Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 88
Psal LinVB 88:1  Nzembo ya bana ba Kore. Ya kapita wa bayembi. Maloba ma Eman, mwana wa Zera (1 Mkl 2,6).
Psal LinVB 88:2  E Mokonzi Nzambe, na moi nabeleli yo, na butu namileli epai ya yo.
Psal LinVB 88:3  Losambo la ngai lokoma tee epai ya yo, tia matoi na boleli bwa ngai,
Psal LinVB 88:4  mpo motema mwa ngai motondi na mawa, nakomi penepene na mboka ya bawa.
Psal LinVB 88:5  Batangi ngai o molongo mwa bato basili kokunda, natikali na makasi lisusu te.
Psal LinVB 88:6  Nasili nakomi o kati ya bawa, lokola bibembe bilali o malita, biye okokanisaka lisusu te, mpo bikabwani na yo libela.
Psal LinVB 88:7  Ozindisi ngai o bozindo bwa mboka ya bawa, o kati ya molili mpe o lobwaku.
Psal LinVB 88:8  Nkanda ya yo enyati ngai, osopeli ngai yango lokola mai ma mbonge.
Psal LinVB 88:9  Olongoli ngai mosika na baye bayebi ngai, o miso ma bango okomisi ngai eloko ya nsomo. Nakangemi, nzela ya kobima ezali te.
Psal LinVB 88:10  Miso ma ngai malembi mpo ya mawa. Moi mobimba nakobyangaka yo, Mokonzi, mpe nakotandelaka yo maboko :
Psal LinVB 88:11  « Okosalaka nde makamwa mpo ya bawei ? Bato bawei bakoteleme nde mpo ya kokumisa yo ?
Psal LinVB 88:12  O malita bakosakolaka nde bolingi bwa yo ? O mboka ya bawa bakotangaka nde lobokó la yo ?
Psal LinVB 88:13  Bakoyebaka nde makamwa ma yo o kati ya molili, mpe bosembo bwa yo o mboka ya bawa ? »
Psal LinVB 88:14  Kasi nakobelelaka yo, Mokonzi, na ntongo losambo la ngai lokobutaka epai ya yo.
Psal LinVB 88:15  E Mokonzi, mpo nini obwaki ngai ? Mpo nini obombeli ngai elongi ya yo ?
Psal LinVB 88:16  Nazali na mpasi, ut’o bomwana mpema esileli ngai, oyokisi ngai nsomo, nakangi motema tee nalembi.
Psal LinVB 88:17  Nkanda ya yo inso ikweli ngai, makambo ma yo ma nsomo manyati ngai,
Psal LinVB 88:18  mazingi ngai mikolo minso lokola mai, mayeli ngai bipai binso.
Psal LinVB 88:19  Olongoli bandeko na bayebani epai ya ngai ; moninga wa ngai, nde molili.