Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ACTS
Prev Up Next
Chapter 23
Acts LinVB 23:1  Pólo atálí bato ba Likita linéne bánso swíí, alobí : « Bandeko, téé leló nazalí sé kosálela Nzámbe na motéma sémba. »
Acts LinVB 23:2  Kasi nganga mokonzi Ananía atíndí bato ba yě bábéte Pólo mbatá o monoko.
Acts LinVB 23:3  Bôngó Pólo alobí na yě : « Yó efelo bapakólí mpémbé, Nzámbe moto akobéte yó ! Bóní ! Ofándí wâná mpô ya kosámbisa ngáí engébéné na Mobéko, nzókandé otíndí ’te bábéte ngáí ! Mobéko motíndí bôngó té. »
Acts LinVB 23:4  Bato bazalákí wâná balobí na yě : « Bóní, obángí té kofínga nganga mokonzi wa Nzámbe ? »
Acts LinVB 23:5  Pólo azóngísí : « Bandeko, nayébákí té ’te azalí nganga mokonzi. Zambí ekomámí o Minkandá Misántu ’te : Okobétele mokonzi wa ekólo ya yǒ mobondo té. »
Acts LinVB 23:6  Pólo ayébákí ’te o ntéi ya bato basangání wâná basúsu bazalákí ba-Saduséo, basúsu ba-Farizéo. Yangó wâná agángí mpô ’te bato bánso báyóka : « Bandeko, ngáí nazalí mo-Farizéo mpé mwána wa ba-Farizéo. Balingí kosámbisa ngáí, mpô tozalí kotía mitéma na nsékwa ya bawá. »
Acts LinVB 23:7  Elobí yě bôngó, ba-Farizéo na ba-Saduséo babandí kowélana ntembe, likita mobimba likabwání.
Acts LinVB 23:8  Mpámba té, ba-Saduséo bakolobaka ’te nsékwa ezalí té, ǎnze­lú té, elímo mpé té. Kasi ba-Farizéo bakondimaka mâná mánso.
Acts LinVB 23:9  Bôngó makeléle mabimí míngi. O káti ya ba-Farizeó batéyi ba Minkandá basúsu batélémí mpé balobí na mongóngó makási : « O míso ma bísó moto óyo azalí na mabé sókí té. Mbele ǎnzelú tǒ elímo alobákí na yě. »
Acts LinVB 23:10  Awa bato bakómí koswâna makási, mokonzi wa basodá abángí ’te bakoboma Pólo, yangó wâná atíndí basodá bákende kolongola yě nokí o ntéi ya bangó mpé bákamba yě o nganda ya basodá.
Acts LinVB 23:11  Na butú Mokonzi abimélí Pólo, alobí na yé : « Léndísá motéma ! Lokóla ozalákí nzénénéké wa ngáí o Yerúzalem, osengélí kosála sé bôngó o Róma. »
Acts LinVB 23:12  Etání ntóngó, ba-Yúda basa­ngání likita mpé balayí ndaí ’te bakolía tǒ bakomele elóko té libosó ’te báboma Pólo.
Acts LinVB 23:13  Baye bayókání bôngó bazalákí leká ntúkú ínei.
Acts LinVB 23:14  Bakeí epái ya banganga bakonzi na bakóló, balobí na bangó : « Bísó tolayí ’te mabé makokí kokwêla bísó sókó toléí tǒ tomelí atâ elóko níni libosó ’te tóboma Pólo.
Acts LinVB 23:15  Bôngó bínó elongó na bato ba Likita linéne, bósénge mokonzi wa basodá átíndela bínó Pólo ; bósála lokóla bolingí kotála lisúsu likambo lya yě malámu mpenzá. Bísó tosílí tomílé­ngélí mpô tóboma yě libosó ’te ákóma áwa. »
Acts LinVB 23:16  Kasi mwána wa ndeko mwásí wa Pólo ayókí ’te balingí kotíela Pólo motámbo bôngó, akeí o nganda ya basodá, ayíngélí mpé akébísí Pólo.
Acts LinVB 23:17  Pólo abéngí mǒkó wa bakomandá, alobí na yě : « Kendé na elengé mobáli óyo epái ya mokonzi wa basodá, alingí koyébisa yě mwâ likambo. »
Acts LinVB 23:18  Komandá akeí kotíka yě epái ya mokonzi wa basodá mpé alobí : « Moto wa bolóko Pólo abé­ngí ngáí mpé aséngí ngáí ’te náyâ na elengé mobáli óyo epái ya yǒ ; alingí koyébisa yǒ mwâ likambo. »
Acts LinVB 23:19  Mokonzi wa basodá akamátí elengé mobáli na lobóko, abéndí yě mpe­mbéni mpé atúní yě : « Olingí koyébisa ngáí níni ? »
Acts LinVB 23:20  Elengé alobí na yě : « Ba-Yúda bayókání ’te bakosé­nge yǒ ókende na Pólo lóbí o Likita linéne ; bakosála lokóla balingí kotála lisúsu likambo lya yě malámu mpenzá.
Acts LinVB 23:21  Ondima maloba ma bangó té. Bato ba bangó leká ntúkú ínei bayókání ’te bakotíela yě motámbo ; balayí ndaí ’te mabé makokí kokwêla bangó sókó baléí tǒ bamelí atâ elóko níni libosó ’te báboma yě. Sikáwa basílí komíléngele mpé bazalí sé kozila ’te okondimela bangó. »
Acts LinVB 23:22  Mokonzi wa basodá, áwa alingí kotíka elengé mobáli ákende, atíndí yě ’te : « Oloba na moto mǒkó té ’te oyéí koyébisa ngáí likambo liye. »
Acts LinVB 23:23  Na nsima mokonzi wa basodá abéngí bakomandá bábalé, alobí na bangó : « Bómíléngele mpô ya kokende na basodá nkámá íbalé o Sezaréa na ngonga ya ísáto ya ntóngó ; bókende mpé na batámbwisi farása ntúkú nsambo mpé na basodá nkámá íbalé bazalí na makongó.
Acts LinVB 23:24  Báléngelele mpé Pólo farása, ábutela yangó, bôngó bákamba yě nzóto kólóngónú epái ya moyángeli Felíkisi. »
Acts LinVB 23:26  « Klódio Lísia ôná moyángeli wa bomemyi, losáko !
Acts LinVB 23:27  Ba-Yúda bato bakangákí moto óyo ; etíkálákí moké báboma yě, ntángo nakómí na basodá ba ngáí ; nalongólí yě o mabóko ma bangó, mpô bayébísákí ngáí ’te azalí mwána mbóka wa Róma.
Acts LinVB 23:28  Awa nali­ngákí koyéba ntína níni bafúndákí yě, nakeí na yě o bosó bwa Likita linéne lya bangó.
Acts LinVB 23:29  Namóní ’te bafúndí yě na makambo matálí Mobéko mwa bangó, kasi namóní yě na likambo lyǒkó té likokí na etúmbu ya liwá tǒ ya bolóko.
Acts LinVB 23:30  Ntángo bayébísákí ngáí ’te balingákí koboma yě, natíndí yě nokí epái ya yǒ mpé nayébísí bato bafúndákí yě ’te bákende kosámba likambo lya yě o mbóka yǒ. »
Acts LinVB 23:31  Sé lokóla mokonzi atíndí bangó, bakamátí Pólo mpé bakambí yě na butú o Antípatri.
Acts LinVB 23:32  Etání ntóngó basodá ba makolo batíkí basodá ba farása bákóba nzelá na Pólo ; bangó mǒkó bazóngí o nganda ya basodá.
Acts LinVB 23:33  Ekómí basodá ba farása o Sezaréa, bapésí moyángeli monkandá môná mpé batíkí Pólo o mabóko ma yě.
Acts LinVB 23:34  Moyángeli atángí monkandá mpé atúní Pólo sókó yě moto wa ekólo níni. Awa ayókí ’te azalí moto wa Silísia,
Acts LinVB 23:35  alobí : « Nakotála likambo lya yǒ mokolo bato bafúndí yǒ bakokóma áwa. » Mpé atíndí ’te bákéngele yě o ndáko ya Eróde.