ACTS
Chapter 26
Acts | LinVB | 26:1 | Agrípa alobí na Pólo : « Okokí koloba, sámbá likambo lya yǒ. » Bôngó Pólo atandí lobóko mpé abandí kosámba, alobí : | |
Acts | LinVB | 26:2 | « Mokonzi Agrípa, nazalí na esengo áwa nakokí kosámba o míso ma yǒ leló maye mánso ba-Yúda bafúndí ngáí na mangó ; | |
Acts | LinVB | 26:3 | zambí oyébí mimeseno mya ba-Yúda ná mpé ntembe ínso bakowélaka. Nabóndélí yǒ, óyóka ngáí na motéma mpío. | |
Acts | LinVB | 26:4 | Ba-Yúda bánso bayébí ezalela ya ngáí út’o bomwána ; bayébí bóníbóní nakólí o Yerúzalem o ntéi ya bato ba ekólo ya ngáí. | |
Acts | LinVB | 26:5 | Bangó bayébí ngáí útá kala ; mpé sókó balingí, bakokí koyébisa ’te nazalákí moto wa lingómbá lya ba-Farizeó, lingómbá liye lilekí mangómbá mánso ma eyamba ya bísó na mibéko makási. | |
Acts | LinVB | 26:6 | Mpé sikáwa balingí kosámbisa ngáí mpô nazalí kotía motéma na elakó eye Nzámbe alakéláká bankóko ba bísó : | |
Acts | LinVB | 26:7 | bato ba mabótá ma bísó zómi na mábalé bakosálelaka Nzámbe butú mói na elíkyá ya bomóni ’te Nzámbe akokokisa elakó êná. Nzókandé mpô ya elí-kyá êná, é mokonzi, ba-Yúda bafúndí ngáí. | |
Acts | LinVB | 26:9 | Libosó nakanísákí ’te nasengélákí kosála mánso mpô ya kopekisa bato koyamba nkómbó ya Yézu wa Nazaréte. | |
Acts | LinVB | 26:10 | Nasálákí bôngó o Yerúzalem : banganga bakonzi bapésákí ngáí likokí, bôngó ngáí mǒkó nabwákákí bayambi baíké o bolóko ; mpé ntángo bazalákí koboma bangó, ngáí mpé nazalákí kondima. | |
Acts | LinVB | 26:11 | Na minyóko miye nayókísí bangó mbala míngi o sinagóga ínso nalingákí kotínda bángo na makási ’te bátúka Nzámbe ; kútu, na nkándá nsúka té, nanyókólókí bangó kín’o bingumbá bya bikólo bisúsu. | |
Acts | LinVB | 26:12 | Na ntína êná nakendékí mpé o Damásko ; banganga bakonzi batí-ndákí ngáí, bangó bapésákí ngáí likokí lyangó. | |
Acts | LinVB | 26:13 | Ezalákí ngáí o nzelá, é mokonzi, penepene na midí namóní mwínda moútí o likoló mozalákí kongenge makási leká mwésé ; mwínda moye mozíngí ngáí ná baye bazalákí na ngáí nzelá yǒ kó. | |
Acts | LinVB | 26:14 | Bísó bánso tokwéí o mabelé mpé nayókí loláká lolobí na ngáí o lokóta la ba-Ebréi : ‘Saul, Saul, ntína níni ozalí konyókolo ngáí ? Ozalí komíyókisa mpási, áwa obóyí etíndá ya ngáí.’ | |
Acts | LinVB | 26:15 | Ngáí natúní : ‘Mokonzi, yǒ náni ?’ Mokonzi alobí : ‘Ngáí nazalí Yézu óyo ozalí konyókolo. | |
Acts | LinVB | 26:16 | Kasi longwá o mabelé mpé télémé. Nabimélí yǒ mpô ’te nákómisa yǒ mosáleli mpé nzénénéké wa ngáí ; óyébisa bato ’te omóní ngáí leló ná mpé maye nakolakisa yǒ naíno nsima. | |
Acts | LinVB | 26:17 | Yangó wâná nalongólí yǒ o káti ya ekólo ya yǒ mpé ya bikólo bya bapagáno, nakotínda yǒ epái ya bangó, | |
Acts | LinVB | 26:18 | mpô ’te ófungola bangó míso, bálongwa o molílí, mpé báyâ epái ya mói, bálongwa mpé o bokonzi bwa Sátana mpé báyâ epái ya Nzámbe ; bôngó báyamba ngáí, bázwa bolímbisi masúmu mpé esíká o káti ya bato baye Nzámbe aponí.’ | |
Acts | LinVB | 26:20 | Kasi nakendékí kotéya libosó bato ba Damásko, o Yerúzalem mpé o ekólo mobimba ya Yudéa, na nsima bapagáno, ’te basengélí kobóngola mitéma mpé kozóngela Nzámbe, mpé básála misálá mibongí na bato babóngólí mitéma. | |
Acts | LinVB | 26:22 | Kasi Nzámbe abátélí ngáí, bôngó téé leló nazalí kosangela nsango eye na bato baké mpé na bato banéne. Nazalí koloba elóko esúsu té, bobélé maye masengélákí kosálema engébéné na maloba ma baproféta mpé ma Móze : | |
Acts | LinVB | 26:23 | Krístu asengélákí koyóka mpási, kasi azalí moto wa libosó óyo asékwí o bawá, mpé akosangela nsango ya mwínda na bato ba ekólo ya bísó mpé ba bikólo bya bapagáno. » | |
Acts | LinVB | 26:24 | Awa Pólo azalákí kosámba bôngó, Fésto alobí na mongóngó makási : « Pólo, obélí ligbómá ! Mayéle ma yǒ ma minkandá matámbwísí yǒ motó ! » | |
Acts | LinVB | 26:25 | Pólo azóngísí : « Nazalí na ligbómá té, tatá mokonzi Fésto, nazalí sé koloba maloba ma bosôló mpé ma bwányá. | |
Acts | LinVB | 26:26 | Mokonzi Agrípa ayébí mambí maye, yangó wâná nakokí koloba na yě polélé ; nayébí malámu ’te abúngí elóko té ; maye mánso masálémí na bonkútú té ! | |
Acts | LinVB | 26:28 | Kasi Agrípa alobí na Pólo : « Etíkálí moké ókómisa ngáí mokrístu na maloba ma yǒ ! » | |
Acts | LinVB | 26:29 | Pólo azóngísí : « Etíkala moké tǒ té, nabóndélí Nzámbe bobélé mpô ya yǒ té, kasi mpé mpô ya baye bánso bazalí koyóka ngáí leló, bákóma lokóla ngáí, kasi na minyolólo miye o mabóko té. » | |
Acts | LinVB | 26:30 | Sikáwa mokonzi atélémí, ná moyángeli, ná Bereníse ná basúsu bafándí elongó na bangó. | |
Acts | LinVB | 26:31 | Babimí mpé balobání : « Moto óyo azalí na likambo lyǒ kó té likokí na etúmbu ya liwá tǒ ya minyolólo. » | |