Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 27
Sira LinVB 27:1  Bato ebele basali masumu mpo ya lokoso la mbongo, baye balingi kokoma na nkita bakozalaka na mawa te.
Sira LinVB 27:2  Lokola nsete ekokoto o kati ya biliki ibale ikangani, se bongo mabe maye makokoto ntango mosombi na moteki bakutani.
Sira LinVB 27:3  Soko moto abangi Mokonzi na motema mobimba te, libota lya ye likobeba noki.
Sira LinVB 27:4  Soko opepi biloko na lungu, nda­mbo ya bosoto ekotikala, se bo­ngo mabe ma moto makomonono na maloba ma ye.
Sira LinVB 27:5  Lokola fulu ekomeka mbeki ya mosali mbeki, bakoyeba moto na masolo ma ye.
Sira LinVB 27:6  Mbuma ya nzete ikolakisa ndenge yango ekolaki, se bongo bakoyeba motema mwa moto na maloba ma ye.
Sira LinVB 27:7  Soko moto alobi naino te, okumisa ye te, bakoyeba moto malamu na maloba ma ye.
Sira LinVB 27:8  Soko oluki bosembo, okozwa bwa­ngo, okolata bwango lokola molato moleki kitoko.
Sira LinVB 27:9  Ndeke ya lolenge loko ikotongaka zumbu esika yoko, se bongo bosolo bokozongela bato ba bosolo.
Sira LinVB 27:10  Ntambwe ekonongoko nyama mpo ya koboma yango, se bongo lisumu likokengeke bato bazangi bosembo.
Sira LinVB 27:11  Maloba ma moto wa Nzambe mazali maloba ma bwanya, kasi motema mwa zoba mokobongwanaka lokola sanza.
Sira LinVB 27:12  Okomi o kati ya bazoba, oumela wana mingi te, soko ozali epai ya bato ba bwanya, obanga te koumela wana.
Sira LinVB 27:13  Maloba ma bazoba makoyokisaka nsomo, bisengo bya mokili bikosekisaka bango makasi.
Sira LinVB 27:14  Soko oyoki masolo ma bato bakolayaka ndai mbala na mbala, oko­le­nge ; boswani bwa bato bokole­mbisa yo tee okozipa matoi.
Sira LinVB 27:15  Esika bato ba lolendo baswani, makila makosopama ; koyoka bifi­nga bya bango, mpasi mpenza.
Sira LinVB 27:16  Bakotiaka motema lisusu te na moto akobimisaka makambo ma bo­nkutu, akozwa lisusu moninga wa solosolo te.
Sira LinVB 27:17  Linga moninga oyo alingi yo mpe okangana na ye, kasi soko obimisi makambo ma ye ma bonkutu, otika kolanda ye :
Sira LinVB 27:18  ezali lokola obungisi ndeko, obu­ngisi mpe bondeko bwa ye.
Sira LinVB 27:19  Soko ofungoli loboko, ndeke ekokima, se bongo moninga atiki yo, okozwa ye lisusu te.
Sira LinVB 27:20  Olanda ye lisusu te, mpo asili akomi mosika, akimi yo lokola mboloko eye ebiki o motambo ekokimaka.
Sira LinVB 27:21  Okoki kokanga mpota, to koli­mbisa moto afingi yo, kasi moto abimisi makambo ma bonkutu ma moninga abwaki elikya seko.
Sira LinVB 27:22  Moto afini liso, akani kosala mabe, moto moko akoki kobongola makanisi ma ye te.
Sira LinVB 27:23  O miso ma yo akoloba se maloba ma sukali, mpe akokumisa maloba ma yo manso, kasi nsima ya mokongo akoloba bongo lisusu te, mpe na maloba ma yo moko akoyokisa yo nsoni.
Sira LinVB 27:24  Nayini makambo mingi, solo, kasi nayini moto oyo liboso, Nza­mbe mpe ayini ye.
Sira LinVB 27:25  Moto abwaki libanga o likolo, ami­bwakeli lyango o motó ; oyo azokisi moninga na mayele mabe, bakozokisa ye mpe.
Sira LinVB 27:26  Moto atimoli libulu mpo akweisa moninga, ye moko akokweya o kati ; oyo atii motambo, ye moko akokangema na mwango.
Sira LinVB 27:27  Mabe moto akosalaka, makozo­ngela ye, akoyeba te esika nini ma­uti.
Sira LinVB 27:28  Mosala mwa moto wa lolendo, ko­tiola mpe kofinga bato ; kasi etumbu ekonongo ye lokola nta­mbwe ekonongoko nyama.
Sira LinVB 27:29  Bato bakosepelaka mpasi ya moto wa Nzambe, bakomitielaka mota­mbo, mpasi ekonyokolo bango liboso ’te bawa.
Sira LinVB 27:30  Koyoka nkele mpe kobomba nka­nda ezali mabe, tala makambo mo­sumuki akosalaka.