Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II MACCABEES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15
Prev Up Next
Chapter 1
II M LinVB 1:1  Losako na bino bandeko ba biso ba-Yuda bozali o Ezipeti. Bandeko ba bino ba Yeruzalem mpe ba mokili mwa Yudea batombeli bi­no boboto boleki.
II M LinVB 1:2  Nzambe akabela bino malamu ndenge na nde­nge, akundola bondeko akataki na Abarama, Izaka na Yakob, basaleli ba ye ba lobokó.
II M LinVB 1:3  Apesa bino motema malamu mpo ’te bokoka kokumisa ye mpe kosala na motema moko maye ye alingi.
II M LinVB 1:4  Asala ’te boyamba Mobeko na mitindo mya ye o mitema ; apesa bino boboto.
II M LinVB 1:5  A­ndima bisambo bya bino mpe azo­ngisela bino bondeko, atika bino o mikolo mya mpasi te.
II M LinVB 1:7  O ele­ko Demetrio azalaki mokonzi, o mobu mwa monkama na ntuku mo­toba na li­bwa, biso ba-Yuda tokomelaki bino boye : « O ntango mi­nyoko mpe mpasi enene ikwelaki biso, banda mokolo Yason na baninga ba ye batekeki mabelé masantu mpe basulaki ekolo ya biso,
II M LinVB 1:8  batumbaki ezibeli enene ya Te­mpelo, mpe babomi bato basalaki mabe te. O ntango ena tosambelaki Mokonzi, mpe Mokonzi andimelaki biso : sikawa tokoki kobonzela ye mabonza ma kotumba na fufu ya mampa, kopelisa miinda mpe kotia mampa o meza. »
II M LinVB 1:9  Yango wana toyebisi bino : bosepela eyenga ya Milako o sanza Kisleu. Tokomeli bino bongo o mobu mwa monkama na ntuku mwambe na mwambe.
II M LinVB 1:10  Boyamba losako la bato ba Yeruzalem mpe ba Yudea, bankumu ba ekolo mpe Yudas batindeli bino : losako na Aristobulo, mosalisi wa mokonzi Tolemeo mpe moto wa libota lya banganga Nzambe, mpe na ba-Yuda banso o Ezipeti. Toto­mbe­li bino banso bolamu mpe nzoto kolongonu.
II M LinVB 1:11  Nzambe abikisi biso o makama manene, yango wana totondi ye mingi, mpo abuneli biso etumba na mokonzi.
II M LinVB 1:12  Ye moto asukisi baye bayaki kobundisa E­ngumba Esantu.
II M LinVB 1:13  Mokonzi wa ba­ngo akendeki o ekolo ya ba-Persi na basoda ebele, baye bakanisaki ’te moto moko akokoka bango te. Ba­nganga Nzambe ba tempelo ya Nanea basalaki mayele mpe babomaki bango.
II M LinVB 1:14  Antioko akosaki ’te akobala nzambe mwasi Nanea : ayingeli o tempelo elongo na baninga ba ye, kasi ezalaki se mpo ’te bapesa ye biloko bya nkita lokola biloko bya libala.
II M LinVB 1:15  Banganga Nzambe ba te­mpelo babimisaki biloko bina bi­nso mpo ya kolakisa byango. Antioko akotoki elongo na baninga o eteni ya kati ya tempelo. Ekoti ye, bakangi lopango.
II M LinVB 1:16  Bafungoli lidusu lizalaki o motondo mwa tempelo, mpe babandi kobwakela ye ma­ba­nga. Na nsima bakati nzoto ya ye biteni biteni, mpe babwaki motó mwa ye o boso bwa baye bazalaki o libanda.
II M LinVB 1:17  Bakumisa Nzambe wa bi­so mikolo minso, mpo asali ’te baye baboya ye bakufa !
II M LinVB 1:18  Awa tokosepela eyenga ya Bopetoli Tempelo o sanza Kisleu, mokolo mwa ntuku ibale na mitano, malamu toyebisa bino mpo yango. Bongo bino mpe bosepela eyenga ena lokola bakosepelaka eyenga ya Milako mpe eyenga ya Móto moye momononoki ntango Neemia abo­nzaki mabonza, ntango asilisaki ko­tonga lisusu Tempelo na altare.
II M LinVB 1:19  O eleko bakambaki bankoko ba biso o boombo o Pe­rsi, banganga Nzambe ba mpiko bakamataki móto o altare, mpe babombaki mwa­ngo na mayele o libulu likauki mai. Babombaki mwango malamu mpe­nza, ata moko ayebaki esika ena te.
II M LinVB 1:20  Nsima ya mibu miike Nzambe asalisi biso na likambo lina. Mokonzi wa Persi azongisi Neemia o mokili mwa biso. Neemia atindi ba­nkoko ba banganga Nzambe, baye babombaka móto kala, bakende koluka mwango. Kasi bayei koyebisa ’te bazwi móto te, kasi se potopoto lokola mafuta. Neemia atindi bango batoka mwa ndambo mpe bayela ye yango.
II M LinVB 1:21  Ntango basili kolengele binso mpo ya mabonza, Neemia atindi banganga Nzambe basopa yango o mabonza mpe o nkoni.
II M LinVB 1:22  Basali se bongo. Elongwi mampata mazipaki mwese, moi mokomi kongala. Na mbala yoko móto monene mopeli wana ; bato banso bakamwi mingi.
II M LinVB 1:23  O ntango libonza lizalaki kotu­mbama, ba­nganga Nzambe basa­mbeli elongo na bato banso. Yonatan abandi losambo, basusu bandimi, bango na Neemia.
II M LinVB 1:24  Bazalaki kosambela boye : « E Mokonzi Nzambe, Mozalisi wa biloko binso, Nzambe oyo okoba­ngisaka bato, ozali na bokasi, na bosembo mpe na ngolu. Bobele yo ozali mokonzi mpe nta bolamu.
II M LinVB 1:25  Se yo moko okokabaka, ozali nta bosembo, na bokasi bonso mpe wa lobiko. Yo okobikisaka Israel o mabe manso. Oponoki bankoko ba biso bazala bato ba yo, mpe osantisaki bango.
II M LinVB 1:26  Oya­mba libonza liye mpo ya ekolo ya yo Israel mobimba. Batela bato ba yo mpe santisa yango.
II M LinVB 1:27  Osangisa bandeko ba biso baye bapanzani. Osikola baye bakangemi o boombo epai ya bapagano. Otala na bolamu baye basambwi mpe baboyami. Bongo bapagano banso bayeba ’te yo ozali Nzambe wa biso.
II M LinVB 1:28  Pesa etumbu na bato bazali konyokolo mpe kokinola biso, mawa te.
II M LinVB 1:29  Zongisa bato ba ekolo ya yo o mabelé ma yo masantu, lokola Moze alakelaki. »
II M LinVB 1:30  Nsima ya yango banganga Nza­mbe bayembi nzembo na nzenze.
II M LinVB 1:31  Ntango libonza litumbami nye, Neemia atindi ’te basopa mai maye matikali o mabanga manene.
II M LinVB 1:32  Se o ntango ena móto mopeli, mosangani na móto mozalaki kopela o altare.
II M LinVB 1:33  Likambo lyango lipalangani ; bayebisi mpe mokonzi wa Persi ’te o esika banganga Nzambe baye bakangemaki o boombo babombaki móto, bazwaki se mai. Bayebisi ye ’te Neemia na baninga ba ye batumbaki na mango mabonza masantu.
II M LinVB 1:34  Mokonzi atali likambo lyango malamu, mpe atindi ’te bazinga esika yango na lopango mpo ezala esika esantu.
II M LinVB 1:35  Baye mokonzi atindi ’te basala o esika eye, apesi bango makabo manene ma biloko azalaki kozwa.
II M LinVB 1:36  Neemia na bani­nga ba ye batangi mai mana ‘neftar’, lokola ’te ‘bopetoli’. Kasi bato baike bakotangaka yango nafta.