EXODUS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
Chapter 32
| Exod | LinVB | 32:1 | Emoni bato ’te Mose aumeli kuna o ngomba, bakei koluka Arone, balobi na ye : « Salela biso ekeko ya nzambe moko oyo akokamba biso, zambi Mose oyo abimisaki biso o Ezipeti, toyebi te soko a-zwi likambo. » | |
| Exod | LinVB | 32:2 | Arone azongisi : « Bokende kolongola biloko binso bya wolo biye bisali o matoi ma basi ma bino na biye bya bana babali mpe bana basi, apela ngai byango. » | |
| Exod | LinVB | 32:4 | Awa azwi byango o maboko ma bango, anyangwisi binso na móto, atuli na yango ekeko ya mwana ngombe. Bato bagangi : « Israel, tala nzambe wa yo, oyo abimisaki yo o Ezipeti. » | |
| Exod | LinVB | 32:5 | Emoni Arone bongo, atongi altare o boso bwa ekeko mpe apesi etinda eye : « Lobi tosali na eyenga ya kokumisa Yawe. » | |
| Exod | LinVB | 32:6 | Mokolo mwa nsima bato balamuki na ntongontongo, babonzi mabonza ma kotumba mpe bayei na miboma mya bondeko. Bato bafandi mpo ya kolia mpe komele ; na nsima batelemi mpe babandi kobina. | |
| Exod | LinVB | 32:7 | Yawe alobi na Mose : « Kita ngomba, zambi bato baye obimisaki o Ezipeti basali lisumu ! | |
| Exod | LinVB | 32:8 | Basili balongwi o nzela nalakisi bango. Bamisaleli ekeko ya mwana ngombe, eye etulami na bibende o móto, bakumbameli yango. Babonzeli yango mabonza mpe balobi : Israel, tala nzambe oyo abimisaki yo o Ezipeti. » | |
| Exod | LinVB | 32:10 | Tika ngai, nangalisa nkanda ya ngai likolo lya bango, nasilisa bango ! Kasi yo okokoma tata wa ekolo ya bato baike. » | |
| Exod | LinVB | 32:11 | Mose ameki kobondela Yawe, Nzambe wa ye, mpo akitisa motema, atuni : « Mokonzi, mpo nini oyokela bato ba yo nkanda ape ? Yo moto obimisaki bango o Ezipeti na nguya enene mpe na bokasi bwa loboko la yo. | |
| Exod | LinVB | 32:12 | Mbele ba-Ezipeti bakoloba : Abimisaki bango na mayele mpo ’te bakende kokufa penepene na ngomba, bongo basila o mokili. Tika kosilika makasi ape, mabe olingaki kosala bato ba yo, osala mango te. | |
| Exod | LinVB | 32:13 | Kanisa basaleli ba yo Abarama, Isaka na Israel. Olakelaki bango na ndai ‘te : Nakopesa bino bana ebele lokola minzoto mya likolo, mpe nakopesa bankoko ba bino mokili moye mobimba ; mokosala mwa bango seko, lokola nalobaki. » | |
| Exod | LinVB | 32:15 | Mose azongi mpe akiti ngomba ; akamati mabanga mabale ma Bondeko o maboko ; mibeko mikomami epai na epai. | |
| Exod | LinVB | 32:17 | Yosue ayoki makeléle mpe migango mya bato, alobi na Mose : « Yoka makeléle ma etumba o nganda ! » | |
| Exod | LinVB | 32:18 | Mose azongisi : « Ezali nzembo ya bato balongi etumba te, boleli bwa bato bakwei o etumba mpe te. Nazali se koyoka nzembo ya bato bazali kobina. » | |
| Exod | LinVB | 32:19 | Ebelemi ye na nganda, amoni ekeko ya ngombe na bato bazalaki kobina. Mose atoki na nkanda, abwaki mabanga mazalaki o maboko ma ye, mpe abukibuki mango wana o nse ya ngomba. | |
| Exod | LinVB | 32:20 | Akamati ekeko ya ngombe eye batulaki, abwaki yango o móto ; aniki yango, ekomi mputulu, apanzi yango o mai, mpe amelisi ba-Israel mai mana. | |
| Exod | LinVB | 32:21 | Na nsima atuni Arone : « Bato baye basalaki yo nini ’te ondimisa bango lisumu lina linene ? » | |
| Exod | LinVB | 32:22 | Arone azongisi : « Mokonzi wa ngai, tika koyoka nkanda ape ! Yo moko oyebi ndenge bato baye bali-ngi kosala mabe. | |
| Exod | LinVB | 32:23 | Bango moko basengeki ngai : Salela biso ekeko ya nzambe oyo akokamba biso, zambi Mose oyo abimisaki biso o Ezipeti, toyebi te soko likambo nini likweli ye. | |
| Exod | LinVB | 32:24 | Yango wana nayebisaki bango : Banso balati biloko bya wolo, balongola byango ; bapesi ngai byango, nabwaki byango o móto, mpe ebimi wana ekeko eye ya ngombe ! » | |
| Exod | LinVB | 32:25 | Mose amoni ’te bato balekisaki ndelo ; Arone alingisaki yango, bakomi bongo koyoka nsoni o miso ma banguna. | |
| Exod | LinVB | 32:26 | Bongo Mose akei koteleme o ezibeli ya nganda mpe agangi : « Oyo alingi Yawe, abeleme na ngai ! » Ba-Levi banso bakei kosangana penepene na ye. | |
| Exod | LinVB | 32:27 | Alobi na bango : « Yawe, Nzambe wa Israel alobi ape : Bino banso bokamata mopanga ; botambola o nganda mobimba, boleka bipai binso mpe boboma bato, azala ndeko, moyebani to moninga wa yo. » | |
| Exod | LinVB | 32:29 | Mose alobi : « Lelo bolakisi ’te bondimi mosala Yawe apesi bino : bobangaki te koboma ata mwana to ndeko wa bino, yango wana Yawe abenisi bino lelo. » | |
| Exod | LinVB | 32:30 | Mokolo mwa nsima Mose alobi na bato : « Bosali lisumu linene. Sikawa nakobuta ngomba lisusu, epai ya Yawe ; mbele ndenakoki koswela bino bolimbisi. » | |
| Exod | LinVB | 32:31 | Mose azongi epai ya Yawe, alobi : « Mawa mingi ! Bato baye basali lisumu linene, bamisaleli ekoko ya nzambe moko na wolo ! | |
| Exod | LinVB | 32:32 | Nzokande, soko olingi, olimbisa lisumu lya bango. Soki te, malamu olongola nkombo ya ngai o buku ya yo. » | |
| Exod | LinVB | 32:33 | Yawe azongisi : « O buku ya ngai nakolongola bobele nkombo ya moto oyo asali lisumu o miso ma ngai. | |
| Exod | LinVB | 32:34 | Sikawa kende mpe kamba bato o esika nalakisi yo. Anzelu wa ngai akokende liboso lya yo. Baye basali lisumu, nakopesa bango etumbu mokolo bakosambisa bato. » | |