Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JEREMIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 41
Jere LinVB 41:1  O sanza ya nsambo, Yismael, mwana wa Netanya, nkoko wa Elisama, moto wa libota lya mokonzi mpe nkumu monene wa ekolo, akei na bato zomi epai ya Godolia, mwana wa Akikam, o Mispa. Ntango bazalaki kolia o Mispa,
Jere LinVB 41:2  Yismael na bato ba ye zomi batelemi mpe babeti Godolia, mwana wa Akikam, nkoko wa Safan, na mopanga. Babomi bongo moto oyo mokonzi wa Babilon atiaki moya­ngeli wa ekolo.
Jere LinVB 41:3  Yismael abomi mpe bato ba Yudea banso bazalaki epai ya Godolia o Mispa mpe basoda ba-Kaldea bazalaki wana.
Jere LinVB 41:4  Mikolo mibale nsima ya koboma Godolia, moto moko ayebi ya­ngo naino te,
Jere LinVB 41:5  bato ntuku mwambe bautaki o Sikem, Silo na Samaria, bayei ; bakataki mandefu, balati bilamba bipaswani, bakataki nzoto mpota mpota ; bayei na mabonza ma bolei mpe na mpaka ya malasi mpo ’te babonza mango o Tempelo ya Yawe.
Jere LinVB 41:6  Yismael, mwana wa Netanya, abimi o Mispa mpe akei kokutana na bango, mai o miso. Awa akomi penepene na ba­ngo, alobi : « Yaka epai ya Godolia, mwana wa Akikam. »
Jere LinVB 41:7  Kasi o nta­ngo bakomi o kati ya engumba, Yismael na bato ba ye babomi ba­ngo mpe babwaki bango o libulu lya mai.
Jere LinVB 41:8  Nzokande o ntei ya bango bato zomi balobi na Yismael : « Oboma biso te, zambi tobombi biloko bya bolei o bilanga : mbuma ya mampa, loso, mafuta ma oliva mpe ma nzoi. » Bongo Yismael abomi bango te lokola abomaki baninga ba ba­ngo.
Jere LinVB 41:9  Libulu lina esika Yismael a­bwaki bibembe bya bato abomaki, lizalaki libulu linene liye mokonzi Asa atimolaki o ntango ya etumba na Basa, mokonzi wa Israel. Yismael, mwana wa Netanya, atondisi lya­ngo na bibembe.
Jere LinVB 41:10  Yismael aka­ngi bato banso ba Mispa, ná bana basi ba mokonzi ná bato banso batikalaki o Mispa, baye Nabuzaradan, komanda wa bakengeli, apesaki Godolia, mwana wa Akikam. Na nta ntongo Yismael, mwana wa Ne­tanya, abandi kokende na bango epai ya ba-Amon.
Jere LinVB 41:11  Ntango Yokanan, mwana wa Ka­rea, na bakomanda banso bazalaki na ye, bayoki mabe manso Yismael, mwana wa Netanya, asalaki,
Jere LinVB 41:12  basangisi bato banso mpe bakei kobundisa Yismael, mwana wa Netanya. Bakutani penepene na etima ya Gabaon.
Jere LinVB 41:13  Awa bato bakangemi na Yismael bamoni Yokanan na bakomanda banso bazalaki na ye, basepeli mingi mpenza.
Jere LinVB 41:14  Bato Yismael akangaki o Mispa batiki ye mpe bakei epai ya Yokanan, mwana wa Karea.
Jere LinVB 41:15  Yismael, mwana wa Netanya, na bato mwambe bakimi Yokanan, mwana wa Karea, mpe bakei epai ya ba-Amon.
Jere LinVB 41:16  Yokanan, mwana wa Karea, na bakomanda ba basoda bazalaki na ye basangisi bato banso Yismael, mwana wa Neta­nya, akangaki o Mispa, esika abomaki Godolia, mwana wa Akikam. Balongoli bongo babali, basi, bana na ba-eniki o Gabaon.
Jere LinVB 41:17  Bakei, bapemi o nganda ya Kimam, penepene na Beteleme ; nsima bakei o Ezipeti.
Jere LinVB 41:18  Bazalaki kobanga ba-Kaldea mpe bakimi bango, mpo Yismael, mwana wa Netanya, abomaki Godolia, mwana wa Akikam, oyo mokonzi wa Babilon atiaki moyangeli wa ekolo.