Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next
Chapter 2
Gene LinVB 2:1  Nzambe akeli bongo likolo na nse mpe bikelamo binso bizali wana.
Gene LinVB 2:2  O mokolo mwa nsambo Nzambe asukisi mosala mwa ye. O mokolo mwa nsambo, awa asilisi mosala mwa ye, apemi.
Gene LinVB 2:3  Nzambe abenisi mokolo mwa nsambo mpe asantisi mwango, mpo o mokolo mona asilisaki mosala monso mpe apemaki.
Gene LinVB 2:4  Ezalaki libandela lya likolo na nse, ntango Nzambe akeli byango. O ntango Yawe Nzambe akeli likolo na nse,
Gene LinVB 2:5  nzete yoko ebimi naino te, lititi lyoko mpe te, zambi Yawe Nzambe anokisaka mbula o mokili naino te mpe moto azalaki wana te mpo ’te akata bilanga.
Gene LinVB 2:6  Nzo­kande mai mazalaki kobima o mabelé mpe mokili mobimba mo­zwi mai.
Gene LinVB 2:7  Yawe Nzambe akamati mabelé mpe asali moto ; apemeli ye mpema ya bomoi o zolo mpe mo­to azwi bomoi.
Gene LinVB 2:8  Na nsima Yawe Nzambe abo-ngisi elanga o esobe ya Eden epai moi mokobimaka, mpe kuna atii moto oyo ye akeli.
Gene LinVB 2:9  Yawe Nzambe abimisi nzete kitoko o mabelé ma elanga, iye ikobota mbuma elengi ; o kati ya ela­nga aloni nzete ya bomoi na mpe nzete eye ekoyebisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.
Gene LinVB 2:10  Ebale yoko enene o Eden ekopesa mai o elanga ya ndunda ; eka-bwani na miluka minei.
Gene LinVB 2:11  Nkombo ya moluka moko Pison, mokokatisa mokili mobimba mwa Avila. Avila ezali ekolo eye esika bako­zwaka wolo,
Gene LinVB 2:12  wolo kitoko mpe­nza, mpaka ya malasi ekozwama mpe wana, na mabanga ma motuya, maye bakotangaka onikse.
Gene LinVB 2:13  Nko­mbo ya moluka mwa mibale : Gikon ; mozali mai ma ekolo Kus.
Gene LinVB 2:14  Moluka mwa misato, Tigri, ezali ebale o Esti ya Asur. Moluka mwa minei : Efrate.
Gene LinVB 2:15  Yawe Nzambe akamati moto mpe atii ye o elanga ya Eden mpo akata mpe abatela yango.
Gene LinVB 2:16  Yawe Nzambe apesi ye mobeko moye : « Okoki kolia mbuma ya nzete inso ya elanga ;
Gene LinVB 2:17  kasi mbuma ya nzete eye ekoyebisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, okoki kolia yango te ; mpamba te, mokolo okolia mbuma ena, okokufa. »
Gene LinVB 2:18  Yawe Nzambe alobi : « Ebongi te ’te moto azala ye moko ; malamu napesa ye moninga oyo akoki na ye, asalisa ye. »
Gene LinVB 2:19  Yawe Nzambe akamati lisusu mabelé, asali na mango nyama inso ya nse na ndeke ya likolo ; alakisi yango na moto, ayeba nkombo nini akopesa yango : nyama yoko yoko ezala na nko-mbo eye moto akopesa.
Gene LinVB 2:20  Moto apesi nyama inso nkombo, na ndeke ya likolo na nyama ya zamba ; naino azwi moninga te oyo akoki na ye.
Gene LinVB 2:21  Na nsima Yawe Nzambe alalisi moto mpongi makasi ; alongoli ye monkuwa moko o mopanzi mpe akangisi mosuni o esika yango.
Gene LinVB 2:22  Na monkuwa alongolaki o mopanzi mwa moto, Yawe Nzambe akeli mwasi mpe ayei na ye o miso ma mobali.
Gene LinVB 2:23  Mobali agangi : « Solo, tala monkuwa mwa minkuwa mya ngai mpe mosuni mwa misuni mya ngai, akozala na nkombo mwasi, mpo babimisi ye o nzoto ya mobali. »
Gene LinVB 2:24  Yango wana mobali akotika tata na mama mpe akosangana na mwasi wa ye mpe bango babale bakokoma moto se moko.
Gene LinVB 2:25  Bango babale, mobali na mwasi, bazalaki bolumbu, nzokande bayokaki yango nsoni te.