Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 14
Luke LinVB 14:1  Mokolo mǒkó mwa sábato Yézu akeí kolia o ndáko ya mǒkó wa bakonzi ba ba-Farizéo. Bangó bazalákí kokénge yě.
Luke LinVB 14:2  Moto mǒkó azalákí kobéle bokono boye bokotóndisa nzóto na mái azalákí penepene na yě.
Luke LinVB 14:3  Yézu atúní batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo : « Bakokí kobíkisa moto o mokolo mwa sábato, tǒ té ? »
Luke LinVB 14:4  Kasi bangó balobí elóko té. Yézu asímbí moto wa bokono, abíkísí yě mpé atíkí yě ákende.
Luke LinVB 14:5  Na nsima alobí na bangó : « Náni o ntéi ya bínó, sókó mwána tǒ ngómbé ya yě ekwéí o libúlú akobimisa yě nokí té, atâ o mokolo mwa sábato ? »
Luke LinVB 14:7  Awa amóní bóníbóní bato ba­byángémí o limpáti bazalákí ko­pono bisíká bya lokúmu, alobí na bangó moúlání moye :
Luke LinVB 14:8  « Sókó babéngí yǒ o limpáti lya libála, óke­nde kofánda o esíká ya lokúmu té ; mbele moto abéngí yǒ, abéngí mpé moto mosúsu óyo alekí yǒ na lokúmu.
Luke LinVB 14:9  Bôngó moto abéngí bínó bábalé akoyâ koloba na yǒ : ‘Tíkélá yě esíká eye’, bôngó yǒ okoyóka nsóni mpé okokende kofánda o esíká ya nsúka.
Luke LinVB 14:10  Kasi sókó babéngí yǒ o limpáti, kendé kofánda o esíká ya nsúka ; bôngó ntángo moto abéngí yǒ akoyâ koloba na yǒ : ‘Ndeko, yáká kofánda o esíká ya libosó’, okozwa lokúmu o míso ma bato bánso babyángémí o limpáti.
Luke LinVB 14:11  Zambí moto akomítómbola, bakokitisa yě ; mpé moto akomíkitisa, bakotómbola yě. »
Luke LinVB 14:12  Na nsima alobí na moto abéngí yě o limpáti : « Sókó obéngí bato o limpáti na midí tǒ na mpókwa, óbênga báníngá, bandeko tǒ bato ba libótá lya yǒ té, bato ba nkita mpé té baye bafándí penepene na yǒ. Mbele bangó mpé bakobênga yǒ lokóla, mpé bakozóngisela yǒ maye osálákí bangó.
Luke LinVB 14:13  Kasi sókó olámbí limpáti, bêngá babóla, bato bakúfá makolo, baténgoli na bato ba lolandá.
Luke LinVB 14:14  Bôngó okozala na esengo, zambí bangó bakokí kozóngisela yǒ yangó té. Bakozóngisela yǒ yangó o mokolo bato ba bosémbo bakosékwa. »
Luke LinVB 14:15  Elobí yě bôngó, mǒkó wa baye bazalákí na yě o méza alobí na yě : « Esengo na moto akolía limpáti o Bokonzi bwa Nzámbe ! »
Luke LinVB 14:16  Yézu alobí na yě : « Moto mǒkó alámbí limpáti linéne mpé abéngí bato baíké.
Luke LinVB 14:17  Ekokí ntángo ya kolía, atíndí mosáleli wa yě áloba na bato ba­byángémí : ‘Yákáni, basílísí kolá­mba !’
Luke LinVB 14:18  Kasi bangó bánso babandí komílóngisa sé ndéngé yǒkó ’te bakokí koyâ té. Moto wa libosó alobí : ‘Nasómbí elanga, nalingí nákende kotála yangó ; nabóndélí yǒ, límbísá ngáí’.
Luke LinVB 14:19  Mosúsu alobí : ‘Nasómbí ngó­mbé zómi, nakeí komeka yangó ; nabóndélí yǒ, límbísá ngáí’.
Luke LinVB 14:20  Mosúsu alobí : ‘Nabálí bobélé sikáwa, yangó wâná nakokí koyâ té.’
Luke LinVB 14:21  Mosáleli azóngí mpé ayébísí mokonzi wa yě mangó. Mokonzi asilíkí, alobí na mosáleli : ‘Kendé nokí o zándo mpé o balabála ya mbóka : yáká kokótisa babóla na bato ba eléme, bato ba lolandá na baténgoli áwa.’
Luke LinVB 14:22  Mosáleli alobí : ‘Mokonzi, basálí lokóla otíndákí, kasi ndáko etóndí naíno té’.
Luke LinVB 14:23  Mokonzi alobí na mosáleli : ‘Kendé o balabála iké mpé o nzelá iké, kótísá bato na makási, bôngó ndáko ya ngáí étónda.
Luke LinVB 14:24  Nalobí na bínó : mǒkó té wa baye babyángémákí akolía limpáti lya ngáí’. »
Luke LinVB 14:25  Bato ebelé bazalákí kokende na yě nzelá yǒkó. Amíbóngólí epái ya bangó, alobí :
Luke LinVB 14:26  « Sókó moto ayéí epái ya ngáí, kasi aponí ngáí té libosó lya tatá, mamá, mwásí, bána na bandeko ba yě babáli na básí, atâ libosó lya bomoi bwa yě mǒkó, moto óyo akokí kozala moyékoli wa ngáí té.
Luke LinVB 14:27  Moto amemí kurúse ya yě té mpé alandí ngáí té, akokí kozala moyékoli wa ngáí té.
Luke LinVB 14:28  Náni o káti ya bínó sókó alingí kotónga linóngi, libosó akofánda té mpô ya koyéba mosolo bóní mosengélí na mosálá môná mpé mpô ya kotála sókó akokoka kosílisa mwa-ngó ?
Luke LinVB 14:29  Sókí té, áwa akosílisa kotía mabángá ma nsé, kasi akokí kosílisa mosálá té, bato bánso bakomóno bôngó bakoseke yě,
Luke LinVB 14:30  bakoloba : ‘Tálá moto abandákí kotónga linó­ngi, kasi akókí kosílisa lyangó té !’
Luke LinVB 14:31  Tǒ mokonzi wa ekólo, sókó alingí kobunda na mokonzi mosúsu, libo­só akofánda té mpô ya kotála sókó na basodá nkóto zómi akokí kobunda na mokonzi óyo azalí na basodá nkóto ntúkú íbalé ?
Luke LinVB 14:32  Sókó akokí té, akotíndela yě bantóma ntángo azalí naíno mosíká mpô ’te báyókana.
Luke LinVB 14:33  Sé bôngó : óyo o káti ya bínó abóyí bilóko bya yě bínso té, akokí kozala moyékoli wa ngáí té.
Luke LinVB 14:34  Móngwa mozalí elóko elámu, kasi sókó o móngwa bokénzú bosílí, bakokí kozóngisela mwangó bokénzú na níni ?
Luke LinVB 14:35  Yangó ezalí lisúsu na ntína té mpô ya mabelé tǒ mpô ya bipolú, bôngó bakobwáka yangó o libándá. Moto azalí na matói ma koyóka, áyóka ! »