Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
SIRACH
Prev Up Next
Chapter 4
Sira LinVB 4:1  Mwana wa ngai, opima mobola bilei te, moto akeleli, otika ye alela mpasi ya ye te.
Sira LinVB 4:2  Oyokisa moto akufi na nzala mpa­si te, moto azangi biloko, oyokisa ye motema bololo te.
Sira LinVB 4:3  Moto abwaki elikya, obakisela ye mpasi te, moto akeleli, opima ye likabo lya yo te.
Sira LinVB 4:4  Oboya moto wa mpasi te soko abondeli yo, soko mobola ayeli yo, oboya kotala ye te.
Sira LinVB 4:5  Moto akeleli, opesa ye mokongo te, opesa moto moko nzela ya kobetele yo mobondo te.
Sira LinVB 4:6  Soko moto abeteli yo mobondo o mpasi ya ye, Mozalisi wa ye, akoyoka losambo la ye.
Sira LinVB 4:7  Oluka bondeko na bato ba lisa­nga, omikitisa o miso ma moto aleki yo.
Sira LinVB 4:8  Okanga matoi te soko mobola abo­ndeli yo, mpe ozongisela ye se maloba ma boboto.
Sira LinVB 4:9  Obikisa moto wa mawa o maboko ma monyokoli, mpe obanga te kosambisa bato na bosembo.
Sira LinVB 4:10  Omilakisa na bana bitike lokola tata, mpe osalisa mama wa bango lokola mobali wa ye azalaki kosala. Bongo Nzambe wa nta likolo akotanga yo mwana wa ye, mpe akoli­nga yo na bolingi boleki boye bwa mama wa yo.
Sira LinVB 4:11  Bwanya bokobokoloko bana ba ye, mpe bokopanganaka na baye bakolukaka bwango.
Sira LinVB 4:12  Moto alingi bwanya, alingi bomoi, bato bakoluka bwango uta ntongo, bakotonda na esengo.
Sira LinVB 4:13  Moto azali na bwanya, akosangola lokumu, bipai binso akokende, Mokonzi akobenisa ye.
Sira LinVB 4:14  Baye bakolandaka bwanya, bakokumisa Mokonzi, Nzambe alingi bato balingi bwanya.
Sira LinVB 4:15  Oyo akolanda bwanya, akosa­mbisa bato na bosembo, mpe oyo akoluka bwango, likama likokwela ye te.
Sira LinVB 4:16  Moto akotiaka motema na bwa­nya, akozala na bwango, mpe bana ba ye bakosepela na bwango.
Sira LinVB 4:17  O ebandela bwanya bokokamba yo o nzela mabunu mabunu, oko­ta­mbola na bobangi mpe na nsomo o motema, okoyoka mpasi mpo ya mibeko mya bwango, tee okondima ’te bwanya bokambi yo o nzela ya solo. Bwanya bokomeka yo na mibeko mingi,
Sira LinVB 4:18  kasi nzela yango ekosuka se malamu mpe ekosepelisa yo, mpe okoyeba ntina ya makambo manso mabombami.
Sira LinVB 4:19  Kasi soko obungi nzela ya solo, bwanya bokotika yo, mpe okobu­ngama libela.
Sira LinVB 4:20  Okeba na maye mazali koleka mpe omikengele mpo ’te osala mabe te, ezalela ya yo eyokisa yo nsoni te.
Sira LinVB 4:21  Zambi nsoni ekoki kobenda moto o nzela ya masumu, kasi nsoni esu­su ekopesaka lokumu mpe bolamu.
Sira LinVB 4:22  Ofunda te mpo ’te oyoka nsoni nsima te, bongo nsoni eye ekweisa yo te.
Sira LinVB 4:23  Otikala nye te ntango osengeli koloba, mpe obomba bwanya bwa yo te.
Sira LinVB 4:24  Bwanya bwa moto bokoyebana na maloba ma ye, makambo moto akobimisa makolakisa mayele ma ye.
Sira LinVB 4:25  Tika maloba mazangi bosolo, kasi ndima na bosembo ’te oyebi ma­nso te.
Sira LinVB 4:26  Oyoka nsoni te mpo ya kosakola masumu ma yo, omeka te koka­ngisa mai matiyoli o ebale.
Sira LinVB 4:27  Omikitisa o boso bwa moto zoba te, mpe obanga miso ma moto mo­nene te.
Sira LinVB 4:28  Obunela bosolo, tee nsuka, mpe Mokonzi Nzambe akobunela yo.
Sira LinVB 4:29  Oloba makasi koleka te, ozala goi­goi te, mpe okima mosala mwa yo te.
Sira LinVB 4:30  O ndako, ozala lokola ntambwe te, mpe oyokisa basali ba yo nsomo te.
Sira LinVB 4:31  Otanda maboko te mpo ya kokamata, mpe okanga mango te o ntango ya kozongisa.