Chapter 1
| Jona | LinVB | 1:2 | « Teleme, kende o engumba enene Ninive, mpe yebisa bango ’te nakomi koyeba mabe ma bango. » | |
| Jona | LinVB | 1:3 | Yona akei, kasi akani kokima epai ya Tarsis, mosika na Yawe. Akomi o Yope, akuti masuwa malingi makende o Tarsis elongo na baninga, mosika na Yawe. | |
| Jona | LinVB | 1:4 | Kasi Yawe atindi mompepe makasi likolo lya mbu, ekumbaki enene eningisi yango, masuwa malingi mabukana. | |
| Jona | LinVB | 1:5 | Bato ba masuwa babandi kobanga. Moto na moto abandi kobelela nkombo ya nzambe wa ye. Mpo ya kokutola bozito bwa masuwa, babwaki biloko biike o mai. Yona oyo akitaki kin’o nkobe, azalaki kolala wana mpe mpongi ekangaki ye. | |
| Jona | LinVB | 1:6 | Kapiteni wa masuwa abelemi na ye mpe alobi : « Boni, yo ozali kolala mpongi boye ? Teleme mpe belela Nzambe wa yo ! Mbele akokanisa biso mpe biso tokokufa te. » | |
| Jona | LinVB | 1:7 | Bato ba masuwa balobani : « Malamu tobete zeke, toyeba nani azali ntina ya likambo liye ! » Zeke babeti elakisi Yona. | |
| Jona | LinVB | 1:8 | Balobi na ye : « Yebisa biso nani azali ntina ya likambo liye. Outi wapi ? Ozali moto wa mokili kani ? Ekolo ya yo nani ? » | |
| Jona | LinVB | 1:9 | Yona azongiseli bango : « Nazali mo-Ebrei, nakosambelaka Yawe Nzambe wa likolo oyo akeli mbu enene na nse mobimba. » | |
| Jona | LinVB | 1:10 | Bato ba masuwa bayoki nsomo enene, batuni ye : « Osali nini ? », mpo bayoki o lisolo lya ye ’te azalaki kokima mosika na Yawe. | |
| Jona | LinVB | 1:11 | Batuni ye : « Tosala yo nini mpo mai matombokela biso lisusu te ? », mpamba te mai matombwami makasi mpenza. | |
| Jona | LinVB | 1:12 | Azongisi : « Bokanga ngai mpe bobwaka ngai o mai mpo mai motomboko lisusu te. Nayebi ’te mompepe mwa ekumbaki eye moyei se mpo ya ngai. » | |
| Jona | LinVB | 1:13 | Bato ba nkai baluki makasi mpo ya koseme o libongo, kasi se mpamba, mpo mbonge itombokeli bango, ileki iye ya liboso. | |
| Jona | LinVB | 1:14 | Bongo babondeli Yawe, balobi : « Mokonzi, tolingi kokufa mpo ya moto oyo te, tozwa likambo o miso ma yo te mpo ya makila ma moto azali na likambo te ; yo, Yawe, olingisaki likambo liye. » | |
| Jona | LinVB | 1:15 | Na nsima bakangi Yona mpe babwaki ye o mai. Na mbala yoko mbonge inso ikiti, mai makomi nye. | |
Chapter 2
| Jona | LinVB | 2:1 | Yawe atindi ebuki ya mbisi emele Yona. Yona atikali o libumu lya mbisi mikolo misato, butu moi. | |
| Jona | LinVB | 2:3 | alobi : O kati ya mpasi enene ya ngai nabeleli Yawe mpe andimeli ngai ; ut’o mboka ya bawa nabeleli mpe ayoki lolaka la ngai. | |
| Jona | LinVB | 2:4 | Obwaki ngai o mbu bozindo, mai mazingi ngai bipai binso, mbonge ya mai izindisi ngai. | |
| Jona | LinVB | 2:7 | Nakiti kin’o nse ya ngomba, nakiti o mboka ya bawa, bakangi bikangeli nsima ya ngai seko. E Yawe Nzambe wa ngai, bimisa ngai o libulu lya liwa, natikala na bomoi. | |
| Jona | LinVB | 2:8 | Awa mpema esileli ngai, nakanisi Yawe, mpe losambo la ngai lokomi epai ya yo, o Tempelo ya yo esantu. | |
| Jona | LinVB | 2:10 | Ngai nakoyembela yo nzembo ya kokumisa yo, nakobonzela yo mabonza, nakokokisa elako nalakelaki yo. Libiki likouta se epai ya Yawe. | |
Chapter 3
| Jona | LinVB | 3:3 | Yona atelemi, mbala eye akei o Ninive lokola Yawe alobaki na ye. Ninive ezalaki engumba enene mpenza, okotambola mikolo misato mpo ya kokatisa yango. | |
| Jona | LinVB | 3:4 | Yona ayingeli o engumba, atamboli mokolo mobimba ; asakoli boye : « Etikali mikolo ntuku inei babebisa Ninive. » | |
| Jona | LinVB | 3:5 | Bato ba Ninive bandimi Nzambe. Batindi ’te bato banso balala nzala, bakolo na bana, mpe balati ngoto. | |
| Jona | LinVB | 3:6 | Nsango ekomi o matoi ma mokonzi wa Ninive ; mokonzi alongwi o ngwende ya ye, atiki elamba ya lokumu, alati ngoto mpe akei kofanda o kati ya mputulu. | |
| Jona | LinVB | 3:7 | O Ninive mobimba bayebisi mobeko mwa mokonzi mpe mwa bankumu ba engumba ’te : « Ná bato ná nyama, ngombe na bibwele, banso balia eloko yoko te, bamele mpe mai te. | |
| Jona | LinVB | 3:8 | Banso balata ngoto mpe babondela Nzambe mingi mpenza. Moto na moto atika ezalela ebe ya ye mpe aboya mabe azalaki kosala. | |
| Jona | LinVB | 3:9 | Mbele Nzambe akotika mokano mwa ye, akoyoka mawa mpe akokitisa motema, bongo tokufa te. » | |
Chapter 4
| Jona | LinVB | 4:2 | Abondeli Yawe, alobi : « E Mokonzi, nakanisaki bobele bongo ntango nazalaki naino o mokili mwa ngai ! Yango wana nakendeki mbangu o Tarsis. Nayebaki ’te ozali Nzambe wa boboto mpe okoyokelaka bato mawa. Okosilikaka noki te, opusi bolingi mpe oyebi kolimbisa. | |
| Jona | LinVB | 4:3 | E Yawe, tika nakufa sikawa. O miso ma ngai bomoi bozali lisusu na ntina te, malamu nakufa. » | |
| Jona | LinVB | 4:5 | Yona abimi o engumba mpe akei kofanda o Esti ya engumba. Atongi esasa, amifandisi wana o molili. Bongo amono makambo nini makokwela engumba. | |
| Jona | LinVB | 4:6 | Yawe Nzambe akolisi lititi lyoko noki kin’o likolo lya motó mwa Yona, epesa ye mwa mpio mpo ’te ayoka malamu. Yona asepeli na lititi liye mingi. | |
| Jona | LinVB | 4:8 | Ebimi moi makasi, Nzambe atindi mompepe mouti o Esti, mopesi molunge mingi. Moi mobeti Yona o motó ; moyokisi ye mpasi mingi. Yona asengi Nzambe ’te akufa, alobi : « O miso ma ngai bomoi bozali lisusu na ntina te, malamu nakufa. » | |
| Jona | LinVB | 4:9 | Yawe atuni ye : « Awa osiliki mpo ya mwa lititi lina, okanisi ’te olongi ? » Yona ayanoli : « Nakoki kosilika mingi, ntina ezali. » | |
| Jona | LinVB | 4:10 | Kasi Yawe alobi na ye : « Yo ozali koyoka motema mpasi mpo ya mwa lititi liye. Oloni lyango te, okolisi lyango mpe te. Likolaki na butu moko, mpe likufi na butu bwa nsima. | |