EXODUS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
Chapter 25
| Exod | LinVB | 25:2 | « Loba na bana ba Israel : Bafutisa bato banso mpako mpo ya ngai. Bayamba makabo ma bato banso bazali na mposa ya kokaba. | |
| Exod | LinVB | 25:4 | bilamba bya kiusa ya langi ya longondo, motane to moi-ndo, bya malekani kitoko mpe bya nsuki ya ntaba ; | |
| Exod | LinVB | 25:6 | mafuta mpo ya mwinda monene, malasi mpo ya mafuta ma bopakoli mpe mpaka ya malasi mpo ya kotumba ; | |
| Exod | LinVB | 25:7 | mabanga ma motuya lokola kornaline mpe mabanga kitoko mpo ya kokembisa efod na libenga. | |
| Exod | LinVB | 25:10 | Sala sanduku na mabaya ma akasia, bolai maboko mabale na ndambo, bonene loboko loko na ndambo, mpe bosanda loboko loko na ndambo. | |
| Exod | LinVB | 25:11 | Obaka yango na manzanza ma wolo kitoko o kati mpe o libanda, oke-mbisa yango bipai binso na ekembiseli ya wolo. | |
| Exod | LinVB | 25:12 | Tula mpo ya yango mpete inei ya wolo mpe tia yango o nse o bipai binei : mpete ibale epai na epai. | |
| Exod | LinVB | 25:14 | mpe kotisa mango o kati ya mpete ibakemi na sanduku epai na epai, mpo ’te bato bakoka komeme sanduku. | |
| Exod | LinVB | 25:17 | Likolo lya sanduku okokanga ezipeli ya wolo kitoko, ezala na bolai maboko mabale na ndambo mpe na bonene loboko loko na ndambo. | |
| Exod | LinVB | 25:20 | Bakerubim batombola mapapu epai ya likolo mpo ya kobatela ezipeli na mapapu ma bango ; batalana bilongi, kasi miso ma bango matala ezipeli. | |
| Exod | LinVB | 25:22 | Nakokutana na yo o esika ena, likolo lya ezipeli. Bobele ut’o ezipeli mpe o kati ya bakerubim babale bazali likolo lya Sanduku ya Bondeko nakopesa yo mibeko mitali bato ba Israel. | |
| Exod | LinVB | 25:23 | Sala meza na mabaya ma akasia, bolai maboko mabale, bonene loboko loko, mpe bosanda loboko loko na ndambo. | |
| Exod | LinVB | 25:25 | Zongazonga na meza, kata nkoma ya bonene lokola misapi misato mpe zinga inso lisusu na ekembiseli ya wolo. | |
| Exod | LinVB | 25:26 | Tula mpe mpete inei ya wolo mpe baka yango na nsuka inei epai ya makolo ma yango manei. | |
| Exod | LinVB | 25:29 | Sala lisusu sani, kopo, mbilika na mbeki mpo ya mabonza ma bomeli ; sala inso se na wolo. | |
| Exod | LinVB | 25:31 | Sala mpe etemiseli ya mwinda na wolo kitoko. Eteni ya nse mpe mobimbi mwa yango mosengeli kotulama ; fulele, mbuma na nkasa ya yango, inso itulama mpe isangana lokola etemiseli. | |
| Exod | LinVB | 25:33 | Etapi ya yambo ezala na fulele isato ifungwani lokola nkeni ; isala na mbuma mpe na nkasa. Mpe etapi esusu ezala mpe na fulele isato na mbuma mpe na nkasa. Bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda bisalema se ndenge yoko. | |
| Exod | LinVB | 25:34 | Etemiseli ya mwinda yangomei ezala na nkeni inei ifungwani lokola fulele, na mbuma mpe nkasa ya yango : | |
| Exod | LinVB | 25:35 | mbuma yoko o nse ya bitapi bibale bya yambo bya etemiseli ya mwinda ; mbuma yoko o nse ya bitapi bisusu bibale mpe mbuma yoko o nse ya bitapi bya nsuka ; ezala bongo na bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda. | |
| Exod | LinVB | 25:36 | Mbuma na bitapi isangana na etemiseli ya mwinda, mpe inso isengeli kotulama na wolo mpe kosangana lokola eloko yoko. | |