Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next
Chapter 24
Numb LinVB 24:1  Balame amoni ’te Yawe alingi kobenisa Israel. Mbala eye aluki te bilembo biye bikolakisa makambo makoya nsima, kasi atali se eliki.
Numb LinVB 24:2  Atombola miso, amoni ba-Israel bafandi o nganda, etuka na etuka. Elimo ya Nzambe ekiteli ye,
Numb LinVB 24:3  mpe asakoli maloba maye : « Maloba ma Balame, mwana wa Beor, maloba ma moto azali komono polele ;
Numb LinVB 24:4  maloba ma moto ayoki maloba ma Nzambe. Amoni maye Nzambe nta bokasi alakisi ye Nzambe ayanoli ye, bongo miso ma ye mafungwani.
Numb LinVB 24:5  Bato ba Yakob, biema bya bino bisali kitoko ! Bato ba Israel, mboka ya bino izali malamu,
Numb LinVB 24:6  itandani lokola mabwaku, lokola lopango la nzete o libongo lya ebale, lokola nzete ya aloes Nzambe alonaki, lokola nzete ya sédere mpembeni ya mai !
Numb LinVB 24:7  Elombe akobima o libota lya bino, akozala mokonzi wa bikolo mingi ; akoleka mokonzi Agag na nguya ; bokonzi bwa ye bokolenda.
Numb LinVB 24:8  Nzambe abimisaki ye o Ezipeti, o miso ma ye azali lokola maseke ma nzale, akosilisa bikolo bya banguna ba ye, akobuka minkuwa mya bango.
Numb LinVB 24:9  Akubami, alali o nse lokola nta­mbwe mwasi, lokola nyama ya zamba : nani akomeka kolongola ye o mpongi ? Babenisa oyo akobenisa yo, azwa bobe oyo akobetele yo mobondo ! »
Numb LinVB 24:10  Balak ayokeli Balame nkanda, abeti maboko mpe alobi na ye : « Nabengaki yo mpo ’te obetele banguna ba ngai mobondo mpe ozali kobenisa bango, kina mbala isato !
Numb LinVB 24:11  Sikawa lo­ngwa mpe zonga o mboka ya yo. Nalobaki ’te nakopesa yo lokumu. Yawe apimi yo lokumu lona. »
Numb LinVB 24:12  Balame aya­noli : « Nasili nalobelaki bantoma ba yo :
Numb LinVB 24:13  Ata Balak apesi ngai ndako mobimba etondi na palata mpe na wolo, nakoki kobuka etinda ya Yawe te mpo ya kosala malamu to mabe lokola nalingi. Nakoloba se maye Nza­mbe akoloba.
Numb LinVB 24:14  Sikawa nazongi o mbo­ka ya ngai, kasi yaka naino, nakoyebisa yo makambo bato baye bakosala bato ba yo o mikolo mikoya. »
Numb LinVB 24:15  Na nsima Balame asakoli lisusu : « Maloba ma Balame, mwana wa Beor, maloba ma moto azali komono polele ;
Numb LinVB 24:16  maloba ma oyo ayoki maloba ma Nzambe, mpe ayebi makambo ma Nzambe o nta likolo. Amoni makambo Nzambe nta bokasi alakisi ye ; awa Nzambe akolobela ye, miso ma ye makofungwana.
Numb LinVB 24:17  Namoni elombe oyo, kasi akoya sikawa te ; Nazali komono ye, kasi namoni ye penepene te : monzoto mokobima o libota lya Yakob, moto na lingenda akoteleme, akouta o Israel. Lingenda lya ye likobete bato ba Moab o motó, likopasola motó mwa bana ba Set.
Numb LinVB 24:18  Edom ekokweya o maboko ma bato basusu, ekolo ya Seir ekokoma mokili mwa banguna. Israel akolakisa bokasi bwa ye.
Numb LinVB 24:19  Moto akokonza bikolo bisusu ako­uta o Yakob, akoboma baye bakimaki mboka Ar. »
Numb LinVB 24:20  O ntango ena Balame amoni Amalek, asakoli likambo liye : « Amalek ezali ekolo ya yambo, kasi bankoko ba ye bakosila seko. »
Numb LinVB 24:21  Nsima amoni bato ba Kenaz, mpe asakoli boye : « Kain, ndako ya yo etongami makasi, mboka ya yo epikami o mabanga.
Numb LinVB 24:22  Ata bongo, bato bakoya kotumba yo na móto, mpe bato ba Asur bakoya kokanga bino o boombo. »
Numb LinVB 24:23  Nsima asakoli naino boye : « Mawa e ! Nani akobika awa Nzambe akokokisa mikano mya ye ?
Numb LinVB 24:24  Tala bato bakoya na masuwa makouta o libongo lya Kitim, bakonyokolo Asur, bakosukisa Eber ; bango mpe bakokufa seko. »
Numb LinVB 24:25  Na nsima Balame atelemi mpe azo­ngi o mboka ya ye. Balak mpe akei o ndako ya ye.