Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 35
Isai LinVB 35:1  Eliki mpe mabelé makauka masepela, esobe eyoka es­e­ngo mpe nzete ya yango ibimisa nkasa,
Isai LinVB 35:2  ezala na fulele mingi, esepela mpe eganga na nsai. Bapesi yango lokumu lokola Libano, bonzenga lokola Karmel na Saron. Bakomono nkembo ya Yawe, Nza­mbe wa biso.
Isai LinVB 35:3  Bolendisa maboko malembi, bolendisa mabolongo mazali kolenge.
Isai LinVB 35:4  Boloba na bato babulungani : « Bozala na mpiko, bobanga eloko te. Nzambe wa bino akoya kobekola bato babe, ye moto akoya kobikisa bino. »
Isai LinVB 35:5  O ntango ena bato ba lolanda bakomono, bato bakufi matoi bakoyoka lisusu.
Isai LinVB 35:6  Batengoli bakopimbwa lokola mbo­loko, baye bayebi koloba te bakoganga na nsai. Mai ma miluka makobima o eliki, bitima bya mai bikozala o mokili mozangi mai.
Isai LinVB 35:7  Mabelé makauki makobongwana liziba lya mai, o mokili bato bakufi na mposa ya mai, maziba makobima. O bisika ngombolo ikofandaka, nsoló ikokola wana.
Isai LinVB 35:8  Nzela kitoko ekoleka wana, bakotanga yango nzela esantu. Moto mbindo akoleka wana lisusu te. Bobele bato ba Yawe bakoleka wana, bilema bakoyengayenga wana te.
Isai LinVB 35:9  Ntambwe ekozala wana te, bakokutana ma nyama ya zamba wana te, kasi bato basikwami bakotambola wana,
Isai LinVB 35:10  bato Nzambe abikisi bakozonga wana : bakoya o Sion na nzembo ya nsai, bakolakisa bilongi esengo nsuka te, bakozala na nsai mpe bakosepela mingi, mpo mawa na mpasi ikosila seko.