I SAMUEL
Chapter 30
I Sa | LinVB | 30:1 | Ekomi Davidi na bato ba ye o Siklag nsima ya mikolo misato, bato ba Amalek basilaki kokoto o Negeb mpe o Siklag. Babebisaki Siklag mpe batumbaki yango. | |
I Sa | LinVB | 30:2 | Bakangaki basi banso bazalaki wana, bana na bakolo, kasi babomaki moto te. Bakangaki bango bo baombo mpe bakobi nzela ya bango. | |
I Sa | LinVB | 30:3 | Ekomi Davidi na bato ba ye pene na mboka, bamoni ’te mboka etumbami mpe basi na bana ba bango, babali na basi, bakendeki o boombo. | |
I Sa | LinVB | 30:5 | Basi babale ba Davidi bakangemaki mpe bo baombo, Akinoam wa Yizreel na Abigayil, mwasi wa Nabal, moto wa Karmel. | |
I Sa | LinVB | 30:6 | Davidi ayoki mpi, mpo bato bazalaki koloba ’te bakoboma ye na mabanga, zambi banso bazalaki koyoka motema mpasi, moto na moto mpo ya bana ba ye babali na basi. Kasi Davidi azwi mpiko lisusu o motema mpo ya Yawe Nzambe wa ye. | |
I Sa | LinVB | 30:7 | Davidi alobi na nganga Nzambe Ebiatar, mwana wa Akimelek : « Nasengi yo, pesa ngai efod. » Ebiatar ayei na efod epai ya Davidi. | |
I Sa | LinVB | 30:8 | Davidi atuni Yawe : « Soko nalandi bayibi, nakozwa bango ? » Yawe alobi na ye : « Kende kolanda bango. Okozwa bango mpe okobikisa bandeko ba yo. » | |
I Sa | LinVB | 30:10 | Davidi akobi kolanda banguna elongo na bato nkama inei, kasi bato nkama ibale batikali nsima, zambi balembi mingi mpe bakokaki kokatisa mai makasi ma Besor te. | |
I Sa | LinVB | 30:11 | Bazwani na mo-Ezipeti moko o esobe mpe bakei na ye epai ya Davidi. Bapesi ye mampa alia na mpe mai amele. | |
I Sa | LinVB | 30:12 | Bapesi ye bisikiti ilambami na mbuma ya figi na mpe bituka bibale bya mbuma ya vino ikauki. Awa alei, mayele ma ye mazongeli ye, zambi mikolo misato na butu isato aliaki te, ameleki mpe eloko te. | |
I Sa | LinVB | 30:13 | Davidi atuni ye : « Yo moto wa nani mpe outi wapi ? » Azongisi : « Nazali elenge mobali wa Ezipeti, moombo wa mo-Amalek moko. Nkolo wa ngai atikaki ngai, zambi nabeleki, ekomi sikawa mikolo misato. | |
I Sa | LinVB | 30:14 | Biso bato tokendeki kobunda na ba-Keret kuna o Negeb, na bato ba Yuda, mpe na bato ba Kaleb o Negeb lokola, mpe totumbaki Siklag na móto. » | |
I Sa | LinVB | 30:15 | Davidi atuni ye : « Olingi kolakisa biso esika bazali ? » Azongisi : « Layela ngai ndai o miso ma Nzambe ’te okoboma ngai te mpe okokaba ngai o maboko ma nkolo wa ngai te, bongo nakokamba yo epai ya bango. » | |
I Sa | LinVB | 30:16 | Akambi Davidi kuna. Ba-Amalek bapalangani o ekolo mobimba ; bazalaki kolia, komele mpe kosepela na biloko ebele biye babotoloki o ekolo ya ba-Filisti mpe ya Yuda. | |
I Sa | LinVB | 30:17 | Davidi abomi bango, banda ntongo tee mpokwa ya mokolo mwa nsima. Moto moko abiki te, longola se bilenge nkama inei babutelaki kamela mpe bakimi. | |
I Sa | LinVB | 30:18 | Davidi abikisi bato banso bakangemaki na ba-Amalek ; abikisi mpe basi ba ye babale. | |
I Sa | LinVB | 30:19 | Moto moko abungi te o kati ya bana na bakolo, o kati ya bana basi na bana babali. O kati ya biloko binso babotoloki, biye bamemeki o mboka ya bango, eloko yoko ebungi te. Mpe Davidi azongisi biloko bina binso. | |
I Sa | LinVB | 30:20 | Davidi akei na bibwele binso, ngombe na mpata. Baye bazalaki kotambola liboso mpo ’te bakamba bibwele, balobi : « Tala biloko Davidi abotoloki o etumba. » | |
I Sa | LinVB | 30:21 | Davidi akomi epai ya bato nkama ibale, baye balandaki ye te, mpo balembeki mingi. Bango batikalaki pene na moluka Besor ; babimi mpo ya kokutana na Davidi na bato ba ye. Elongo na bato ba ye Davidi abelemi na bango mpe apesi bango losako. | |
I Sa | LinVB | 30:22 | Kasi o kati ya bato bakendeki elongo na Davidi, bato babe mpe ba nkanza babandi koloba : « Awa bango bakendeki elongo na biso te, tokopesa bango eloko te ya biloko binso tobotoloki, tokozongisela bango se basi na bana ba bango ; bakamata bango mpe bakende ! » | |
I Sa | LinVB | 30:23 | Kasi Davidi alobi : « E bandeko ba ngai, bosala bongo te na biloko Yawe akabeli biso. Ye abateli biso mpe akabi o maboko ma biso banguna bayaki kobundisa biso. | |
I Sa | LinVB | 30:24 | Nani akoki kolongisa bino o likambo bolingi kosala ? Ná moto akei etumba, ná moto atikali mpo ya kokengele biloko, banso bakozwa biloko, esengeli ’te bakabolana. » | |
I Sa | LinVB | 30:25 | Ut’o mokolo mona, Davidi akomisi yango mobeko mpe momeseno o Israel ; mozali se bongo tee lelo. | |
I Sa | LinVB | 30:26 | Awa Davidi akomi o Siklag atindeli bakolo ba Yuda, bandeko ba ye, ndambo ya biloko abotoloki o etumba, mpe alobi na bango : « Libonza liye nabotoloki banguna ba Yawe, | |