I KINGS
Chapter 15
I Ki | LinVB | 15:1 | O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa Yeroboam, mwana wa Nebat, Abiam akomi mokonzi wa Yuda. | |
I Ki | LinVB | 15:3 | Asali se masumu lokola tata wa ye liboso lya ye ; apesi motema mobimba na Yawe Nzambe wa ye te lokola nkoko wa ye Davidi asalaki. | |
I Ki | LinVB | 15:4 | Nzokande mpo ya Davidi, Yawe Nzambe wa ye apesi ye mwinda o Yeruzalem, abateli mwana mobali mpo ya bolamu bwa Yeruzalem. | |
I Ki | LinVB | 15:5 | Ya solo, Davidi asalaki malamu o miso ma Yawe mpe aboyaki etinda ya Yawe soki te, bomoi bwa ye mobimba, tika se likambo lya mo-Iti Uria. | |
I Ki | LinVB | 15:7 | Makambo masusu ma Abiam, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda. Bitumba bizalaki mpe kati ya Abiam na Yeroboam. | |
I Ki | LinVB | 15:8 | Abiam akei kokutana na bankoko ba ye, bakundi ye o Engumba ya Davidi. Mwana wa ye Asa akitani ye. | |
I Ki | LinVB | 15:10 | Ayangeli ekolo mibu ntuku inei na moko o Yeruzalem. Nkombo ya nkoko wa ye Maaka, mwana wa Absalom. | |
I Ki | LinVB | 15:12 | Abengani o ekolo ya ye bato bakosalaka bosoni o bisika bisantu mpe abomi bikeko binso bya banzambe basusu, biye batata ba ye basalaki. | |
I Ki | LinVB | 15:13 | Abotoli nkoko wa ye Maaka nkombo ya lokumu la Mama Mokonzi, mpo asalelaki Asera ekeko ya nsomo. Asa abuki ekeko eye ya nsomo mpe atumbi yango o lobwaku la Kedron. | |
I Ki | LinVB | 15:14 | Ata bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufaki te, Asa apesi motema mwa ye na Yawe bomoi bwa ye mobimba. | |
I Ki | LinVB | 15:15 | Akotisi o Tempelo ya Yawe biloko binso tata wa ye abonzelaki Yawe na mpe mabonza ma ye moko : palata, wolo na biloko bisusu. | |
I Ki | LinVB | 15:17 | Basa, mokonzi wa Israel, akei kobundisa Yuda mpe alendisi lopango zongazonga na Rama mpo ’te akangela Asa, mokonzi wa Yuda, nzela. | |
I Ki | LinVB | 15:18 | Asa akamati palata na wolo inso izalaki o ebombelo ya Tempelo ya Yawe na biloko binso bya motuya bya ndako ya mokonzi. Apesi yango o maboko ma basaleli ba ye ; atindi bango epai ya Ben-Adad, mwana wa Tibramon, nkoko wa Kezion, mokonzi wa Aram, oyo afandi o Damasko, na maloba maye : | |
I Ki | LinVB | 15:19 | « Bondeko bozali kati ya biso na yo, ebongi toyokana lokola batata ba biso bayokanaki. Nakotindela yo palata na wolo. Yango wana oboma bondeko okataki na Basa, mokonzi wa Israel, mpo atika kobundisa ngai. » | |
I Ki | LinVB | 15:20 | Ben-Adad andimeli mokonzi Asa mpe atindi bakomanda ba basoda ba ye bakende kobunda na mboka ya Israel. Abotoli Iyon, Dan, Abel-Bet-Maaka, mokili mobimba mwa Kinerot mpe mokili mobimba mwa Neftali. | |
I Ki | LinVB | 15:22 | Mokonzi Asa abengi bato banso ba Yuda, moto moko te akokaki kozanga. Balongoli mabanga na mabaya manso, maye Basa azalaki kotonga zongazonga na Rama. Mokonzi Asa alendisi na mango lopango o Geba o mokili mwa Benyamin mpe o Mispa. | |
I Ki | LinVB | 15:23 | Makambo masusu ma Asa, mpiko ya ye mpe mboka atongaki, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda. Ntango akomi mobange, makolo ma ye mabandi kobele. | |
I Ki | LinVB | 15:24 | Asa akei kokutana na bankoko ba ye ; bakundi ye o Engumba ya Davidi, nkoko wa ye. Mwana wa ye Yozafat akitani ye. | |
I Ki | LinVB | 15:25 | Nadab, mwana wa Yeroboam, akomi mokonzi wa Israel o mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Asa o Yuda ; ayangeli ekolo Israel mibu mibale. | |
I Ki | LinVB | 15:26 | Asali mabe o miso ma Yawe, alandi ezalela ya tata wa ye mpe asali masumu maye tata wa ye alakisaki bato ba Israel. | |
I Ki | LinVB | 15:27 | Basa, mwana wa Akia, wa libota lya Izakar, atomboki na Nadab ; abomi ye ntango ye na bato banso ba Israel bazalaki kozinga Gibeton, mboka ya ba-Filisti. | |
I Ki | LinVB | 15:28 | Basa abomi Nadab o mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, mpe bongo akomi koyangela ekolo o esika ya ye. | |
I Ki | LinVB | 15:29 | Ekomi ye mokonzi, abomi bato banso ba libota lya Yeroboam, ayokeli moto moko mawa te, asilisi koboma bango banso se lokola Yawe alobaki na monoko mwa mosaleli wa ye Akia wa Silo, | |
I Ki | LinVB | 15:30 | zambi Yeroboam asalaki masumu mingi, abendaki ba-Israel o nzela ya masumu mpe ayokisaki Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene. | |
I Ki | LinVB | 15:31 | Makambo masusu ma Nadab, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel. | |
I Ki | LinVB | 15:33 | O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Basa, mwana wa Akia, akomi mokonzi wa Israel o Tirsa ; aumeli na bokonzi mibu ntuku ibale na minei. | |