I SAMUEL
Chapter 23
I Sa | LinVB | 23:1 | Bayebisi Davidi nsango eye : « Ba-Filisti bazali kobunda na bato ba Keila, bazali koyiba mbuma o bitutelo. » | |
I Sa | LinVB | 23:2 | Davidi atuni Yawe : « Nakende kobunda na ba-Filisti ? » Yawe azongisi : « Kende kobunda na ba-Filisti mpe bikisa bato ba Keila. » | |
I Sa | LinVB | 23:3 | Bato ba Davidi balobi na ye : « Awa o Yuda tozali kobanga, ekosuka boni na biso soko tokei kobunda na ba-Filisti o Keila ? » | |
I Sa | LinVB | 23:4 | Davidi atuni Yawe lisusu mpe Yawe ayanoli : « Kende o Keila, nakokaba ba-Filisti o maboko ma yo. » | |
I Sa | LinVB | 23:5 | Davidi akei o Keila elongo na bato ba ye, abundisi ba-Filisti, abotoli bango bibwele mpe anyati bango. Davidi abikisi bongo bato banso ba Keila. | |
I Sa | LinVB | 23:7 | Bayebisi Saul ’te Davidi ayingelaki o Keila. Saul alobi : « Nzambe akabi ye o maboko ma ngai, zambi akoti o motambo awa ayingeli o mboka ekangemi na bizibeli mpe na mafungola. » | |
I Sa | LinVB | 23:9 | Eyoki Davidi ’te Saul akani kosala ye mabe, alobi na nganga Nzambe Ebiatar : « Yaka na efod. » | |
I Sa | LinVB | 23:10 | Davidi abondeli : « E Yawe, Nzambe wa Israel, ngai mosaleli wa yo nayokaki ’te Saul alingi kokoma o Keila mpo ’te abebisa mboka mpo ya ngai. | |
I Sa | LinVB | 23:11 | Bato ba Keila bakokaba ngai o maboko ma ye te ? Saul akoya awa solo ? E Yawe, Nzambe wa Israel, yanola ngai, mosaleli wa yo ! » Yawe azongisi : « Akoya. » | |
I Sa | LinVB | 23:12 | Davidi atuni lisusu : « Bato bakokaba ngai na bato ba ngai o maboko ma Saul ? » Yawe azongisi : « Bakokaba bino o maboko ma ye. » | |
I Sa | LinVB | 23:13 | Yango wana Davidi elongo na bato ba ye soki nkama motoba babimi o Keila mpe bakei koyengayenga epai na epai. Bayebisi Saul ’te Davidi alongwaki o Keila, bongo Saul akei kuna te. | |
I Sa | LinVB | 23:14 | Davidi akei kofanda o eliki, abombami o kati ya ngomba. Atikali o ngomba ya eliki ya Zif. Ntango ina inso Saul azalaki koluka ye, kasi Nzambe andimi ’te Davidi akweya o maboko ma ye te. | |
I Sa | LinVB | 23:15 | Davidi ayebi ’te Saul azalaki komilengele mpo ya koboma ye. Davidi azalaki o eliki ya Zif o mboka Orsa. | |
I Sa | LinVB | 23:16 | Yonatan, mwana wa Saul, akei mpe akomi epai ya Davidi o Orsa. Alendisi ye motema na bilako bya Nzambe. | |
I Sa | LinVB | 23:17 | Alobi na Davidi : « Obanga te, tata wa ngai Saul akoboma yo te. Yo moto okokoma mokonzi wa Israel ; ngai nakozala moto wa babale ; tata wa ngai Saul ayebi yango malamu. » | |
I Sa | LinVB | 23:18 | Bango babale bakati bondeko o miso ma Yawe. Davidi atikali o Orsa mpe Yonatan azongi epai ya ye. | |
I Sa | LinVB | 23:19 | Bato ba Zif bakei o Gibea epai ya Saul mpe balobi na ye : « Davidi abombami epai ya biso, azali o Orsa, o ngomba Akila, o ngele ya eliki. | |
I Sa | LinVB | 23:20 | Bongo, soko olingi kokende kuna, e mokonzi, kende sikawa, biso tokokaba ye o maboko ma yo mokonzi. » | |
I Sa | LinVB | 23:22 | Bokende, botuna malamu, bomeka koyeba esika nini abombami. Balobi na ngai ’te azali na mayele mingi. | |
I Sa | LinVB | 23:23 | Bokende kotala bisika binso akoki kobombama. Soko boyebi solo esika azali, bozonga koyebisa ngai mpe nakokende na bino elongo. Bongo soko azali o mokili moye, nakoluka ye o kati ya bituka binso bya Yuda. » | |
I Sa | LinVB | 23:24 | Bango basimbi nzela, bakei o Zif, Saul alandi bango. Davidi na bato ba ye bazalaki o eliki ya Maon, o lobwaku o Sudi ya eliki. | |
I Sa | LinVB | 23:25 | Saul na bato ba ye bakei koluka ye. Bayebisi Davidi mpe ye akiti o lobwaku la eliki ya Maon. Saul ayoki nsango mpe akei kolanda Davidi o eliki ya Maon. | |
I Sa | LinVB | 23:26 | Saul alandi mopanzi mwa ngomba, Davidi na bato ba ye bazalaki nsima ya ngomba. Davidi azalaki kotambola mbangu mpo ya kokima Saul. Saul na bato ba ye baluki kozinga Davidi na bato ba ye, etikali moke bakanga bango. | |
I Sa | LinVB | 23:27 | O ntango ena ntoma moko ayei koyebisa Saul : « Yaka noki, zambi ba-Filisti bayingeli o mboka mpo ya kobunda. » | |