JUDGES
Chapter 3
Judg | LinVB | 3:1 | Yawe atikaki bato ba bikolo bina bafanda o mokili mwa bango mpo ’te ameka ba-Israel, baye babu-ndi naino etumba yoko na ba-Kanana te. | |
Judg | LinVB | 3:2 | Asali bongo bobele mpo ’te bana ba Israel bayekola kobunda bitumba, baye babundi naino te. | |
Judg | LinVB | 3:3 | Baye batikalaki : bakonzi batano ba ba-Filisti, ba-Kanana, ba-Sidoni na ba-Iti bakofa-ndaka o ngomba ya Libano, banda ngomba Baal-Ermon kin’o Amat. | |
Judg | LinVB | 3:4 | Yawe atikaki bango mpo ameka ba-Israel, ayeba soko bakotosa mibeko apesaki bankoko ba bango na monoko mwa Moze. | |
Judg | LinVB | 3:6 | babali ba Israel bakomi kobala bana basi ba bango, mpe babalisi bana babali basi ba bango ; bakumisi mpe banzambe ba bango. | |
Judg | LinVB | 3:7 | Ba-Israel basali mabe o miso ma Yawe. Babosani Yawe Nzambe wa bango mpe bakumisi bikeko bya Baal na Astarte. | |
Judg | LinVB | 3:8 | Yango wana Yawe ayokeli ba-Israel nkanda mpe akabi bango o maboko ma Kusan-Riseataim, mokonzi wa Edom, mpe bakomi bongo baombo ba Kusan-Riseataim mbula mwambe mobimba. | |
Judg | LinVB | 3:9 | Kasi ba-Israel babeleli Yawe, oyo atindeli bango mobikisi, nkombo ya ye Otniel, mwana wa Keniz, ndeko wa Kaleb. | |
Judg | LinVB | 3:10 | Elimo ya Yawe ezalaki na ye. Akomi zuzi wa Israel mpe akei kobunda etumba. Yawe akabi Kusan-Riseataim, mokonzi wa Edom, o maboko ma ye ; Otniel alongi ye. | |
Judg | LinVB | 3:12 | Ba-Israel babandi kosala mabe lisusu o miso ma Yawe, oyo apesi Eglon, mokonzi wa Moab, nguya ya kobunda na Israel, zambi bango bazalaki kosala mabe o miso ma Yawe. | |
Judg | LinVB | 3:13 | Eglon ayokani na ba-Amon mpe na ba-Amalek mpe akei kobundisa Israel ; alongi bango mpe abotoli mboka ya Mbila. | |
Judg | LinVB | 3:15 | Kasi bato ba Israel babeleli Yawe, oyo atindeli bango mobikisi, nkombo ya ye Eyud, mwana wa Gera, wa libota lya Benyamin, moto azali makasi se na loboko la mwasi. Ba-Israel batindi ye epai ya Eglon, mokonzi wa Moab, akende kofuta mpako ya bango. | |
Judg | LinVB | 3:16 | Eyud atuli mbeli ekokataka bipai bibale, bolai bwa loboko loko, mpe akangi yango o loketo la mobali o nse ya elamba ya ye. | |
Judg | LinVB | 3:19 | Kasi ye moko, awa akomi o esika bakobengaka ‘Bikeko’, penepene na Gilgal, azongi epai ya mokonzi mpe alobi na ye : « Mokonzi, nazali na liloba litali se yo moko ! » Mokonzi alobi na bato ba ye ’te babima, mpe bato ba ye banso babimi o ndako. | |
Judg | LinVB | 3:20 | Eyud akei epai ya ye. Mokonzi afandi o mbalasani, o esika ya mpio, esika ameseni kofanda ye moko. Eyud alobi na ye : « Mokonzi, nayeli yo liloba lya Nzambe. » Mokonzi alongwi o kiti. | |
Judg | LinVB | 3:21 | Sikawa Eyud, na loboko la mwasi, akamati mbeli ekangami o loketo la mobali mpe atuboli libumu la mokonzi. | |
Judg | LinVB | 3:22 | Mbeli mobimba ekoteli ye o libumu, mpe na nsima misuni mizongi o esika ya myango mpe mibombi mbeli, zambi Eyud abimisaki yango o libumu te. | |
Judg | LinVB | 3:24 | Awa abimi, basali ba mokonzi bayei kotala, bamoni ’te bizibeli bya ndako ya likolo bikangami na mafu-ngola. Balobani : « Mbele akoti o zongó o mokili mwa ndako. » | |
Judg | LinVB | 3:25 | Bazili mingi tee bakomi kobanga zambi afungoli ndako te. Bongo bakamati lifungola mpe baziboli ndako ; bamoni mokonzi wa bango alali o nse, asili akati motema. | |
Judg | LinVB | 3:26 | Awa bazalaki kozila boye, Eyud asilaki kokima. Aleki o esika ya ‘Bikeko’ mpo ’te akima o mboka Seira. | |
Judg | LinVB | 3:27 | Ekomi ye kuna, abeti mondule o kati ya ngomba ya Efraim mpe ba-Israel bakiti ngomba elongo na ye ; ye o liboso. | |
Judg | LinVB | 3:28 | Alobi na bango : « Bolanda ngai, zambi Yawe akabi monguna wa bino o maboko ma bino. » Bakiti ngomba nsima ya ye, bakengeli bisika biye bato ba Moab bakolekaka mpo ya kokatisa Yordane, bapesi moto moko nzela ya kokatisa mai te. | |
Judg | LinVB | 3:29 | Se o mokolo mona babomi ba-Moab nkoto zomi, banso bato makasi mpe ba mpiko, moto moko abiki te. | |
Judg | LinVB | 3:30 | O mokolo mona bato ba Israel bayokisi ba-Moab nsoni mingi ; mibu ntuku mwambe mobimba ekolo Israel ekomi nye. | |