Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 30
Exod LinVB 30:1  Okosala mpe altare esika basengeli kotumba mpaka ya malasi ; sala yango na nzete ya akasia.
Exod LinVB 30:2  Bolai bosala loboko loko, bonene loboko loko ; bipai binei bikokana ; bosanda bwa yango bosala maboko mabale na ndambo ; maseke maka-ngema na yango lokola eloko yoko.
Exod LinVB 30:3  Zipa na wolo kitoko eteni ya likolo, mipanzi na maseke ma meza ; zongazonga na yango otia ekembiseli ya wolo.
Exod LinVB 30:4  Epai na epai otia mitako mibale mya wolo o nse ya ekembiseli o bisika bakokotisa mabaya ma komeme altare.
Exod LinVB 30:5  Mabaya maye ma­sale­ma na akasia mpe mazipama na wolo.
Exod LinVB 30:6  Tia meza liboso lya elamba elai, eye ekobomba Sanduku ya Bondeko, liboso lya ezipeli eye ezali likolo lya Sanduku o esika ena nalingi kokutana na yo.
Exod LinVB 30:7  Kuna Arone atu­mba mpaka ya malasi, ntongo inso ntango akobongisa mwinda, atu­mba mpaka.
Exod LinVB 30:8  Ekomi mpokwa, o ntango akopelisa mwinda, atumba mpaka lisusu. Ezali mpaka ya kotumba ntango inso o mabota ma bino seko.
Exod LinVB 30:9  O altare eye okoki kotu­mba mpaka ya mpamba te, kobonza libonza lya kotumba to lya bilei te, kosopa vino mpe te.
Exod LinVB 30:10  Mbala yoko o mobu Arone asala milulu mya bosengi bolimbisi o maseke ma altare. Mobu na mobu, o eyenga enene ya bosengi Bolimbisi masumu, Arone asala na makila ma moboma milulu mya bosengi Bolimbisi masumu. Bana ba bino basala se bongo o bileko na bileko. Yango eleki bosantu o miso ma Yawe. »
Exod LinVB 30:12  « Mokolo okotanga bana ba Israel, moko moko afuta mpako ya ye ya bosikoli bomoi, mpo ’te bokono bobe bokwela ye te o ntango ya botangi bato.
Exod LinVB 30:13  Bato banso basengeli kotangema bafuta ndambo ya motako, motako mwa esika esantu. Ndambo eye ya motako ezala mpako ya Yawe.
Exod LinVB 30:14  Bato banso basengeli kotangema ape : bato bakokisi mibu ntuku ibale bafuta mpako ya Yawe.
Exod LinVB 30:15  Mpo ya bosikoli bomoi bwa ye, ná moto wa nkita ná mobola bapesa se ndambo ya motako.
Exod LinVB 30:16  Kamata mosolo mwa mpako ya bomoi ya bana ba Israel, mpe pesa mwango mpo ya mosala mwa Ema ya Likita mpe mpo ’te Yawe akanisa bana ba Israel, bongo bokoka kosikola bomoi bwa bino. »
Exod LinVB 30:18  « Mpo ya bopetoli, sala sani enene ya mbengi na ebonga ya mbengi ; tia mai o sani, eye okotia kati ya Ema na altare.
Exod LinVB 30:19  Arone na bana ba ye basukola wana maboko na makolo.
Exod LinVB 30:20  Ekokoto bango o Ema ya Likita bamisosa na mai mpo ’te bakufa te ; se bongo soko babelemi na altare mpo ya kosala mosala, to mpo ya kobonzela Yawe libonza lya kotumba.
Exod LinVB 30:21  Basukola maboko na makolo mpo ’te bakufa te : Arone na bana ba ye batosa mobeko moye mwa seko, o bileko na bileko. »
Exod LinVB 30:23  « Luka matiti na malasi ma nsolo mpimbo : mitako nkama itani mya mira ya mai, mitako nkama ibale na ntuku itano mya sinamome ya malasi na mitako nkama ibale na ntuku itano mya matiti ma nsolo mpimbo,
Exod LinVB 30:24  mitako nkama itano mya likasu lokola mitako mya esika esantu na kopo ya mafuta ma oliva.
Exod LinVB 30:25  Sala na mango mafuta masantu ma bopakoli, sangisa inso lokola mosali malasi akosalaka ; ezala bongo mafuta masantu ma bopakoli.
Exod LinVB 30:26  Pakola na mango Ema ya Likita na Sanduku ya Bondeko,
Exod LinVB 30:27  na meza na biloko binso bya meza, etemiseli ya mwinda na biloko binso bitali mwinda, na altare ya malasi,
Exod LinVB 30:28  altare ya mabonza ma kotumba na biloko binso bitali altare, na sani enene ya kosukola na ebonga ya yango.
Exod LinVB 30:29  Santisa biloko binso, bongo bikosala bisa-ntu, ata biye bisimbi byango bikosala bisantu mpenza.
Exod LinVB 30:30  Pakola Arone na bana ba ye mafuta ma bosantisi mpo ’te basalela ngai o mosala mwa bonganga.
Exod LinVB 30:31  Na nsima okoloba na bana ba Israel : Mafuta maye makosalela bino ná mabota ma bino mafuta masantu ma bopakoli.
Exod LinVB 30:32  Na mafuta mana okoki kopakola moto mosusu te, mpe okoki kosala na mango mosala mosusu te. Ezali eloko esantu, omemya yango.
Exod LinVB 30:33  Moto mosusu asali malasi mana to apakoli mango moto mosusu, balongola ye o libota lya bandeko ba ye. »
Exod LinVB 30:34  Yawe alobi na Mose : « Kamata malasi : storakesi, oniksi, galbano, matiti ma malasi na mpaka ya malasi mpimbo ; ya biloko bina binso se kopo ya lolenge loko.
Exod LinVB 30:35  Sala bongo malasi ya kotumba, se lokola mosali malasi akosalaka : mazala na mongwa, peto mpe masantu.
Exod LinVB 30:36  Nika ndambo mpe tia yango liboso lya Sanduku ya Bondeko, o Ema ya Likita, o esika nakokutana na yo. Otala mango lokola mafuta masantu.
Exod LinVB 30:37  Osala na malasi mana mosala mwa yo moko te : malasi mana mazali masantu, masalema se mpo ya Yawe.
Exod LinVB 30:38  Moto akosala mango mpo ’te ye moko ayoka elengi ya kolumbuta mango, balongola ye o libota lya ye. »