ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 53
Isai | LinVB | 53:1 | Nani akokaki kondima maye bayebisi biso ’te Yawe alakisi bongo bokasi bwa loboko la ye ? | |
Isai | LinVB | 53:2 | Ye akoli lokola lititi mpamba o miso ma Nzambe lokola monkinga mwa nzete o mabelé makauki. Totali ye, azalaki na bonzenga te, azalaki te lokola tolingaki ’te azala. | |
Isai | LinVB | 53:3 | Bato banso batiolaki mpe baboyaki ye, akomaki moto wa mpasi, oyo ameseni na mawa, moto oyo bato balingi kotala te. Solo, tokinolaki ye mpe totalaki ye mpamba. | |
Isai | LinVB | 53:4 | Nzokande, amemeki mpasi ya biso, andimaki kokumba malozi ma biso. Biso tokanisaki ’te Nzambe apesi ye etumbu, ’te Nzambe abeti ye mpe asambwisi ye. | |
Isai | LinVB | 53:5 | Kasi batubolaki ye mpo ya masumu ma biso, banyataki ye mpo ya mabe ma biso. Andimaki etumbu mpo ya kopesa biso boboto, solo, tobiki mpo ya mpota ya ye. | |
Isai | LinVB | 53:6 | Biso banso tozalaki koyengayenga lokola mpata, moko moko azalaki koluka nzela ya ye moko mpe Yawe akumbisi ye mabe ma biso banso. | |
Isai | LinVB | 53:7 | Banyokoli ye, amikitisi, afungoli monoko soki te. Lokola mwana wa mpata eye bakokende koboma, lokola mpata o maboko ma baye bakokata yango nsuki, atikali nye, afungoli monoko te. | |
Isai | LinVB | 53:8 | Bakangi ye na makasi mpe basambisi ye, kasi nani apangani na ye ? Balongoli ye o mokili mwa bato, babomi ye mpo ya mabe ma bato ba ekolo ya ye. | |
Isai | LinVB | 53:9 | Bakundi ye o kati ya basumuki, lilita lya ye lizali o kati ya bato ba nkita, ata asali mabe mokolo moko te, mpe liloba lyoko lya lokuta libimaki o monoko mwa ye te. | |
Isai | LinVB | 53:10 | Yawe andimi ’te ayoka bolozi bwa nsomo ; soko amikabi bo libonza lya ko-zwa bolimbisi masumu, akozala tata wa libota linene, akoumela na bomoi mikolo miike, mpo ya ye maye Yawe alingi makosalema. | |
Isai | LinVB | 53:11 | Awa andimaki koyoka mpasi, akomono mwinda mpe akotonda na mwango. Na mpasi ya ye mosaleli semba wa ngai akokomisa bato baike basemba, mpo akomeme masumu ma bango. | |