Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LUKE
Prev Up Next
Chapter 3
Luke LinVB 3:1  O mobú mwa zómi na mítáno mwa bokonzi bwa Kaizáro Tibério, o eleko Pónsio Piláto azalákí moyángeli wa Yudéa, Eróde mokonzi wa Galiléa, ndeko wa yě Filípo mokonzi wa Ituréa mpé wa Trakoníti, Lizánia mokonzi wa Abiléni,
Luke LinVB 3:2  ntángo Ana na Kaifa bazalákí banganga bakonzi, Yoáne, mwána wa Zakaría, ayókí loláká la Nzámbe o elíkí.
Luke LinVB 3:3  Ayéí o mokili mobimba mwa Yordáne kotéya bato ’te bákúla batísimo ya bobóngoli motéma mpô ya kozwa bolímbisi masúmu,
Luke LinVB 3:4  lokóla ekomámí o búku ya proféta Izáya : « Moto abélélí o elíkí : Bóbongisa nzelá ya Mokonzi, bósémbola yangó malámu ;
Luke LinVB 3:5  bakotóndisa mabúlú mánso, bakokitisa ngómbá inéne na iké ínso ; bakosémbola nzelá nyóka nyóka, mpé bakolongola mabakú mánso.
Luke LinVB 3:6  Bato bánso ndébamóní libíkí liútí na Nzámbe. »
Luke LinVB 3:7  Bato míngi bayéí mpô ’te Yoáne ábátisa bangó ; alobí na bangó : « Bána ba bitúpa, náni alakísí bínó kokíma Nkándá ekoyâ ?
Luke LinVB 3:8  Bóbimisa misálá mibongí na bato balingí kobóngola mitéma. Bótíka komílobela ’te : ‘Abaráma azalí tatá wa bísó’. Ngáí nayébísí bínó : Nzámbe akokí kosála ’te mabángá maye mábimisela Abaráma bána.
Luke LinVB 3:9  Basílí batíí sóka o ntína ya nzeté ; nzeté ínso ikobóta mbuma elámu té, bakokáta yangó mpé bakobwáka yangó o móto. »
Luke LinVB 3:10  Bato batúní yě : « Bôngó tósála níni ? »
Luke LinVB 3:11  Azóngísélí bangó : « Moto azalí na bilambá bíbalé, ákaba yǒkó na moto azángí elambá ; óyo azalí na bilóko bya kolía ásála sé bôngó. »
Luke LinVB 3:12  Bafútisi mpáko mpé bayéí kokúla batísimo, batúní yě : « Motéyi, tósála níni ? »
Luke LinVB 3:13  Alobí na bangó : « Bófútisa bato sé mpáko eye batí­ndí. »
Luke LinVB 3:14  Basodá mpé batúní yě : « Bôngó bísó tósála níni ? » Alobí na bangó : « Bónyókolo moto té, bóbótolo bato mosolo té ; bózwa sé lifúta lya bínó. »
Luke LinVB 3:15  Awa bato bánso bazalákí kozila na elíkyá enéne, mpé komítúna o mitéma sókó azalákí Krístu,
Luke LinVB 3:16  Yoáne alobí na bangó bánso : « Ngáí nakobátisa bínó na mái, kasi óyo akoyâ, alekí ngáí na ngúyá ; nabo­ngí kofungola nsinga ya bikótó bya yě té. Yě akobátisa bínó na Elímo Sántu mpé na móto.
Luke LinVB 3:17  Azalí na lúngu o mabóko, akopepe mbuma ya yě mpé akosangisa yangó o ebómbelo, kasi akotumba mpumbulú o móto mokozíma té. »
Luke LinVB 3:18  Sé bôngó mpé na malako masúsu maíké azalákí kosangela bato Nsango Elámu.
Luke LinVB 3:19  O ntángo êná mokonzi Eróde abálákí Erodiáda, mwásí wa ndeko wa yě. Asálákí mpé mabé maíké, yangó wâná Yoáne apálélí yě.
Luke LinVB 3:20  Na mabé maye mánso Eróde abakísí naíno likambo liye : akangísí Yoáne o bolóko.
Luke LinVB 3:21  Awa bato bánso bakúlí batísimo, ntángo Yézu mpé asílákí kokúla mpé azalákí kosámbela, likoló lifungwání.
Luke LinVB 3:22  Elímo Sántu akitélí yě, amónóní lokóla ebengá ; loláká loyókání út’o likoló : « Yǒ ozalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka na yǒ míngi. »
Luke LinVB 3:23  Ekokísí Yézu mibú sókí ntúkú ísáto, abandí kotéya bato ; bato bánso bakanísí ’te azalákí mwána wa Yozéfu, mwána wa Eli,
Luke LinVB 3:24  mwána wa Matat, mwána wa Lévi, mwána wa Mélki, mwána wa Yanai, mwána wa Yozéfu,
Luke LinVB 3:25  mwána wa Matatía, mwána wa Amos, mwána wa Naúme, mwána wa Esli, mwána wa Nagái,
Luke LinVB 3:26  mwána wa Maät, mwána wa Matatía, mwána wa Seméyin, mwána wa Yozéki, mwána wa Yóda,
Luke LinVB 3:27  mwána wa Yoánan, mwána wa Réza, mwána wa Zoróbabel, mwána wa Salátiel, mwána wa Néri,
Luke LinVB 3:28  mwána wa Mélki, mwána wa Adi, mwána wa Kosam, mwána wa Elmadan, mwána wa Er,
Luke LinVB 3:29  mwána wa Yézu, mwána wa Elíezer, mwána wa Yorim, mwána wa Matat, mwána wa Lévi,
Luke LinVB 3:30  mwána wa Simeóni, mwána wa Yúda, mwána wa Yozéfu, mwána wa Yónam, mwána wa Elíakim,
Luke LinVB 3:31  mwána wa Meléa, mwána wa Ména, mwána wa Matata, mwána wa Nátan, mwána wa Davídi,
Luke LinVB 3:32  mwána wa Yése, mwána wa Obed, mwána wa Bóze, mwána wa Sála, mwána wa Nakasón,
Luke LinVB 3:33  mwána wa Amínadab, mwána wa Ademíne, mwána wa Arni, mwána wa Esron, mwána wa Péres, mwána wa Yúda,
Luke LinVB 3:34  mwána wa Yakób, mwána wa Izáka, mwána wa Abaráma, mwána wa Tára, mwána wa Nakór,
Luke LinVB 3:35  mwána wa Séruk, mwána wa Ragáu, mwána wa Falek, mwána wa Eber, mwána wa Sála,
Luke LinVB 3:36  mwána wa Kainam, mwána wa Arfaksa, mwána wa Sem, mwána wa Nówe, mwána wa Lamek,
Luke LinVB 3:37  mwána wa Matúsala, mwána wa Enok, mwána wa Yáret, mwána wa Malélel, mwána wa Kainam,
Luke LinVB 3:38  mwána wa Enos, mwána wa Set, mwána wa Adámu, mwána wa Nzámbe.