I CORINTHIANS
Chapter 14
I Co | LinVB | 14:1 | Bólukaka na makasi bolingi, mpé bótía mitéma na makabo ma Elímo ; libosó mpenzá bóluka likabo lya koloba maloba ma Nzámbe ; | |
I Co | LinVB | 14:2 | zambí moto akolobaka nkóta iye yě mǒkó ayébí té, azalí koloba na bato té, kasi na Nzámbe. Na ngúyá ya Elímo azalí koloba maloba mabómbámí, moto mǒkó té akoyóka ntína ya maloba ma yě. | |
I Co | LinVB | 14:3 | Kasi moto asakólí maloba ma Nzámbe, azalí koloba na bato mpô ya kokólisa boyambi bwa bangó, koléndisa mpé kobóndo bangó. | |
I Co | LinVB | 14:4 | Moto azalí koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té, azalí kokólisa boyambi bwa yě mǒkó, kasi moto azalí koloba maloba ma Nzámbe azalí kokólisa boyambi bwa lingómbá lya bakrístu. | |
I Co | LinVB | 14:5 | Nalingí ’te bínó bánso bókoka koloba nkóta iye bínó mǒkó boyébí té, kasi elekí malámu sókó bokokí kosakola maloba ma Nzámbe, mpô moto asakólí maloba ma Nzámbe alekí moto ayébí koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té ; kasi ezalí bôngó té sókó óyo wa bábalé ayébí mpé kolimbola maloba ma yě, mpô ya koléndisa báníngá. | |
I Co | LinVB | 14:6 | Bandeko, sókó nayéí epái ya bínó koloba lokóta loye ngáí mǒkó nayébí té, nakokí kosálisa bínó na níni ? Na maloba ma ngáí nakosálisa bínó na elóko té sókó nakokí kolimbolela bínó mobómbamo mǒkó té, sókó nakokí kopésa mayéle ma sika té, sókó nayébísí bínó maloba ma Nzámbe té, tǒ napésí bínó litéya lyǒ kó té. | |
I Co | LinVB | 14:7 | Sé bôngó na mindúle, mpiólóló tǒ nzenze : sókó nóti ya mizíki iyókání malámu té, bóníbóní bakoyéba nzémbo níni bazalí koyemba ? | |
I Co | LinVB | 14:9 | Bínó sé bôngó : sókó na monoko mwa bínó bozalí koloba maloba mayébání té, bóníbóní bakoyéba ntína ya maloba ma bínó ? Bozalí koloba sé bilobáloba. | |
I Co | LinVB | 14:11 | Kasi sókó nayébí lokóta té loye moto mosúsu azalí koloba, akotála ngáí lokóla moútá ; ngáí mpé nakotála yě lokóla moútá. | |
I Co | LinVB | 14:12 | Bôngó, áwa bozalí koluka makabo ma Elímo, bóluka kozwa mangó míngi mpô ya koléndisa boyambi bwa bato bánso. | |
I Co | LinVB | 14:13 | Yangó wâná moto akolobaka nkóta iye yě mǒkó ayébí té asengélí kosámbela mpô ’te ákoka kolimbola yangó. | |
I Co | LinVB | 14:14 | Zambí sókó nasámbélí na nkóta iyébání té, motéma mwa ngáí mozalí kosámbela sôló, kasi mayéle ma ngáí té. | |
I Co | LinVB | 14:15 | Bôngó násála níni ? Nakosámbela na motéma, kasi na mayéle ma ngáí mpé. Nakoyémba nzémbo ya bokúmisi na motéma, sôló, kasi nakoyémba mpé na mayéle. | |
I Co | LinVB | 14:16 | Sókó osámbélí sé o nkóta iyébání té, bóníbóní moto óyo ayébí yangó té akokí koloba « Amen ! » ntángo osílísí losámbo la yǒ la botóndi ? Mpô ayébí té níni oútí koloba. | |
I Co | LinVB | 14:19 | ntángo tokosanganaka likita, nalingí sé koloba maloba mátáno maye mayébání mpô ya kotéya báníngá, kasi koloba maloba nkóto zómi mayébání té. | |
I Co | LinVB | 14:20 | Bandeko, na ezaléli bokoma lokóla bána baké té ; bozala lokóla bána baké o mabé bokosálaka, kasi na makanisi ma bínó bólakisa ’te bozalí bakóló. | |
I Co | LinVB | 14:21 | Ekomámí o Mobéko ’te : Mokonzi alobí : Nakoloba na bato ba ekólo eye na monoko mwa bato bakolobaka nkóta ya baútá, mpé atâ bôngó bakoyóka ngáí té. | |
I Co | LinVB | 14:22 | Bôngó, koloba nkóta iyébání té ezalí elembo té o míso ma bayambi, kasi o míso ma baye bayambí té ; kosakola maloba ma Nzámbe ezalí elembo té o míso ma bato bayambí té, kasi o míso ma baye bayambí. | |
I Co | LinVB | 14:23 | Bôngó, ntángo bakrístu míngi basangání mpé bato bánso babandí koloba nkóta iyébání té, sókó bato bayébí makambo mâná té tǒ baye bayambí té bayíngélí o likita, bakoloba té ’te bobélí ligbómá ? | |
I Co | LinVB | 14:24 | Kasi sókó moto ayambí té tǒ óyo ayébí makambo mâná té ayíngélí ntángo bánso bazalí kosakola maloba ma Nzámbe, bánso bakopálela mpé bakosámbisa yě. | |
I Co | LinVB | 14:25 | Makambo mabómbámí o motéma mwa yě makoyébana, bôngó akokitisa elongi o nsé, akokúmisa Nzámbe mpé akosakola ’te Nzámbe azalí sôló o ntéi ya bínó. | |
I Co | LinVB | 14:26 | Bôngó bandeko, tóloba níni ? Ntángo bokosanganaka, mǒkó akoyémba nzémbo ya bokúmisi, mosúsu akopésa litéya, mosúsu akolimbola mobómbamo, mosúsu akoloba lokóta loyébání té, mosúsu akolimbola langó : kasi bósálaka ’te mánso máléndisa boyambi bwa bínó. | |
I Co | LinVB | 14:27 | Soko moto akoloba nkóta iyébání té na bato bázala bábalé tǒ básáto ; báloba moto na moto na ngala ya yě, mpé moto akolimbola maloba mâná ázánga té. | |
I Co | LinVB | 14:28 | Sókó moto asengélí kolimbola mangó azalí té, bánso basangání likita bátíka koloba ; moto na moto ámílobela o motéma mpé áloba na Nzámbe. | |
I Co | LinVB | 14:29 | Baye bakosakola maloba ma Nzámbe bázala sé bábalé tǒ básáto, basúsu bátála sókó balobí malámu. | |
I Co | LinVB | 14:30 | Sókó moto mosúsu óyo afándí naíno abandí koyébisa likambo libómbámí, moto óyo azalákí koloba ákanga monoko. | |
I Co | LinVB | 14:31 | Bínó bánso bokokí kosakola maloba ma Nzámbe, kasi moto na moto na ngala ya yě, bánso bázwa bôngó matéya mpé moléndé. | |
I Co | LinVB | 14:33 | mpô Nzámbe azalí Nzámbe wa mobúlú té, kasi wa bobóto. Sé lokóla ekosálemaka o masangá mánso ma bakrístu, | |
I Co | LinVB | 14:34 | básí basengélí kokanga monoko o makita ma bínó, zambí bazwí ndingisa ya koloba té ; bázala sé na botósi lokóla ekomámí o Mobéko mwa Móze. | |
I Co | LinVB | 14:35 | Sókó balingí koyóka ndimbola ya likambo lyǒ kó, bátúna babáli ba bangó o ndáko, mpô ebongí té ’te mwásí áloba o esíká bato bánso basangání. | |
I Co | LinVB | 14:37 | Sókó moto akanísí ’te akokí kosakola maloba ma Nzámbe tǒ Elímo akitélí yě, ándima ’te maye nakomélí bínó mazalí mobéko mwa Nzámbe. | |
I Co | LinVB | 14:39 | Bôngó, bandeko, bólukaka likabo lya kosakola maloba ma Nzámbe, mpé baye bakolobaka nkóta iyébání té, bópekisa bangó té. | |