Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 38
Ezek LinVB 38:2  Mwana wa moto, tala epai ya Gog o mokili mwa Magog, nkumu monene wa Mesek na Tubal ; sakola mpo ya ye.
Ezek LinVB 38:3  Okoloba : Mokonzi Yawe alobi boye : Nakoyela yo etumba, yo Gog, nku­mu monene wa Mesek na Tubal.
Ezek LinVB 38:4  Nakokanga yo, nakotia bibe­nde o mbanga ya yo mpe nakobimisa yo elongo na basoda ba yo banso, ná farasa ná batambwisi, banso na bibuneli ebele, limpinga la yo linene lya basoda, baye bazali na nguba inene mpe ike, mpe bayebi kobu­nda na mopanga.
Ezek LinVB 38:5  Basoda ba Persi, Kus na Put bakozala na yo, banso nguba o maboko mpe enkoti ya bibende o motó.
Ezek LinVB 38:6  Gomer na basoda ba ye banso, Bet-Togarma o nsuka ya Nordi, na basoda ba ye banso, bato ba bikolo mingi bakozala na yo.
Ezek LinVB 38:7  Omilengele malamu, elongo na baye banso bazali na yo ; zala mokambi wa bango.
Ezek LinVB 38:8  Nsima ya mikolo mingi bakoti­nda yo etinda. Nsima ya mibu miike okoya kobunda na bato ba ekolo eye bakufaki na mopanga te, basa­ngani lisusu o ntei ya bikolo ebele o ngomba ya Israel iye ibeba. Ut’o bakabwani na bikolo bisusu bakomi na kimia.
Ezek LinVB 38:9  Yo okokende kobu­nda na bango ; okoya lokola mo­mpe­pe mwa ekumbaki, yo na basoda ba yo, elongo na bato ba bikolo mingi, okokitela bango lokola limpata.
Ezek LinVB 38:10  Mokonzi Yawe alobi boye : Mokolo mona okozala na makanisi mingi o motema mpe okokana mikano mibe,
Ezek LinVB 38:11  okomilobela : « Nakokende kobunda na ekolo ya bato bakoki komibatela te, baye bazali na matata te, bato bafandi kimia. Mboka inso ya bango izali na lopa­ngo te, na bizibeli te, na bikangeli mpe te. »
Ezek LinVB 38:12  Okobotolo bango biloko ; okokende kosala bato mabe mpe koyiba biloko bya bato ba ekolo eye bazongaki o mboka ibebaki, balongwaki o ntei ya bikolo bisusu, mpe bakomipesaka na bobokoli bibwele mpe na mombongo. Bazali o mokili moye mozali o katikati ya nse mobimba.
Ezek LinVB 38:13  Bato ba Saba na Dedan, bato ba mombongo ba Tarsis na bakonzi ba bango ba­nso bakotuna yo : « Oyei kobotolo biloko ? Osangisi bato ba yo nde mpo ya koyiba mpe kokamata palata na wolo, bibwele na biloko bisusu, mpo okoma bongo na nkita enene ? »
Ezek LinVB 38:14  Yango wana, mwana wa moto, sakola makambo, okoloba na Gog : Mokonzi Yawe alobi boye : Mokolo bato ba ekolo ya ngai Israel ba­kofa­nda kimia o mokili mwa ba­ngo, yo okobimela bango, solo ?
Ezek LinVB 38:15  Okolo­ngwa o mokili mwa Nordi mosika elongo na bato ba bikolo ebele, banso bakotambwisa farasa, limpinga linene lya basoda.
Ezek LinVB 38:16  Okoya kobunda na bato ba ngai ba-Israel mpe okokitela bango lokola limpata lizipi mokili. O mikolo mya nsuka nakobenga yo okende kobundisa mokili mwa ngai mpo ’te, na maboko ma yo, Gog, nalakisa bosantu bwa ngai o miso ma bato ba bikolo bisusu ; bongo bango banso bayeba ngai.
Ezek LinVB 38:17  Mokonzi Yawe alobi boye : Awa nalobaka kala na monoko mwa basaleli ba ngai baprofeta ba Israel, nalobaki o mikolo mina ’te okobimisela bango etumba.
Ezek LinVB 38:18  Mokolo Gog akoya o mokili mwa Israel, elobi bongo Mokonzi Yawe, nakoyoka nkanda enene. Na nkele,
Ezek LinVB 38:19  na zuwa lya ngai, na nkanda enene nalobi : Nalayi ndai ’te mokolo mona mokili mokoningana makasi o Israel.
Ezek LinVB 38:20  Mbisi ya mai, ndeke ya likolo, nyama inso ya zamba, nyama inso ikolandaka o mabelé, mpe bato banso bakonyataka mabelé bakolenge o miso ma ngai. Ngomba iko­kweya, mabanga makopa­swana, bifelo binso bikobukana.
Ezek LinVB 38:21  O ngomba ya ngai inso nakobimisa mimpanga mpo ya kobundisa ye. Elobi bongo Mokonzi Yawe. Ndeko na ndeko bakobomana na mopanga.
Ezek LinVB 38:22  Nakotumbola ye : Nakotindela ye bokono bobe na mpe bitumba. Mbula enene ekonokela ye na basoda ba ye na mpe bato ba bikolo mingi bayokani na ye, mbula ya matandala, mbula ya móto mokozikisa.
Ezek LinVB 38:23  Nakolakisa bonene mpe bosantu bwa ngai. Nakomilakisa o miso ma bato ba bikolo biike ; bo­ngo bakoyeba ’te ngai nazali Yawe.