Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 13
Josh LinVB 13:1  Yozue anuni mpe akokisi mibu mingi. Yawe alobi na ye : « Okomi mobange, nzokande etikali ’te okamata naino mokili monene moko.
Josh LinVB 13:2  Tala mokili motikali naino : Mboka inso ya ba-Filisti mpe mo­kili mobimba mwa ba-Gesur,
Josh LinVB 13:3  banda Sikor penepene na Ezipeti tee ndelo ya Ekron o Nordi, eye etangemi mokili mwa Kanana. Bakonzi batano ba ba-Filisti ba mboka Gaza, Asdod, Askalon, Gat na Ekron mpe ba-Avi bakofandaka o Sudi.
Josh LinVB 13:4  Mokili mobi­mba mwa ba-Kanana ut’o Ara, mokili mwa ba-Sidoni tee Afeka o ndelo ya ba-Amor ;
Josh LinVB 13:5  bakisa mokili mwa ba-Gibli na mokili mwa Libano epai ya Esti, banda Baal-Gad o nse ya ngo­mba Ermon tee Lebo-Amat ;
Josh LinVB 13:6  na bato banso bakofandaka o ngomba banda Libano tee Misrefot epai ya Westi na mpe bato ba Sidoni : Ngai moto nakobengana bango o miso ma bato ba Israel. Mosala mwa yo se kokabolela bato ba Israel mabelé lokola natindaki yo.
Josh LinVB 13:7  Sikawa kabola mabelé maye na mabota libwa mpe na ndambo ya libota lya Manase. »
Josh LinVB 13:8  Bato ba ndambo esusu ya libota lya Manase na bato ba libota lya Ruben mpe ba Gad basili bazwaki mabelé o ngambo ya Yordane epai ya Esti, maye Moze mosaleli wa Yawe apesaki bango ;
Josh LinVB 13:9  ut’o Aroer, o libongo lya Arnon, na mboka esusu o kati ya lobwaku, na ngomba mobimba ut’o Mediba tee Dibon ;
Josh LinVB 13:10  mboka inso ya Sikon, mokonzi wa ba-Amor, oyo ayangelaka Kesbon tee ndelo ya ba-Amon.
Josh LinVB 13:11  Bakisa Galaad na mokili mwa ba-Gesur na ba-Maaka, elongo na ngomba Ermon na mokili mwa Basan mobimba tee Salka ;
Josh LinVB 13:12  mpe o mokili mwa Basan, mokili mobimba mwa Og, oyo ayangelaka Astarot mpe Edrei, azalaka moto wa nsuka wa libota lya ba-Refaim. Moze alo­ngaki mpe abenganaki bakonzi baye babale.
Josh LinVB 13:13  Kasi ba-Israel babenganaki ba-Gesur na ba-Maaka te ; yango wana ba-Gesur mpe ba-Maaka bafandi o kati ya ba-Israel tee lelo.
Josh LinVB 13:14  Se bato ba libota lya Levi bazwi mabelé te ; bango bakozwaka mabonza bakobo­nzelaka Yawe Nzambe wa Israel, lokola alobelaki bango.
Josh LinVB 13:15  Moze apesaki bato ba libota lya Ruben mabelé engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 13:16  Mokili mwa bango mobandi o Aroer, penepene na moluka Arnon, na mboka esusu o kati ya lo­bwaku, na ngomba mobimba tee Mediba,
Josh LinVB 13:17  Kesbon na mboka inso itonga­mi o ngomba : Dibon, Bamot-Baal, na Bet-Baal-Meon,
Josh LinVB 13:19  Kiriataim, Sibma na Sereta-Sakar, o ngomba ya mokili mwa Araba,
Josh LinVB 13:20  Bet-Peor, mabwaku o nse ya ngo­mba Pisga na Bet-Ayesimot,
Josh LinVB 13:21  mbo­ka inso ya ngomba na mokili mobimba mwa Sikon, mokonzi wa ba-Amor, moto ayangelaka Kesbon ; Moze moto alongaki ye na bakonzi basusu ba Madian : Evi, Rekem, Sur, Ur na Reba ; bango banso bafandaki o mokili mwa Sikon mpe bazalaki kofuta ye mpako.
Josh LinVB 13:22  Elongo na bango ba-Israel babomaki nganga Balame, mwana wa Beor, na mopanga.
Josh LinVB 13:23  Bo­ngo ndelo ya bato ba Ruben ezali Yordane na mokili mwa penepene. Bana ba Ruben bazwi mabelé engebene na bituka bya bango ; bazwi mboka inene na ike.
Josh LinVB 13:24  Moze apesaki bato ba libota lya Gad mabelé engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 13:25  Mokili mwa bango : Yazaer, mboka inso ya Galaad, ndambo ya mo­kili mwa ba-Amon tee Aroer, mboka etalani na Raba,
Josh LinVB 13:26  mpe banda Kesbon tee Ramat-Amispe mpe Betonim ; longwa Makanaim tee mokili mwa Lo-Debar,
Josh LinVB 13:27  mpe o lobwaku : Bet-Aram, Bet-Nimra, Sukot na Safon (ndambo ya mokili mwa Sikon, mokonzi wa Kesbon) Yordane na mo­kili penepene tee etima ya Kineret, o ngambo ya Yordane epai ya Esti.
Josh LinVB 13:28  Bana ba Gad bazwaki mabelé mana engebene na bituka bya bango, mboka inene mpe ike.
Josh LinVB 13:29  Moze apesaki ndambo ya libota lya Manase mabelé engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 13:30  Bazwaki mokili mobimba mwa Basan, mabelé ma Og, mokonzi wa Basan, banda Makanaim tee nganda ya Yair : mboka ntuku motoba.
Josh LinVB 13:31  Bapesaki bato ba Makir nda­mbo ya Galaad, Astarot mpe Edrei, mboka ya mokonzi Og o Basan. Mabelé bapesaki ndambo ya libota lya bana ba Makir, mango mana, engebene na bituka bya bango.
Josh LinVB 13:32  Moze akabolaki mabelé mana o Bisobe bya Moab, o ngambo ya Yordane penepene na Yeriko epai ya Esti.
Josh LinVB 13:33  Kasi Moze apesaki bato ba libota lya Levi mabelé te ; mabonza bakobonzelaka Yawe Nzambe wa Israel mazali likabo lya bango lokola alobelaki bango.