EXODUS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
Chapter 31
| Exod | LinVB | 31:3 | Natondisi ye na elimo ya Nzambe, napesi ye mayele na bwa-nya, ayebi misala ndenge na ndenge : | |
| Exod | LinVB | 31:5 | ayebi kokatakata mabanga ma motuya mpo ya kokanga mango o bilamba ; ayebi kosala bikeko bya nzete mpe misala ndenge na ndenge. | |
| Exod | LinVB | 31:6 | Nakopesa ye Oliabe, mwana wa Akisamak, wa libota lya Dan, mpo asalisa ye ; mpe napesi mayele na bato banso ba bwanya mpo ’te basala mpo inso natindi yo : | |
| Exod | LinVB | 31:7 | ezali Ema ya Likita, Sanduku ya Bondeko na ezipeli ya yango, biloko binso bisengeli kosala o Ema, | |
| Exod | LinVB | 31:8 | meza na biloko bya yango, etemiseli ya mwinda mpe biloko bya yango binso, altare ya malasi, | |
| Exod | LinVB | 31:10 | bilamba bya lokumu, bila-mba bisantu bya nganga Nzambe Arone na bana ba ye, mpo ’te basala mosala mwa bonganga, | |
| Exod | LinVB | 31:11 | mafuta ma bopakoli mpe mpaka ya malasi mpo ya Ndako Esantu. Basala binso lokola natindi yo. » | |
| Exod | LinVB | 31:13 | « Loba na bana ba Israel : Botosa mikolo mya Sabato malamu. Sabato ezali elembo kati ya biso na bino mpe na bana ba bino ’te ngai nazali Yawe oyo akosa-ntisaka bino. | |
| Exod | LinVB | 31:14 | Botosa mobeko mwa Sabato, botala yango lokola mokolo mosantu. Moto akosantola mokolo mona, baboma ye ; moto akosala mosala o mokolo mona, balongola ye o libota lya ye. | |
| Exod | LinVB | 31:15 | Mikolo motoba bosala mosala mwa bino ; mokolo mwa nsambo bopema, mpo ezali mokolo mwa Yawe. Moto ata nani akosala mosala o mokolo mwa Sabato, baboma ye. | |
| Exod | LinVB | 31:16 | Bana ba Israel batosa mobeko mwa Sabato o bileko na bileko lokola elembo ya bondeko bwa seko. | |
| Exod | LinVB | 31:17 | Kati ya biso na bana ba Israel mokolo mwa Sabato mosali elembo ya bondeko bwa seko, zambi na mikolo motoba Yawe akelaki likolo na nse, kasi o mokolo mwa nsambo atikaki mosala mpe apemaki. » | |