Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 50
Gene LinVB 50:1  Yosefu akitisi motó pene pene na elongi ya tata wa ye, azingi ye ekopi, mai ma miso mazalaki kotangela tata wa ye.
Gene LinVB 50:2  Na nsima atindi banganga baye bazalaki na ye ’te bapakola nzoto ya tata wa ye malasi. Banganga bapakoli Israel mafuta ma malasi.
Gene LinVB 50:3  Basali mikolo ntuku inei mpo ya kobongisa yango malamu ; bopakoli ebembe malasi bokoumelaka mingi boye. Ba-Ezipeti basali lilaka mikolo ntuku nsambo.
Gene LinVB 50:4  Esili lilaka, Yosefu alobi na bato ba Farao : « Soko bolingi ngai solo, boloba o matoi ma Farao :
Gene LinVB 50:5  Tata wa ngai alayisi ngai ndai eye : Sikawa nalingi nakufa. Nazali na lilita o mokili mwa Kanana, ngai moko natimolaki lyango ; okokunda ngai kuna. Bongo nali­ngi kokende kuna mpo ’te nakunda tata wa ngai ; na nsima nakozonga. »
Gene LinVB 50:6  Farao azongisi : « Kende mpe ku­nda tata wa yo, lokola alayisaki. »
Gene LinVB 50:7  Yosefu akei kokunda tata wa ye. Basaleli banso ba Farao na bankumu ba ndako ba ye mpe bankumu banso ba mokili mwa Ezipeti bakei na ye elongo.
Gene LinVB 50:8  Libota mobimba lya Yosefu, ná bandeko ba ye, ná bato banso ba tata wa ye, bakei lokola. Etikali o mokili mwa Gesen se bana bake, mpata na ngombe.
Gene LinVB 50:9  Bakei na farasa mpe na makalo ; ezalaki li-mpinga linene.
Gene LinVB 50:10  Ntango bakomi o Goren-a-Atad, o ngambo ya Yordane, basali matanga manene ma bokundi Yakob. Yosefu asali lilaka lya tata wa ye mikolo nsambo.
Gene LinVB 50:11  Bato ba mokili mwa Kanana bamoni lilaka o Goren-a-Atad, balobi : « Ba-Ezipeti basali lilaka linene mpenza. » Yango wana bapesi etuka ena o ngambo ya Yordane nkombo : Abel Misrayim.
Gene LinVB 50:13  Bakei na ebembe ya ye o mokili mwa Kanana, mpe bakundi ye o mobenga o elanga ya Makpela, eye Abarama asombaki o maboko ma mo-Eti Efron, o Esti ya Mambre.
Gene LinVB 50:14  Yosefu azongi o Ezipeti elongo na bandeko ba ye mpe na bato ba-nso bakendeki kokunda tata wa ye.
Gene LinVB 50:15  Nsima ya liwa lya tata, bandeko ba Yosefu, balobani : « Mbele sikawa Yosefu akoyina biso mpe akosongisela biso mabe manso tosalaki ye. »
Gene LinVB 50:16  Yango wana batindeli Yosefu maloba maye : « Liboso ’te akufa tata apesaki biso motindo moye :
Gene LinVB 50:17  « Boloba na Yosefu : Nabondeli yo, li­mbisa bandeko lisumu lya bango mpe mabe manso basalaki yo. » Bongo limbisa sikawa mabe ma basaleli ba Nzambe wa tata wa yo. » Eyoki Yosefu maloba ma bango, abandi kolela.
Gene LinVB 50:18  Bandeko ba ye bango moko bayei, bakwei o boso bwa ye mpe balobi : « Toyei, tala tosali baombo ba yo. »
Gene LinVB 50:19  Kasi Yosefu azongisi : « Bo­banga te, nakomi nde Nzambe ?
Gene LinVB 50:20  Mabe bolingaki kosala ngai, Nzambe akomisi mango ntina ya kosala maye masalemi sikawa ; abikisi bomoi bwa bato baike.
Gene LinVB 50:21  Bongo bobanga te, ngai moto nakoleisa bino na bana ba bino. » Na maloba maye ma boboto akitisi bango mitema.
Gene LinVB 50:22  Yosefu atikali kofanda o Ezipeti elongo na libota mobimba lya tata wa ye. Akokisi mibu monkama na zomi.
Gene LinVB 50:23  Amoni bana ba Efraim na bankoko ba ye, na mpe bankokolo ba ye. Bana ba Makir, mwana wa Manase, Yosefu ayambi bango o bibelo mokolo babotamaki.
Gene LinVB 50:24  Nsima ya yango Yosefu alobi na ba­nde­ko : « Nalingi nakufa, kasi Nza­mbe akopangana na bino : akolongola bi­no o mokili moye mpo ’te azo­ngisa bino o mokili moye alakelaki Abarama,IzakanaYakob. »
Gene LinVB 50:25  Yosefu alayisi bana ba-Israel ndai eye : « Mokolo Nzambe akoya kotala bino, bomeme minkuwa mya ngai. »
Gene LinVB 50:26  Yosefu awei, akokisi mibu mo­nkama na zomi. Bapakoli ebembe ya ye malasi, batii yango o epomba o mokili mwa Ezipeti.