Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 26
Sira LinVB 26:1  Mwasi malamu akoyokisa mobali wa ye esengo, akobakisa mikolo ebele na bomoi bwa ye.
Sira LinVB 26:2  Mwasi wa mpiko akosepelisa mobali wa ye, na ye mobali akozala na boboto bomoi bwa ye mobi­mba.
Sira LinVB 26:3  Mwasi malamu azali likabo lya Nzambe, bato bakobangaka Mokonzi bakobala ye.
Sira LinVB 26:4  Azala mobola to wa nkita, mobali akoyoka motema esengo, nta­ngo inso akolakisaka elongi polele.
Sira LinVB 26:5  Makambo masato makobangisaka ngai, mpe likambo lya manei likoyokisaka ngai nsomo : songisongi ya bato, likambo likotondisa lopango na bato, mpe kofunda moto na lokuta, mana manso maka­mbo maleki liwa na mabe.
Sira LinVB 26:6  Mwasi oyo akoyokelaka mwasi mosusu zuwa, mpe oyo akobimisaka makambo ebele na lolemu, bakoyokisaka mpasi mpe mawa mingi.
Sira LinVB 26:7  Mwasi wa mayele mabe azali lokola ekangiseli etiami malamu o nkingo ya ngombe te : soko omeki kopekisa ye ozali lokola oyo ali­ngi kokanga nkotó na maboko.
Sira LinVB 26:8  Mwasi momeli akoyokisaka mobali wa ye nkanda, akobomba eza­lela ebe ya ye te.
Sira LinVB 26:9  Okoyeba ezalela ebe ya mwasi na miso ma ye ma lofundo, mpe na ndenge akofinaka liso.
Sira LinVB 26:10  Okeba na mwasi azangi nsoni, soko amoni nzela efungwami, akolanda yango.
Sira LinVB 26:11  Okebaka epai wapi akobwaka miso, nsoni te, mpe okamwa te soko abe­ndi yo o nzela ya mabe.
Sira LinVB 26:12  Lokola moto wa mobembo ayoki mposa ya mai, mwasi mabe ako­fu­ngola monoko, akomele mai ma­nso akuti, akowela kosala ekobo, mpe akomipesa na makambo ma bosoni.
Sira LinVB 26:13  Kitoko ya mwasi wa bolongani ekosepelisa mobali wa ye, ntoki ya ye ekolendisa ye mingi.
Sira LinVB 26:14  Mwasi akolobaka mingi te azali likabo lya Mokonzi ; oyo abokwami malamu aleki motuya.
Sira LinVB 26:15  Mwasi wa bopeto azali kitoko solo, oyo akomibatelaka azali mwasi wa motuya moleki.
Sira LinVB 26:16  Lokola mwese mokobimaka o ngomba ya Mokonzi, se bongo bo­nzenga bwa mwasi oyo akobo­ngisaka ndako malamu.
Sira LinVB 26:17  Mwasi na elongi kitoko mpe nzoto enzenga azali lokola mwinda mozali kongenge o etemiseli ya mwinda.
Sira LinVB 26:18  Makolo kitoko mpe matindi mpiko ma mwasi, mazali lokola makonzi ma wolo o eteni ya nse ya palata. (
Sira LinVB 26:28  Makambo mabale makoyokisaka ngai motema mawa, mpe likambo lya masato likoyokisaka ngai nka­nda : mobuni azali konuna na bobola, ndenge bakokinolaka bato ba bwa­nya, moto atiki nzela se­mba mpe abandi kosala mabe. Mokonzi akolengelele bango liwa na mompanga.
Sira LinVB 26:29  Bobele na mpasi moto wa mo­mbo­ngo akoboya masenginya, mpe moteki biloko akozanga masumu te.