Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 3
Exod LinVB 3:1  Mose azalaki koleisa mpata ya bokilo wa ye Yetro, nganga Nzambe wa Madian. Akatisi na bango eliki, akomi o Oreb, ngomba ya Nzambe.
Exod LinVB 3:2  Anzelu wa Yawe abimeli ye o mololi o kati ya nzete. Mose atali : nzete epeli móto, nzokande ezalaki kosika te.
Exod LinVB 3:3  Mose amilobeli o motema : « Tika, napusana penepene, natala soko likambo nini lisali kuna mpe ntina nini nzete eye ezali kosika te. »
Exod LinVB 3:4  Yawe amoni ’te Mose azalaki koya kotala, mpe ut’o nzete eye epeli móto abengi ye : « Mose, Mose ! » Mose andimi : « Ngai oyo ! »
Exod LinVB 3:5  Nzambe alobi : « Oya penepene te, longola mapapa o makolo, zambi esika otelemi ezali mabelé masantu. »
Exod LinVB 3:6  Mpe alobi lisusu : « Ngai Nzambe wa bankoko ba yo, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob. » Mose azipi elongi ya ye, zambi abangi kotala Nzambe na miso.
Exod LinVB 3:7  Yawe alobi : « Namoni mpasi ya bato ba ngai o Ezipeti ; nayoki boleli bwa bango, zambi bazali konyokwama ; solo, nayebi mpasi ya bango.
Exod LinVB 3:8  Yango wana nakani kobikisa bango o maboko ma ba-Ezipeti, mpe nakokende na bango o mokili molamu mpe monene, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi : mokili mwa ba-Kanana, ba-Iti, ba-Amor, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus.
Exod LinVB 3:9  Sikawa nayoki boleli bwa bana ba Israel mpe namoni ndenge ba-Ezipeti bazali konyokolo bango.
Exod LinVB 3:10  Kende sikawa ; natindi yo o mboka Farao mpo ’te obimisa bato ba ngai bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti. »
Exod LinVB 3:11  Kasi Mose alobi na Nzambe : « Ngai nde nani ’te nakende o mboka Farao mpe nabimisa bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti ? »
Exod LinVB 3:12  Nzambe alobi na ye : « Ngai nakosala na yo ; tala mpe elembo ekolakisa yo ’te Ngai natindi yo : Soko osili olongoli bato o Ezipeti, bokokumisa Ngai o ngomba eye. »
Exod LinVB 3:13  Mose alobi na Nzambe : « Malamu, nakokende kotala bana ba Israel mpe nakoloba na bango : ‘Nzambe wa bankoko ba bino atindi ngai epai ya bino.’ Kasi soko bakotuna ngai : ‘Nkombo ya ye nani ?’ nazongisela bango nini ? »
Exod LinVB 3:14  Nzambe alobi na Mose : « NAZALI OYO NAZALI ! Okoloba na ba-Israel : ‘NAZALI’ atindi ngai epai ya bino.
Exod LinVB 3:15  Okoloba na bango mpe : YAWE, Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob atindi ngai epai ya bino. Eye ezali nkombo ya ngai ya seko ; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo ena o bileko binso seko.
Exod LinVB 3:16  Kende kosangisa bakolo ba Israel mpe loba na bango : ‘Yawe, Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob abimeli ngai. Alobi ape : Nayaki kotala bino mpe namoni makambo bazali kosala bino o Ezipeti.
Exod LinVB 3:17  Yango wana nakani kokamba bino ut’o Ezipeti, mokili mwa mpasi, kin’o mokili mwa ba-Kanana, ba-Iti, ba-Amor, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi.’
Exod LinVB 3:18  Bakoyoka yo. Okokende na bakolo ba Israel epai ya mokonzi wa Ezipeti, mpe bokoloba na ye : ‘Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei ayaki kotala biso ; lingisa biso tokende o eliki mikolo misato mpo tobonzela Yawe, Nzambe wa biso, mabonza.’
Exod LinVB 3:19  Nasili nayebi ’te mokonzi wa Ezipeti akopesa bino nzela bobele soko basengisi ye na makasi.
Exod LinVB 3:20  Yango wana nakotombola loboko mpe nakobete Ezipeti ; nakosala makamwisi ndenge na ndenge o kati ya bango, na nsima akopesa bino nzela bokende.
Exod LinVB 3:21  Nakosala ’te ba-Ezipeti balinga bato ba yo. Bongo, mokolo bokolongwa kuna, bokokende maboko mpamba te.
Exod LinVB 3:22  Basi ba bino basenge baninga ba bango ba-Ezipeti, na mpe mama wa ndako esika bakosalaka mosala, biloko bya palata, wolo na bilamba. Bokolatisa bana babali na basi byango ; babotolo bongo ba-Ezipeti biloko bya bango. »