Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 5
Exod LinVB 5:1  Nsima ya makambo mana Moze na Arone bakei epai ya Farao, balobi na ye : « Yawe, Nzambe wa Israel, alobi ape : Tika bato ba ngai bakende, basepela eyenga ya ngai o eliki. »
Exod LinVB 5:2  Farao azongisi : « Yawe ye nani mpo ’te natosa ye, mpe natika ba-Israel bakende ? Nayebi Yawe te, mpe nakolingisa te ’te ba-Israel bakende. »
Exod LinVB 5:3  Bango balobi : « Nzambe wa ba-Ebrei ayaki koswana na biso. Lingisa biso tokende mobembo mwa mikolo misato o eliki mpo tobonzela Yawe Nzambe wa biso libonza ; soki bongo te, akotindela biso bokono bobe to akoboma biso na mopanga. »
Exod LinVB 5:4  Mokonzi wa Ezipeti alobi na bango : « Mose na Arone, mpo nini bolingi kolongola bato o mosala mwa bango ? Bosonga o misala mya bino. »
Exod LinVB 5:5  Farao alobi : « Sikawa bato bakomi baike o mokili, mpe bino bolingi batika mosala ? »
Exod LinVB 5:6  Bobele o mokolo monamei, Farao apesi etinda na bakengeli mpe na bakapita :
Exod LinVB 5:7  « Banda lelo bopesa bato lisusu matiti makauka te mpo ya kotumba biliki, lokola bopesaki liboso ; bango moko balokoto matiti makauka masengeli na bango.
Exod LinVB 5:8  Kasi bokatela bango motango mwa biliki se lokola bazalaki kosala liboso, bokutola ata moke te, mpo bazali bato ba goigoi. Se na ntina ena bazali koga-nga : ‘Tokende kobonzela Nzambe wa biso libonza’.
Exod LinVB 5:9  Bopesa bango misala makasi, bongo bamipesa na misala mpe batika kokanisaka makambo ma lokuta. »
Exod LinVB 5:10  Bakengeli na bakapita bakei koyebisa bato : « Farao alobi : Nakopesa bino lisusu matiti makauka te !
Exod LinVB 5:11  Bino moko bokende koluka mango esika bokoki koswa mango, kasi bokokutola mosala mwa bino ata moke te. »
Exod LinVB 5:12  Bongo bato banso bapalangani o mokili mobimba mwa Ezipeti mpo ya kolokoto matiti makauka.
Exod LinVB 5:13  Bakengeli bagangeli bango, balobi : « Bosilisa mosala mwa bino mwa mokolo na mokolo se lokola bosalaki kosala o mikolo bazalaki kopesa bino matiti. »
Exod LinVB 5:14  Babeti bakapita ba Israel baye bakengeli ba Farao batiaki, balobi : « Mpo nini lelo mpe lobi bokokisi motango mwa biliki te lokola bosalaki liboso ? »
Exod LinVB 5:15  Bakapita ba Israel bakei komilela epai ya Farao, balobi : « Mpo nini osali kosala basaleli ba yo bongo ?
Exod LinVB 5:16  Bazali kopesa biso, basaleli ba yo, matiti lisusu te, mpe balobi na biso : “Botumba biliki” ; bazali mpe kobete biso, basaleli ba yo. »
Exod LinVB 5:17  Farao azongisi : « Bosali bato ba goigoi, solo, bato ba goigoi mpenza ; yango wana bolobi : “Tolingi kobonzela Yawe libonza.”
Exod LinVB 5:18  Sikawa bokende kosala mosala. Bakopesa bino matiti te, kasi bokopesa motango mwa biliki se lokola batindaki. »
Exod LinVB 5:19  Bakapita ba Israel bamoni ’te bakomi na kwokoso awa balobaki na bango : « Mokolo na mokolo botumba biliki se ndenge yoko. »
Exod LinVB 5:20  Ebimi bango o ndako ya Farao, bakei epai ya Mose na Arone, baye bazalaki kosila bango.
Exod LinVB 5:21  Balobi na bango : « Yawe ye moko akata likambo lya bino. Mpo ya bino Farao na bato ba ye bakomi koyina biso, mpe o maboko ma bango botii mopanga moye mokoboma biso. »
Exod LinVB 5:22  Mose azongi epai ya Yawe mpe alobi na ye : « E Mokonzi, mpo nini osali bato ba yo mabe bongo ? Mpo nini otindaki ngai ?
Exod LinVB 5:23  Banda mokolo nakendeki kokutana na Farao mpe nasololi na ye o nkombo ya yo, azali se konyokolo bato, mpe yo osali eloko te mpo ya kobikisa bato ba yo. »