PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 59
Psal | LinVB | 59:1 | Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. O ntango Saul atindi bato bakengele ndako ya Davidi mpo ’te baboma ye (1 Sam 19,11). | |
Psal | LinVB | 59:2 | E Nzambe wa ngai, bikisa ngai o maboko ma banguna, batela ngai o ntei ya bato bayeli ngai etumba. | |
Psal | LinVB | 59:4 | Tala, bazali kokenge ngai, bato makasi bakaneli ngai, nzokande nasali lisumu te, mabe moko mpe te, e Nzambe. | |
Psal | LinVB | 59:5 | Ata nazali na likambo lyoko te, bamilengeli mpo ’te babimela ngai. Lamuka, yaka kosalisa ngai mpe tala ! | |
Psal | LinVB | 59:6 | E Mokonzi, Nzambe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, lamuka mpe pesa bampaya baye etumbu, oyokela basuli baye mawa te ! | |
Psal | LinVB | 59:8 | Minoko mya bango mitondi na maloba ma lolendo, mbebu ya bango lokola mompanga basebi, balobi : « Nani moto akoyoka biso ? » | |
Psal | LinVB | 59:11 | Nzambe wa bolingo akoya kosalisa ngai ; Nzambe akosala ’te nakoka banguna baye bayeli ngai. | |
Psal | LinVB | 59:12 | Oboma bango te, mpo ’te bato ba ngai babosana te, kasi na nguya ya yo obengana mpe onyata bango, e Mokonzi, yo nguba ya biso. | |
Psal | LinVB | 59:13 | Nyonso bakolobaka na monoko, ezali lisumu ; lofundo lokosukisa bango, mpo batuki Nzambe mpe bazali bato ba lokuta. | |
Psal | LinVB | 59:14 | Silisa bango na nkanda ya yo, bazala lisusu te, bato bayeba bongo ’te Nzambe azali Mokonzi wa Yakob kin’o nsuka ya mokili. | |
Psal | LinVB | 59:17 | Kasi ngai nakoyembela nguya ya yo, na ntongo nakokumisa bolingi bwa yo, yo ebombamelo ya ngai, oyo akobatela ngai o mikolo nakoyoka nsomo. | |