Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 14
Ezek LinVB 14:1  Mokolo bakolo basusu ba Israel bayei epai ya ngai, bamifandisi o boso bwa ngai,
Ezek LinVB 14:3  Mwana wa moto, bango batii mitema na banzambe ba lokuta, batii bikeko o boso bwa bango, biye bikokweisa bango o ma­sumu. Bongo nálingisa bango ’te baya kotuna ngai ?
Ezek LinVB 14:4  Bongo loba na bango boye : Mokonzi Yawe alobi : Moto ata nani wa ekolo ya Israel, soko andimi banzambe ba lokuta o motema mwa ye, soko atii o boso bwa ye bikeko biye bikokweisa ye, mpe na nsima ayei epai ya profeta, ngai moto nakopesa ye eyano eko­ki na ebele ya bikeko bya ye ;
Ezek LinVB 14:5  nakozokisa bongo mitema mya bato ba Israel bakimaki ngai mpo ya bikeko bya bango.
Ezek LinVB 14:6  Bongo loba na bato ba Israel boye : Boyoka maloba ma Mokonzi Yawe : Bozonga, botika banzambe ba lokuta mpe makambo ma bino mansomo.
Ezek LinVB 14:7  Moto nyonso wa libota lya Israel mpe mompaya nyonso afandi o ekolo ya Israel, soko atiki ngai mpe andimi banzambe ba lokuta o motema mwa ye, soko atii bikeko o boso bwa ye, biye biko­kweisa ye o masumu, mpe soko na nsima akei kotuna profeta, ngaimei Yawe nakopesa ye eyano.
Ezek LinVB 14:8  Nakotala moto ona na miso mabe ; nakokomisa ye ndakisa mpe lisapo o miso ma bato, mpe nakolongola ye o libota lya bato ba ngai. Bokoyeba bongo ’te ngai nazali Yawe.
Ezek LinVB 14:9  Soko profeta andimi kokosama mpe aba­ndi kosakola, yeba ’te ngai moko Yawe nalingaki bongo. Nakotu­mbo­la ye, nakolongola ye o libota lya ekolo ya ngai Israel.
Ezek LinVB 14:10  Bakomeme mokumba mwa mabe ma ba­ngo, ézala profeta, ézala moto oyo akei kotuna ye.
Ezek LinVB 14:11  Bongo bato ba Israel bákima ngai lisusu te, bakomibebisa na masumu ma bango lisusu te. Bakozala bato ba ngai, mpe ngai nakozala Nzambe wa bango. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 14:13  Mwana wa moto, soko bato ba ekolo yoko basali masumu mpe baboyi ngai, nakopesa bango etumbu : nakobotolo bango biloko bya kolia, mpe nakotindela bango nzala enene. Nakosilisa bato mpe nyama inso ya ekolo ena.
Ezek LinVB 14:14  Soko nakuti o ekolo ena babali baye basato : Nowe, Daniel na Yob, bobele bato baye bakobika mpo ya bosembo bwa bango. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 14:15  Soko nati­ndi nyama ya zamba o ekolo ena mpo ’te bato bazala wana lisusu te, mpe moto moko aleka wana lisusu te mpo ya bobangi nyama ;
Ezek LinVB 14:16  ata babali baye basato bazali o ekolo ena, o nkombo ya ngai nalobi ’te bakokoka kobikisa bana babali na bana basi ba bango te, bobele bato baye bakobika ; ekolo ena ekokoma eliki. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 14:17  Soko natindi bato babimela ekolo ena na mimpanga mpe nalobi na bango : Mopanga mobete ekolo eye, bato na mpe nyama basila ;
Ezek LinVB 14:18  soko nakuti babali baye basato o ekolo ena, o nkombo ya bomoi bwa ngai nalobi ’te bakokoka kobikisa bana babali na bana basi ba bango te, bobele bato baye bakobika. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 14:19  Soko natindi bokono bobe o ekolo ena, to nabomi nyama na bato mpo ya kosilisa nka­nda ya ngai,
Ezek LinVB 14:20  mpe nakuti Nowe, Daniel na Yob o ekolo ena, o nko­mbo ya bomoi bwa ngai nalobi ’te babakoka kobikisa bana babali na bana basi ba bango te, bobele bato baye bakobika mpo ya bose­mbo bwa bango. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 14:21  Mokonzi Yawe alobi : Ata nati­ndeli Yeruzalem bitumbu binene bi­nei : etumbu ya mopanga, nzala ekasi, nyama ibe na bokono bobe, mpo ’te nasilisa bato na nyama,
Ezek LinVB 14:22  mpe mwa ndambo ya babali na basi bakotikala, bakobimisa bango o engu­mba mpe bakoya epai ya bino ; bokomono ezalela mpe misala mya bango. Bokozala na mawa lisusu te mpo ya malozi maye nati­ndelaki Yeruzalem, to mpo ya mpa­si nayokisaki bango.
Ezek LinVB 14:23  Bango bakobondo bino, zambi bakomono bizalela mpe misala mya bango. Bokoyeba ’te makambo manso nasalaki Yeruzalem, nasalaki mango se na ntina. Elobi bongo Mokonzi Yawe.