Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next
Chapter 30
Prov LinVB 30:1  Maloba ma Agur, mwana wa Yake, moto wa Masa. Alobi boye : Namilembisi mingi, e Nzambe, namilembisi mingi, nasuki, e Nzambe !
Prov LinVB 30:2  Naleki bato banso na bozoba, mayele ma bato mazali na ngai te.
Prov LinVB 30:3  Nayekoli bwanya te, nayebi mpe bwanya bwa Nta-Bosantu te.
Prov LinVB 30:4  Nani abuti o likolo mpe akiti lisusu ? Nani akangi mompepe na maboko ? Nani abombi mai o monkoto mwa ye ? Nani apiki makonzi ma ndelo ya mokili ? Nkombo ya ye nani ? Nkombo ya mwana wa ye nani, soko oyebi yango ?
Prov LinVB 30:5  Bakoki kotia mitema na maloba ma Nzambe, Ye mobateli wa bato bakolikya na ye.
Prov LinVB 30:6  Obakisa likambo lyoko na maloba ma ye te, soki te, akopalela yo, mpe akolakisa yo ’te ozali moto wa lokuta.
Prov LinVB 30:7  Nasengi yo mpo ibale, opima ngai yango te liboso ’te nakufa :
Prov LinVB 30:8  longola mosika na ngai bokosi na maloba ma lokuta, nazala mobola te, moto wa nkita mpe te, nalia bobele mwa limpa lisengeli na ngai.
Prov LinVB 30:9  Mbele soko natondi na biloko, nakoboya yo mpe nakoloba : « Yawe ye nani ? » To soko nakomi kokelela, mbele nakoyiba mpe nakotuka nkombo ya Nzambe wa ngai.
Prov LinVB 30:10  Otongo mosali epai ya nkolo wa ye te, mbele akobetele yo mobondo mpe okozwa likambo.
Prov LinVB 30:11  Bato basusu bakobeteleke tata wa bango mobondo, mpe babenisaka mama wa bango te.
Prov LinVB 30:12  Basusu bazali peto o miso ma bango moko, kasi balongoli mabe ma bango te.
Prov LinVB 30:13  Basusu balekisi ndelo o bosali lolendo, mpe miso ma bango maleki lofundo.
Prov LinVB 30:14  Basusu bazali na mino lokola mimpanga, mpe na mbanga lokola mbeli ; bakoliaka bato babola o mokili mpe bakosilisaka bato bake o kati ya bato.
Prov LinVB 30:15  Nsonzo ezali na bana basi babale : « Pesa ! Pesa ! » Mpo isato ikotondaka mokolo moko te, mpo inei ikoloba ata mokolo moko te : « Ekoki bongo ! » :
Prov LinVB 30:16  mboka ya bawa, libumu likobotaka te, mabelé makoki kotonda mai te, mpe móto mokolobaka ata mokolo moko te : « Ekoki ! »
Prov LinVB 30:17  Soko liso likotiola tata mpe liboyi kotosa monoko mwa mama, yanganga ya moluka ekopikola lyango mpe bingondo bikolia lyango.
Prov LinVB 30:18  Mpo isato ileki mayele ma ngai, mpe mpo inei natongoli te :
Prov LinVB 30:19  nzela ya engondo o likolo, nzela ya nyoka o kati ya mabanga, nzela ya masuwa manene o mbu, mpe nzela ya mobali akolandaka mwasi.
Prov LinVB 30:20  Ezalela ya mwasi wa bokali ezali boye : esilisi ye kolia, akosukola monoko mpe akoloba : « Nasali mabe te ! »
Prov LinVB 30:21  Makambo masato makoningisaka mokili, makambo manei mokili mokoki kondima te :
Prov LinVB 30:22  moombo akomi mokonzi wa ekolo, elema atondi bilei,
Prov LinVB 30:23  mwasi mabe azwi mobali, mpe mwasi moombo akitani nkolo wa ye wa mwasi.
Prov LinVB 30:24  O mokili nyama inei izali ike mpenza, kasi ileki bato ba bwanya na mayele :
Prov LinVB 30:25  ndonge ata izali nyama izangi makasi, ikokongoloko bilei o eleko ya elanga ;
Prov LinVB 30:26  nyama ya mobenga, ata izangi makasi, ikotongaka ndako ya yango o kati ya mabanga ;
Prov LinVB 30:27  mapalela ata mazali na mokonzi te, makotambolaka seko na milongo semba ;
Prov LinVB 30:28  monselekete ata bato bakoki kokanga mwango na maboko, mokozalaka o ndako ya bakonzi.
Prov LinVB 30:29  Nyama isato izali na etamboleli kitoko, nyama inei na etamboleli ya litundu :
Prov LinVB 30:30  ntambwe eleki nyama inso na mpiko, mpe ekobangaka eloko te,
Prov LinVB 30:31  nsoso mobali, to ntaba mobali, mpe mokonzi wa ekolo akambi basoda ba ye.
Prov LinVB 30:32  Soko omikumisi o miso ma bato, na bozoba to nsima ya kokanisa : tia loboko liboso lya monoko :
Prov LinVB 30:33  zambi soko otuti mabéle, okozwa manteka, soko babeti yo o zolo, makila makobima, soko babeti moto wa nkanda, boswani bokobima.