Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MARK
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 12
Mark LinVB 12:1  Yézu abandí koloba na bangó na miúlání : « Moto mǒ­kó alóní nzeté o elanga ya víno, azíngí elanga na lopángo, atímólí esíká ya kokámola mbuma, atóngí linóngi lya bakéngeli. Na nsima atíkí yangó o mabóko ma bafúteli mpé akeí mobémbo.
Mark LinVB 12:2  Ntángo elaká ekokí, atíndélí bafúteli mosáleli mǒ­kó ákamata ndámbo ya mbuma ya víno.
Mark LinVB 12:3  Kasi bangó bakangí yě, babétí yě mpé bazóngísí yě mabóko mpámba.
Mark LinVB 12:4  Nkóló atíndélí bangó mosáleli mosúsu, kasi babétíbétí yě o motó mpé bafíngí yě.
Mark LinVB 12:5  Atíndí moto mosúsu ; babomí yě. Nsima atíndí naíno basáleli míngi : babétí basúsu, babomí basúsu.
Mark LinVB 12:6  Nkóló wa elanga atíkálí bobélé na moto mǒkó, mwána wa yě wa bolingo. Na nsúka atíndí yě epái ya bangó, amílobélí ’te : ‘Bakobánga mwána wa ngáí.’
Mark LinVB 12:7  Kasi basáli ba ela­nga balobání : ‘Tálá moto akosangola elanga. Tókende koboma yě ; bôngó bísó mǒkó tózwa elanga.’
Mark LinVB 12:8  Bakangí yě, babomí yě, mpé ba­bwákí yě o libándá lya elanga.
Mark LinVB 12:9  Bôngó nkóló wa elanga akosála níni ? Akoyâ, akoboma basáli mpé akopésa bato basúsu elanga ya víno.
Mark LinVB 12:10  Bínó botángí Minkandá Misántu té esíká bakomí : Libángá liye batóngi ndáko babwákákí likómí libángá lya litúmu.
Mark LinVB 12:11  Tálá mosálá Mokonzi asálí, tomóní mwangó na míso mpé toká­mwí ? »
Mark LinVB 12:12  Balukí nzelá ya kokanga Yézu, zambí bayébí malámu ’te azalákí koloba moúlání moye mpô ya bangó. Kasi babángí bato, yangó wâná batíkí yě mpé bakeí.
Mark LinVB 12:13  Batíndí ba-Farizéo na bato basúsu ba Eróde bákanga yě na maloba ma yě.
Mark LinVB 12:14  Bayéí koloba na yě : « Motéyi, toyébí ’te okolobaka sé na bosôló, okobángaka moto mǒkó té, zambí okotálaka bilongi bya bato té ; okolakisaka nzelá ya Nzámbe sé na bosémbo. Oyébisa bísó : Tokokí kofúta mpáko ya Kaizáro tǒ té ? Tófúta yangó tǒ té ? »
Mark LinVB 12:15  Kasi Yézu ayébí mayéle ma bangó ma bokíbisi, alobí na bangó : « Mpô níni bolingí kotíela ngáí motámbo ? Bóyéla ngáí denário, nátála yangó. »
Mark LinVB 12:16  Bayélí yě yangó mpé atúní bangó : « Elongi mpé nkómbó eye ya náni ? » Bazóngísélí yě : « Ya Kaizáro. »
Mark LinVB 12:17  Yézu alobí na bangó : « Bópésa Kaizáro bya yě ; bópésa mpé Nzámbe bya yě ! » Bakámwí na yě míngi.
Mark LinVB 12:18  Ba-Saduséo bayéí epái ya yě. Ba­ngó bakolobaka ’te bato bakosékwa té. Batúní yě :
Mark LinVB 12:19  « Motéyi, Móze apésí bísó mobéko moye : ‘Sókó moto akúfí mpé atíkí mwásí, kasi abótí na yě té, ndeko wa yě asengélí kobála mwásí ôná mpô ábótela ndeko wa yě óyo akúfí bána.
Mark LinVB 12:20  Ezalákí bandeko babáli nsambo. Oyo wa libosó abálí mwásí mpé awéí, atíkí bána té.
Mark LinVB 12:21  Oyo wa bábalé abálí mwásí ôná mpé awéí, atíkí bána té ; wa básáto sé bôngó.
Mark LinVB 12:22  Bangó bánso nsambo batíkí bána té. Nsima ya bangó bánso mwásí mpé awéí.
Mark LinVB 12:23  Bôngó ntángo bato bakosékwa, akozala mwásí wa náni ? Zambí azalákí mwásí wa bangó bánso nsambo. »
Mark LinVB 12:24  Yézu alobí na bangó : « Bobúngí, mpô boyébí Minkandá té, boyébí ngúyá ya Nzámbe mpé té.
Mark LinVB 12:25  Mpámba té, ntángo bato bakosékwa bakobála lisúsu té, kasi bakozala lokóla bǎnzelú o likoló.
Mark LinVB 12:26  Mpô ya nsékwa ya bawá botángí o búku ya Móze té ’te Nzámbe abimélí yě o káti ya nzeté epelí móto, alobí na yě : ‘Nazalí Nzámbe wa Abaráma, Nzámbe wa Izáka, Nzá­mbe wa Yakób’ ?
Mark LinVB 12:27  Azalí Nzámbe wa bato bakúfá té, kasi wa bato bazalí na bomoi. Bobúngí sôló ! »
Mark LinVB 12:28  Motéyi mǒkó wa Mobéko ayókákí bangó ntángo bazalákí kowélana ntembe ; amóní ’te Yézu ayanólí bangó malámu, ayéí mpé atúní yě : « O ntéi ya mibéko mínso mobéko níni molekí bonéne ? »
Mark LinVB 12:29  Yézu ayanólí : « Mobéko mwa libosó mozalí : Bato ba Israél, bóyóka ! Mokonzi Nzámbe wa bísó azalí Mokonzi sé yě mǒkó ;
Mark LinVB 12:30  ólinga Mokonzi Nzámbe wa yǒ na motéma mwa yǒ mobimba, na molímo mwa yǒ mobimba, na mayéle ma yǒ mánso mpé na makási ma yǒ mánso.
Mark LinVB 12:31  Mpé mobéko mwa míbalé : ólinga bání­ngá lokóla okomílingaka. Mobéko mosúsu molekí mibéko mîná míbalé mozalí té. »
Mark LinVB 12:32  Motéyi wa Mobéko azóngísí : « Ezalí bôngó, Motéyi, olobí ya sôló ’te Nzámbe azalí sé yě mǒkó, mosúsu azalí té.
Mark LinVB 12:33  Kotumbela Nzámbe nyama mpé kobonzela yě mabonza ezalí malámu. Kasi kolinga Nzámbe na motéma mobimba, na mayéle mánso mpé na makási mánso, mpé kolinga báníngá lokóla tokomílingaka, elekí malámu. »
Mark LinVB 12:34  Yézu amóní ’te ayanólí na bwányá mpenzá, alobí na yě : « Ozalí mosíká té na Bokonzi bwa Nzámbe. » Mpé moto mǒkó té amekí lisúsu kotúna yě motúna.
Mark LinVB 12:35  Ntángo azalákí kotéya o Témpelo, Yézu alobí : « Bóníbóní batéyi ba Mobéko bakokí koloba ’te Mesíya azalí mwána wa Davídi ?
Mark LinVB 12:36  Davídi yě mǒkó alobáká na ngúyá ya Elímo Sántu : ‘Mokonzi Nzámbe alobí na Mokonzi wa ngáí : Fándá o lobóko la ngáí la mobáli téé nakokwêisa bangúná ba yǒ o nsé ya makolo ma yǒ.’
Mark LinVB 12:37  Davídi yě mǒkó abéngí yě Mokonzi, bôngó ndéngé níni akokí kozala mwána wa yě ? » Bato baíké bazalákí kosepela na boyóki yě.
Mark LinVB 12:38  O matéya ma yě alobí na bangó : « Bókéba na batéyi ba Mobéko : balingí míngi kotámbola na bilambá bya lokúmu, balingí bato bápésa bangó losáko o zándo,
Mark LinVB 12:39  balingí kofánda o kíti ya libosó o sinagóga mpé o bisíká bya lokúmu ntángo ya kolía.
Mark LinVB 12:40  Bakobótoloko básí bazéngé bilóko, kasi balingí kolakisa ’te bakosámbelaka míngi. Bangó ndé bakokita o likambo, leká bato basúsu ! »
Mark LinVB 12:41  Yézu akeí kofánda penepene na sandúku ya mabonza, mpé atálí bato bayéí kotía mosolo o sandúku. Bato ba nkita baíké batíákí mosolo míngi.
Mark LinVB 12:42  Mwásí bozéngé mǒkó, yě mobóla, ayéí kotía bibendé bíbalé bya motúya moké.
Mark LinVB 12:43  Bôngó Yézu abéngí bayékoli ba yě, alobí na bangó : « Ya sôló, nayébísí bínó : libonza lya mwásí bozéngé óyo lilekí mabonza ma basúsu bánso batíákí mosolo o sandúku.
Mark LinVB 12:44  Mpô bangó bánso balongólí mosolo moye basengélí na mwangó té, kasi yě, atâ akélélí, apésí bínso bizalákí na yě, ná mbóngo ya kolía. »