Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I KINGS
Prev Up Next
Chapter 16
I Ki LinVB 16:1  Yawe alobi na Yeku, mwana wa Kanani : « Kende koyebisa Basa :
I Ki LinVB 16:2  Nalongolaki yo o kati ya mputulu mpe nalubolaki yo moko­nzi wa bato ba ngai ba-Israel, kasi ola­ndaki ezalela ya Yeroboam, mpe oti­ndaki bato ba ngai o nzela ya masumu maye makoyokisaka ngai nkanda enene.
I Ki LinVB 16:3  Nakosilisa yo Basa na libota lya yo, nakosala na libota lya yo lokola nasalaki na libota lya Yeroboam, mwana wa Nebat.
I Ki LinVB 16:4  Moto wa libota lya Basa, oyo akokufa o mboka, mbw­a ikolia ye ; oyo akokufa o bila­nga, ndeke ya likolo ikolia ye. »
I Ki LinVB 16:5  Makambo masusu ma Basa, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:6  Basa akei kokutana na ba­nkoko ba ye mpe bakundi ye o Tirsa. Mwana wa ye Ela akitani ye.
I Ki LinVB 16:7  Yawe atindi naino profeta Yeku, mwana wa Kanani, akende kopalela Basa na libota lya ye, zambi asalaki mabe mingi o miso ma Yawe, ayokisi ye nkanda na misala mya ye lokola bato ba libota lya Yeroboam basalaki ; asilisi mpe libota lya Yeroboam mobimba.
I Ki LinVB 16:8  O mobu mwa ntuku ibale na motoba mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Ela, mwana wa Basa, akomi mokonzi wa Israel o Tirsa ; aumeli na bokonzi mibu mibale.
I Ki LinVB 16:9  Mosaleli wa ye Zimri, komanda wa ndambo ya basoda ba makalo, atomboki na ye. Ezalaki ye o Tirsa, ameli tee alangwi o ndako ya Arsa, moyangeli wa ndako ya mokonzi o Tirsa.
I Ki LinVB 16:10  Zimri akoti o ndako, abeti Ela mpe abomi ye ; ezalaki o mobu mwa ntuku ibale na nsambo mwa bokonzi bwa Asa o Yuda. Bo­ngo akitani Ela.
I Ki LinVB 16:11  Ekomi ye mokonzi mpe efandi ye o ngwende ya bokonzi, abomi bat­o banso ba libota lya Basa, atiki mobali moko te, abomi bandeko na baninga ba ye banso.
I Ki LinVB 16:12  Zimri asilisi libota lya Basa mobimba lokola Yawe alobaki mpo ya Basa na monoko mwa profeta Yeku ;
I Ki LinVB 16:13  esalemaki bo­ngo mpo ya masumu manso ma Basa, na maye ma mwana wa ye Ela, mpe zambi bakotisaki Israel o nzela ya masumu mpe bongo bayokisaki Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene na bikeko bya bango bya mpamba.
I Ki LinVB 16:14  Makambo masusu ma Ela, na mpe misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:15  O mobu mwa ntuku ibale na nsa­mbo mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Zimri akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mikolo nsambo o Tirsa. O ntango ena bato bapiki nganda liboso lya Gibeton, mboka ya ba-Filisti.
I Ki LinVB 16:16  Eyoki bato o nganda nsango eye : « Zimri ato­mboki, abomi mokonzi ! », ba-Israel banso o nganda baluboli komanda wa basoda Omri mokonzi wa Israel, se o mokolo monamei.
I Ki LinVB 16:17  Omri na bato banso ba Israel balongwi o Gibeton mpe bakei kozinga Tirsa.
I Ki LinVB 16:18  Emoni Zimri ’te babotoli mboka, akoti o linongi lya ndako ya mokonzi, atumbi ndako ya mokonzi likolo lya ye mpe akufi.
I Ki LinVB 16:19  Esalemi bongo mpo ya masumu ma ye, zambi asalaki mabe o miso ma Yawe, alandaki ezalela ya Yeroboam, oyo abendaki ba-Israel o nzela ya masumu.
I Ki LinVB 16:20  Makambo masusu ma Zimri, botomboki bwa ye, mana manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:21  O mikolo mina ba-Israel baka-bwani : basusu balandi Tibni, mwana wa Ginat, mpo balubola ye mokonzi, basusu balandi Omri.
I Ki LinVB 16:22  Esika bazalaki kowelana bokonzi boye, bato ba Omri balongi bato ba Tibni, mwana wa Ginat. Tibni akufi mpe Omri ako­mi mokonzi.
I Ki LinVB 16:23  O mobu mwa ntuku isato na moko mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Omri akomi mokonzi wa Israel ; aumeli na bokonzi mibu zomi na mibale. Afandi o Tirsa mibu motoba ;
I Ki LinVB 16:24  na nsima asombi ngomba ya Samaria, afuti Semer talenta ya palata ibale. Atongi mboka o ngomba mpe atangi yango Samaria mpo ya nkombo ya Semer, nkolo wa ngomba.
I Ki LinVB 16:25  Omri asali mabe o miso ma Yawe, aleki naino bakonzi ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:26  O makambo manso alandi ezalela ya Yeroboam, mwana wa Nebat, asali masumu maye Yeroboam alakisaki ba-Israel, ayokisi Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene na bikeko bya ye bya mpamba.
I Ki LinVB 16:27  Makambo masusu ma Omri, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:28  Omri akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Samaria. Mwana wa ye Akab akitani ye.
I Ki LinVB 16:29  O mobu mwa ntuku isato na mwambe mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Akab, mwana wa Omri, akomi mokonzi wa Israel. Ayangeli ekolo Israel mibu ntuku ibale na mibale o Samaria.
I Ki LinVB 16:30  Akab, mwana wa Omri, asali mabe o miso ma Yawe, aleki bakonzi ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:31  Alandi bobe­le te nzela ya masumu ma Yeroboam, mwana wa Nebat, kasi abali lisusu Yezabel, mwana wa Itobaal, mokonzi wa ba-Sidoni. Akei kosalela nzambe Baal, akumbameli ekeko ya ye.
I Ki LinVB 16:32  Atongeli Baal etumbelo o ndako atongaki o Samaria.
I Ki LinVB 16:33  Akab atelemisi mpe likonzi lya ekeko ; akobi kosala mabe o miso ma Yawe Nzambe wa Israel ; aleki bakonzi ba Israel ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:34  O eleko ya ye Kiyel wa Betel atongi lisusu lopango zongazonga na Yeriko ; ntango atii maba­nga manene ma nse, mwana wa ye wa yambo Abiram akufi, mpe o ntango atelemisi bizibeli bya mboka, mwana wa ye wa nsuka Segub akufi, se lokola Yawe alobaki kala na monoko mwa Yozue, mwana wa Nun.