokili mona mwa esengo.
Deut LinVB 4:23  Bokeba ’te bobosana bondeko te, boye Yawe Nzambe wa bino akataki na bino. Bosala ekeko to elili te ya biloko ata nini, biye Yawe Nzambe wa bino apekisi bino kosala byango,
Deut LinVB 4:24  zambi Yawe Nzambe wa bino azali móto mokosilisaka binso, azali Nzambe wa zuwa.
Deut LinVB 4:25  Mokolo bosili kobota bana na bankoko mpe bosili kokoma babange o mokili mona, soko bokomi kosala masumu mpe bosali ekeko to elili ya eloko ata nini, soko bosali mabe o miso ma Yawe Nzambe wa bino, mpe bongo boyokisi ye nka­nda,
Deut LinVB 4:26  ba-likolo na ba-nse bazali banzeneneke ba ngai, bokolimwa noki o mokili esika bokokoto nsima ya bokatisi Yordane. Bokoumela kuna mi­kolo mingi te, zambi bokokufa bino banso.
Deut LinVB 4:27  Yawe akopanza bino o bikolo binso mpe bokotikala se mwa ndambo ya bato esika Yawe akoka­mba bino o bikolo bisusu.
Deut LinVB 4:28  Kuna bokokumisa bikeko bya banzambe ba lokuta, bisalemi na maboko ma bato, bikeko bya nzete to bya mabanga, bikoki komono mpe koyoka te, kolia mpe kozala na mayoki te.
Deut LinVB 4:29  O ekolo ena bokoluka lisusu Yawe Nzambe wa bino ; bokokutana na ye soko boluki ye na motema mpe na molimo monso.
Deut LinVB 4:30  O ntango bokoyoka mpasi, mpe maloba maye manso makosalema, o mikolo mikoya bokozongela Nzambe wa bino, mpe bokoyoka lolaka la ye,
Deut LinVB 4:31  mpo Yawe Nza­mbe wa bino azali Nzambe wa ngolu ; akotika bino te, akoboma bino mpe te. Akobosana bondeko te, boye akataki na bankoko ba bino na bolayi ndai, akowangana yango mokolo moko te.
Deut LinVB 4:32  Bomituna naino soko moto moko alobaki makambo maye manene o mibu mileka kala, banda mokolo Nzambe akelaki bato o mokili, banda nsuka yoko tee nsuka esusu ya likolo liloba lya motindo moye liyokanaki liboso ?
Deut LinVB 4:33  Epai wapi bato bayokaki lolaka la Nzambe wa solo loutaki o móto, lokola bino boyokaki ntango alobaki na bino, mpe bokufaki te ?
Deut LinVB 4:34  Nzambe mosusu azali oyo ayaki ko­pono ekolo o ekolo esusu lokola Yawe Nzambe wa bino asalaki ? Na bokasi bwa loboko la ye amekaki ba-Ezipeti na minyoko, na bilembo, na makamwisi mpe na bitumba ; o miso ma bino asalaki maye manso mpo ya bino.
Deut LinVB 4:35  Alakisaki bino makambo mana ma­nso mpo boyeba ’te Yawe azali Nzambe wa solo, mpe mosusu azali te.
Deut LinVB 4:36  Ut’o likolo ayokisaki lolaka la ye mpo ateya bino ; mpe o nse amonisaki bino móto monene mpe ut’o móto moye boyokaki maloba ma ye.
Deut LinVB 4:37  Alingaki bankoko ba bino, mpe nsima ya bango aponoki bana ba bango, yango wana abimisaki bino o mokili mwa Ezipeti, bongo alakisaki ’te azali o kati ya bino na nguya enene.
Deut LinVB 4:38  Abenganaki bikolo bya bato baleki bino na boike mpe na bokasi ; akotisaki bino o mokili mwa bango, akomisaki bino bankolo ba mokili mona tee lelo.
Deut LinVB 4:39  Bongo lelo, boyeba mpe boma-nyola o mitema ’te Nzambe wa bino azali Nzambe o likolo kuna mosika mpe awa o nse ; azali ye moko, mosusu azali te.
Deut LinVB 4:40  Botosa mibeko mpe mitindo mya ye nalakisi bino lelo mpo ’te bino na bana ba bino bozwa bolamu mpe bomoi bolai awa o mokili moye Yawe Nzambe wa bino apesi bino seko.
Deut LinVB 4:41  Na nsima Moze aponi naino mbo­ka isato o ngambo ya Yordane epai ya Esti,
Deut LinVB 4:42  esika moto akoki kokima soko abomi moninga, kasi na nko te, mpe soko ayini ye mpenza te ; akoki kokima o mboka ena mpo ’te abikisa bomoi bwa ye.
Deut LinVB 4:43  Mboka ina izali : Beser o eliki epai ya ngomba mpo ya ba-Ruben ; Ramot o mokili mwa Galaad mpo ya ba-Gad ; Golan o mokili mwa Basan mpo ya ba-Manase.
Deut LinVB 4:45  Mizali mitindo, bitinda na mimeseno Moze apesi bana ba Israel o ntango balongwaki o Ezipeti,
Deut LinVB 4:46  kuna o ngambo ya Yordane, o lobwaku penepene na Bet-Peor, o ekolo ya Sikon, mokonzi wa ba-Amor, oyo afa­ndaki o Kesbon. Moze na bana ba Israel balongaki ye o etumba o eleko balongwaki o Ezipeti.
Deut LinVB 4:47  Babotoloki ekolo ya ye mpe ekolo ya Og, mokonzi wa Basan ; bango babale bazalaki bakonzi ba Amor kuna o nga­mbo ya Yordane epai ya Esti,
Deut LinVB 4:48  banda Aroer pene na lobwaku Arnon tee ngomba Sion (Eromon) ;
Deut LinVB 4:49  babotoloki Araba mobimba o ngambo ya Yordane epai ya Esti tee mbu ya Araba, o nse ya ngomba Pisga.