Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Luke LinVB 17:1  Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Bisímbisi bikokí kozánga té, kasi mawa na moto akopésa bisímbisi !
Luke LinVB 17:2  Elekí malámu bákanga yě libángá linéne o nkíngó, liye bakoníkaka na lyangó mbuma ya mámpa, mpé bábwáka yě o mbú ; bôngó ápésa mǒkó wa bána baye baké esímbisi té.
Luke LinVB 17:3  Bómíkéngele malámu ! Sókó ndeko wa yǒ asálí yǒ mabé, pálélá yě ; mpé sókó ayókí motéma mawa, límbísá yě.
Luke LinVB 17:4  Atâ asálí yǒ mabé mbala nsambo o mokolo mǒkó, lí­mbísá yě sókó azóngí mbala nsambo epái ya yǒ mpé alobí : ‘Nayókí motéma mawa’. »
Luke LinVB 17:5  Bapóstolo balobí na Mokonzi : « Léndísá boyambi bwa bísó ! »
Luke LinVB 17:6  Mokonzi ayanólí : « Sókó bozalákí atâ na mwâ boyambi, boké lokóla mbóto ya sénevé, mbele bolobí na nzeté êná : ‘Omípikola mpé kendé kopikama o mbú !’, mpé nzeté ekotósa bínó.
Luke LinVB 17:7  Náni o ntéi ya bínó, sókó azalí na mosáli óyo akokátaka bilanga tǒ akokéngeleke bibwélé, akoloba na yě ntángo aútí o bilanga : ‘Yáká nokí kofánda o méza’ ?
Luke LinVB 17:8  Akoloba na yě té ’te : ‘Lámbélá ngáí bilóko, látá elambá ya mosálá mpé sálélá ngáí ntángo nazalí kolía mpé komele. Na nsima yǒ mpé okolía mpé okomele’ ?
Luke LinVB 17:9  Asengélí ndé kotóndo mosáli ôná, zambí asálí maye atíndákí yě ?
Luke LinVB 17:10  Bínó sé bôngó : Sókó bosálí mánso batíndí bínó, bóloba : ‘Tozalí sé basáleli, tosálí maye tosengélákí kosála’. »
Luke LinVB 17:11  Awa Yézu azalákí kokende o Yerúzalem, akátísí ndelo ya Samaría na Galiléa.
Luke LinVB 17:12  Ekótí yě o mbóka yǒkó, bato zómi bazalákí na maba bayéí kokútana na yě. Batélémí mwâ mosíká,
Luke LinVB 17:13  bagángí : « Yézu, motéyi, yókélá bísó mawa. »
Luke LinVB 17:14  Awa Yézu amóní bangó, alobí : « Bókende komílakisa na banganga Nzámbe. » Ntángo bakómí kokende, bapétwámí.
Luke LinVB 17:15  Mǒkó wa bangó, áwa amóní ’te apétwámí, azóngí mpé akúmísí Nzámbe na mongóngó makási.
Luke LinVB 17:16  Akwéí elongi o nsé o bosó bwa Yézu mpé atóndí yě. Nzókandé azalákí mo-Samaría.
Luke LinVB 17:17  Yézu atúní : « Bangó bánso zómi bakómí péto té ? Bôngó wápi basúsu libwǎ ?
Luke LinVB 17:18  Bobélé mompaya óyo azóngí mpô ya kokúmisa Nzámbe ? »
Luke LinVB 17:19  Alobí na yě : « Télémé, kendé, boyambi bwa yǒ bobíkísí yǒ. »
Luke LinVB 17:20  Ba-Farizéo batúní yě mokolo níni Bokonzi bwa Nzámbe boko­yâ. Azóngísí : « Boyéi bwa Bokonzi bwa Nzámbe bokokí komónono na míso té.
Luke LinVB 17:21  Báloba té ’te ‘Tálá bokonzi bokómí áwa, tǒ : bokómí kúná !’, zambí Bokonzi bwa Nzámbe bozalí o ntéi ya bínó. »
Luke LinVB 17:22  Alobí na bayékoli : « Mokolo mosúsu bokoyóka mpósá ya komóno Mwána wa Moto, atâ mokolo mǒkó mpámba, kasi bokomóno yě té.
Luke LinVB 17:23  Bakoloba na bínó : ‘Tálá yě óyo ! Tálá yě kúná !’ Bókende kúná té, bólanda bangó kúná nokí té.
Luke LinVB 17:24  Lokóla monkalali mokoútaka epái yǒkó ya likoló mpé mokongengeke kín’o epái esúsu, ekozala sé bôngó na Mwána wa Moto o mokolo akoyâ.
Luke LinVB 17:25  Kasi libosó asengélí koyóka mpási míngi mpé kobóyama na bato bazalí sikáwa.
Luke LinVB 17:26  Lokóla esálémákí o mikolo mya Nowé, ekozala mpé bôngó o mikolo Mwána wa Moto akoyâ.
Luke LinVB 17:27  Bato bazalákí kolía, komele, kobálana, téé mokolo Nowé ayíngélí o masúwa. Na nsima mpela eyéí, ebomí bangó bá­nso.
Luke LinVB 17:28  Esálémákí sé bôngó o mikolo mya Lot ; bato bazalákí kolía, komele, kosómba, kotéke, kolóna, kotónga ndáko ;
Luke LinVB 17:29  kasi mokolo Lot abimákí o Sódoma, Nzámbe anókísí mbúla ya móto ezíkísí bangó, ebomí bangó bánso.
Luke LinVB 17:30  Ekozala bobélé bôngó o mokolo Mwána wa Moto akomónono.
Luke LinVB 17:31  O mokolo môná, moto akozala o motóndo mwa ndáko, kasi bilóko bya yě bizalí o ndáko, ákita té mpô ya kokamata byangó : bobélé bôngó na óyo akozala o bilanga : ázónga o ndáko té.
Luke LinVB 17:33  Moto akoluka kobíkisa bomoi bwa yě, akobúngisa bwangó ; kasi óyo akobúngisa bomoi bwa yě, akobíkisa bwangó.
Luke LinVB 17:34  Nalobí na bínó : o butú bôná bato bábalé bakolála o mbéto yǒkó, bakokamata mǒkó mpé bakotíka mosúsu.
Luke LinVB 17:35  Básí bábalé bakoníka fufú esíká yǒkó, bakokamata mǒkó mpé bakotíka mosúsu. » (
Luke LinVB 17:37  Bayékoli batúní yě : « Mokonzi, ya­ngó ekosálema wápi ? » Alobí na bangó : « Esíká ebembe ya nyama ezalí, bi­ngondó bikosangana mpé wâná. »