Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 18
John LinVB 18:1  Esílísí Yézu koloba bôngó, abimí elongó na bayékoli ba yě ; bakátísí ngámbo ya mái ma Sédron. Lopángo lozalákí wâná ; Yézu ayíngélí wâná na bayékoli ba yě.
John LinVB 18:2  Yudási, moto akokaba yě, ayébí mpé esíká yangó, zambí Yézu azalákí kokende kúná mbala míngi na bayékoli ba yě.
John LinVB 18:3  Yudási akambí libóké lya basodá na bakéngeli baye banganga bakonzi na ba-Farizéo bapésí yě ; bayéí wâná na miínda, na bisúngi mpé na bibuneli.
John LinVB 18:4  Yézu ayébí mánso makokwêla yě, yangó wâná akeí epái ya bangó mpé alobí : « Bozalí koluka náni ? »
John LinVB 18:5  Bazóngísí : « Yézu wa Nazaréte. » Yézu alobí na bangó : « Ngáí óyo. » Yudási, moto akabí yě, azalákí mpé wâná elongó na bangó.
John LinVB 18:6  Awa Yézu alobí na bangó « Ngáí óyo », bazóngí nsima mpé bakwéí o nsé.
John LinVB 18:7  Yézu atúní bangó lisúsu : « Bozalí koluka náni ? » Balobí : « Yézu wa Nazaréte. »
John LinVB 18:8  Yézu azóngísí : « Nasílí nalobí : Ngáí óyo. Sókó bozalí koluka ngáí, bótíka bangó báke­nde. »
John LinVB 18:9  esálémí bôngó sé lokóla yě mǒ­kó alobákí : ‘Na baye opésí ngáí, nabúngísí atâ mǒ­kó té’.
John LinVB 18:10  Simóni Pétro azalákí na mompánga, abimísí mwangó, abétí mosáli wa nganga mokonzi mpé akátí yě litói lya mobáli. Nkómbó ya mosáli ôná Málko.
John LinVB 18:11  Kasi Yézu alobí na Pétro : « Zóngísá mompánga o esíká ya yangó. Nkéni Tatá apésí ngáí, námele yangó té ? »
John LinVB 18:12  Na nsima basodá, komandá na bakéngeli ba ba-Yúda bakangí Yézu na nsinga.
John LinVB 18:13  Bakeí na yě epái ya Ana. Ana azalákí bokiló wa Kaífa ; azalákí nganga mokonzi o mobú wana.
John LinVB 18:14  Kaífa moto apésáká ba-Yúda lilako liye : « Malámu bobélémoto mǒkó ákúfa mpô ya bato bánso. »
John LinVB 18:15  Simóni Pétro na moyékoli mosúsu, balandí Yézu. Moyékoli ôná ayébání na nganga mokonzi ; bôngó akótí elongó na Yézu o lopángo la nganga mokonzi.
John LinVB 18:16  Pétro atíkálí o libándá penepene na monoko mwa lopángo. Moyékoli mosúsu, óyo ayébání na nganga mokonzi, abimí ; asolólí na mwásí mokéngeli wa lopángo, akótísí Pétro.
John LinVB 18:17  Mokéngeli mwásí ôná alobí na Pétro : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bayékoli ba moto óyo té ? » Pétro azóngísí : « Té, ngáí té. »
John LinVB 18:18  Mpô ezalákí mpío, basáli na basodá bapelísákí móto, bazalákí koyóto móto. Pétro atélémí epái ya bangó, yě mpé azalákí koyóto móto.
John LinVB 18:19  Nganga mokonzi atúní Yézu mpô ya bayékoli mpé mpô ya matéya ma yě.
John LinVB 18:20  Yézu azóngísí : « Nazalákí koloba polélé o míso ma bato bánso. Mikolo mínso nazalákí kotéya o sinagóga mpé o Témpelo, esíká ba-Yúda bánso bakosanganaka ; nalobákí elóko yǒ kó na bonkútú té.
John LinVB 18:21  Mpô níni otúní ngáí ? Túná bato bayókákí matéya nazalákí kotéya ; bangó bayébí níni nalobákí. »
John LinVB 18:22  Elobí yě bôngó, mosáleli mǒkó, óyo atélémí penepene na Yézu, abétí yě mbatá, alobí : « Bakoyanolaka nganga mokonzi ndé boye ? »
John LinVB 18:23  Yézu azóngísélí yě : « Sókó nalobí mabé, lakísá mabé mâná ; kasi sókó nalobí malámu, mpô níni obétí ngáí ? »
John LinVB 18:24  Na nsima Ana atíndí Yézu epái ya Kaífa, nganga mokonzi. Yézu azalákí sé kokangema, nsinga o mabóko.
John LinVB 18:25  Simóni Pétro azalákí sé koyóto móto ntángo balobí na yě : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bayékoli ba yě té ? » Awángání, alobí : « Té, ngáí té. »
John LinVB 18:26  Mosáleli mǒkó wa nganga mokonzi, ndeko wa moto óyo Pétro akátákí yě litói, alobí lisúsu : « Namónókí yǒ o lopángo elongó na yě té ? »
John LinVB 18:27  Pétro awángání lisúsu, mpé bobélé o ntá­ngo êná nsósó elelí.
John LinVB 18:28  Na ntóngó mpenzá balongwí epái ya Kaífa, bakeí na Yézu o ndáko ya moyángeli wa ekólo. Ba-Yúda bakótí o ndáko ya moyángeli té, mpô ’te bákóma na mbindo té, mpô bákoka kolía limpáti lya Pásiká.
John LinVB 18:29  Bôngó Piláto abimí mpé akeí epái ya bangó. Atúní bangó : « Boyéí kofúnda moto óyo na likambo níni ? » Bazóngísélí yě :
John LinVB 18:30  « Sókó azalákí moto mabé té, mbele tokabí yě o mabóko ma yǒ té. »
John LinVB 18:31  Piláto alobí na bangó : « Bínó mǒkó bókamata yě, mpé bósámbisa yě, engébéné na Mobéko mwa bínó. » Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Balingísí bísó koboma moto té. »
John LinVB 18:32  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maye Yézu alobákí ntángo ayébísákí ndéngé níni akowá.
John LinVB 18:33  Piláto akótí lisúsu o ndáko, abyá­ngí Yézu, atúní yě : « Ozalí mo­konzi wa ba-Yúda ? »
John LinVB 18:34  Yézu azóngísí : « Olobí bôngó na mayéle ma yǒ mǒ­kó, tǒ bato basúsu bayébísí yǒ bôngó mpô ya ngáí ? »
John LinVB 18:35  Piláto ayanólí : « Ngáí nazalí ndé mo-Yúda ? Bato ba ekólo ya yǒ na banganga bakonzi bakabí yǒ o mabóko ma ngáí. Osálí níni ? »
John LinVB 18:36  Yézu azóngísí : « Bokonzi bwa ngáí bozalí bwa nsé eye té. Sókó bokonzi bwa ngáí bozalákí bwa nsé eye, mbele bato ba ngáí babundí mpô ’te nákwéya o mabóko ma ba-Yúda té. Kasi bokonzi bwa ngáí bozalí bwa nsé eye té. »
John LinVB 18:37  Piláto alobí na yě : « Bôngó ozalí mokonzi ? » Yézu azó­ngísí : « Lokóla olobí, nazalí mokonzi. Nabótámí mpé nayéí áwa o mokili mpô ’te násakola bosôló. Moto nyónso akondima bosôló, akoyóka ngáí ! »
John LinVB 18:38  Piláto alobí na yě : « Bosôló, níni yangó ? » Elobí yě bôngó, abimí lisúsu, akeí epái ya ba-Yúda, alobí na bangó : « Namóní ntína yǒ kó té ya kokitisa moto óyo.
John LinVB 18:39  Kasi bozalí na momeseno ’te nábimisela bínó moto mǒkó wa bo­lóko o eyenga ya Pásiká. Bolingí nábimisela bínó mokonzi wa ba-Yúda ? »
John LinVB 18:40  Bánso bagángí lisúsu, bangó ’te : « Yě té, kasi Báraba ! » Báraba azalákí moyíbi monéne.