Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EXODUS
Prev Up Next
Chapter 6
Exod LinVB 6:1  Yawe alobi na Mose : « Sikawa okomono makambo nalingi kosala Farao. Bokasi bwa loboko la ngai bokondimisa ye ’te bolongwa, se lobokomei lokotinda ye ’te abengana bino o ekolo ya ye. »
Exod LinVB 6:2  Yawe alobi na Mose maloba maye : « Ngai Yawe.
Exod LinVB 6:3  Nabimelaki Abarama, Isaka na Yakob lokola Nzambe wa bokasi bonso, kasi nayebisaki bango nkombo ya ngai Yawe te.
Exod LinVB 6:4  Mpe nakataki na bango bondeko mpo ya kokabela bango mokili mwa Kanana, mokili moye bafandaki lokola bampaya.
Exod LinVB 6:5  Mpe nayoki boleli bwa bana ba Israel, bakomaki baombo ba ba-Ezipeti ; bongo nakanisi lisusu bondeko bwa ngai.
Exod LinVB 6:6  Yango wana, loba na ba-Israel : Nazali Yawe mpe nakolongola bino o misala makasi mya ba-Ezipeti ; nakobikisa bino o boombo mpe nakosikola bino na bokasi bwa loboko la ngai mpe na bitumbu binene.
Exod LinVB 6:7  Nakokomisa bino bato ba ngai, mpe ngai nakosala Nzambe wa bino. Bokoyeba ’te nazali Yawe, Nzambe wa bino, oyo alongoli bino o misala makasi mya ba-Ezipeti.
Exod LinVB 6:8  Na nsima nakokotisa bino o mokili moye nalayelaki Abarama, Isaka na Yakob, mpe nakokomisa bino bankolo ba mokili ; ngai Yawe. »
Exod LinVB 6:9  Mose alobi bongo na bana ba Israel, kasi bayoki Mose te, zambi mosala molekaki makasi mpe molembisaki bango.
Exod LinVB 6:11  « Kende koyebisa Farao, mokonzi wa Ezipeti, atika bana ba Israel balongwa o mokili mwa ye. »
Exod LinVB 6:12  Mose alobi na Yawe maloba maye : « Bana ba Israel bayoki ngai te, ndenge nini Farao akoyoka ngai, ngai moto nayebi koloba malamu te ? »
Exod LinVB 6:13  Yawe atindi Mose na Arone epai ya Farao, mokonzi wa Ezipeti mpo ’te atika bana ba Israel balongwa o Ezipeti.
Exod LinVB 6:14  Tala nkombo ya bakonzi ba mabota ma bango : Bana ba Ruben, mwana wa yambo wa Israel : Kenok, Palu, Kesron na Karomi ; bango, mabota ma Ruben.
Exod LinVB 6:15  Bana ba Simeon : Yemuel, Yamin, Okad, Yakin, Sokar na Saul, mwana wa mwasi wa Kanana ; bango, mabota ma Simeon.
Exod LinVB 6:16  Tala nkombo ya bana ba Levi na bankoko ba bango : Gerson, Keat na Merari. Levi aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na nsambo.
Exod LinVB 6:17  Bana ba Gerson : Libni na Simei na mabota ma bango.
Exod LinVB 6:18  Bana ba Keat : Amram, Yisar, Kebron na Uziel. Keat aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na misato.
Exod LinVB 6:19  Bana ba Merari : Mali na Musi. Bango banso mabota ma Levi na bankoko ba bango.
Exod LinVB 6:20  Amram abali Yokebed, tata mwasi wa ye ; ye aboti Arone na Mose. Amram aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na nsambo.
Exod LinVB 6:23  Arone abali Eliseba, mwana wa Aminadab, ndeko wa Nakason ; oyo aboteli ye Nadab, Abiu, Eleazar na Itamar.
Exod LinVB 6:24  Bana ba Kore : Asir, Elkana mpe Abiasaf ; bango, mabota ma bato ba Kore.
Exod LinVB 6:25  Eleazar, mwana wa Arone, abali mwana mwasi moko wa Putiel ; oyo aboteli ye Pinekas. Bazalaki bakonzi ba mabota ma bato ba Levi, etuka na etuka.
Exod LinVB 6:26  Yawe alobaki na Arone mpe na Mose : « Bobimisa bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti, limpinga na limpinga. »
Exod LinVB 6:27  Bango nde, Mose na Arone, balobaki na Farao, mokonzi wa Ezipeti, ’te atika bana ba Israel balongwa o Ezipeti.
Exod LinVB 6:28  O mokolo mona Yawe alobaki na Mose o mokili mwa Ezipeti
Exod LinVB 6:29  maloba maye : « Ngai Yawe, loba na Farao, mokonzi wa Ezipeti, maloba manso nakoloba na yo. »
Exod LinVB 6:30  Mose alobi na Yawe : « Ngai nayebi koloba malamu te, boniboni Farao akondimela ngai ? »