I CHRONICLES
Chapter 24
I Ch | LinVB | 24:1 | Bana ba Arone bakabwani mpe na mangomba. Arone aboti Nadab, Abiu, Eleazar na Itamar. | |
I Ch | LinVB | 24:2 | Nadab na Abiu bakufi liboso lya tata wa bango, babotaki te. Bongo bapesi Eleazar na Itamar mosala mwa bonganga. | |
I Ch | LinVB | 24:3 | Davidi na Sadok, mwana wa libota lya Eleazar, na Akimelek, wa libota lya Itamar, bakaboli banganga Nzambe o mangomba, engebene na mosala bazalaki kosala. | |
I Ch | LinVB | 24:4 | Bana ba Eleazar baleki bana ba Itamar na boike. Bakaboli bango : bana ba Eleazar bazalaki na bankumu ba mabota zomi na motoba ; bana ba Itamar na bankumu ba mabota mwambe. | |
I Ch | LinVB | 24:5 | Mpo ’te bakabola bango, babeti zeke, zambi o ntei ya bana ba Eleazar mpe ba Itamar basusu batalaki biloko bisantu, basusu bazalaki kotala losambo. | |
I Ch | LinVB | 24:6 | Mo-Levi moko, mokomi minkanda, nkombo ’te Semaya, mwana wa Netaneel, akomi nkombo ya bango o miso ma mokonzi, ma bankumu, ma nganga Nzambe Sadok, ma Akimelek, mwana wa Ebiatar, mpe o miso ma bankumu ba mabota ma banganga Nzambe mpe ma ba-Levi. Babeti zeke mbala ibale mpo ya kopono mabota mabale ma Eleazar, mpe mbala yoko mpo ya kopono libota lyoko lya Itamar. | |
I Ch | LinVB | 24:19 | Tala molongo mwa ngala ya banganga Nzambe baponomi mpo ya mosala o Tempelo ya Yawe ; balandi se mobeko Arone, nkoko wa bango, atindaki bango lokola Yawe Nzambe wa Israel atindaki ye. | |
I Ch | LinVB | 24:20 | Bana basusu ba Levi, bango baye : wa bana ba Amram, Subael. Wa bana ba Subael, Yekdeya. | |
I Ch | LinVB | 24:23 | Wa bana ba Kebron : Yeria, moto wa yambo, Amaria moto wa babale, Yakaziel moto wa basato, Yekameam moto wa banei. | |
I Ch | LinVB | 24:30 | Wa bana ba Musi : Mali, Eder na Yerimot. Bango banso bana ba Levi, batangi bango libota na libota. | |