Chapter 1
| Zeph | LinVB | 1:1 | Maloba Yawe alobaki na Sofonia, mwana wa Kus, nkoko wa Gedalya, oyo azali mwana wa Amarya, mwana wa Kiskia, o ntango Yozia, mwana wa Amon azalaki mokonzi wa Yuda. | |
| Zeph | LinVB | 1:3 | Nakolongola bato na nyama, nakolongola ndeke ya likolo na mbisi ya mai, nakolongola bisimbisi bikweisaki bato, nakolongola bato, basila o mokili. Maloba ma Yawe. | |
| Zeph | LinVB | 1:4 | Nakotombola loboko mpo ya kosala Yuda mabe na mpe bato banso ba Yeruzalem. Nakolongola o esika ena makambo ma Baal, basali na banganga nzambe ba ye, | |
| Zeph | LinVB | 1:5 | baye bakokumbamelaka o mitondo mya ndako minzoto mya likolo, baye bakokumbamelaka Yawe mpe bakolayaka ndai na nkombo ya Milkom, | |
| Zeph | LinVB | 1:7 | Banso bazala nye o boso bwa Mokonzi Yawe, mpo mokolo mwa Yawe mokomi penepene ! Yawe alengeli limpati lisantu na moboma, asantisi baye babyangemi. | |
| Zeph | LinVB | 1:8 | Mokolo Yawe akolamba moboma mwa ye, akopesa bayangeli mpe bankumu etumbu, na baye banso bakolataka bilamba bya bikolo bisusu. | |
| Zeph | LinVB | 1:9 | Mokolo mona nakotumbola baye banso bakoyingelaka o tempelo ya nzambe mosusu, mpe bakotondisaka ndako ya mokonzi wa bango na mosolo bazwi na bitumba mpe na bokosi. | |
| Zeph | LinVB | 1:10 | Yawe alobi boye : Mokolo mona bokimeli bokoyokana o ‘Ezibeli ya Mbisi’, boleli o ‘Mboka ya Sika’, mpe lokito lonene o ngomba. | |
| Zeph | LinVB | 1:11 | Bino bato ba Esika ya Bipolu, bolela, mpo bakangi zando ya Kanana, bato banso bakotangaka mosolo bakufi. | |
| Zeph | LinVB | 1:12 | Mokolo mona nakosimba mwinda o maboko mpo ’te natala Yeruzalem malamu o bisika bya molili. Nakotumbola bato bazali lokola vino ebebi, baye bamilobeli o mitema : « Yawe akoki kosala malamu te, mabe mpe te. » | |
| Zeph | LinVB | 1:13 | Mokolo mona bakobotolo bango nkita mpe bakobuka ndako ya bango ; bakotonga ndako, kasi bakofanda te, bakolona nzete ya vino, kasi bakomele vino te. | |
| Zeph | LinVB | 1:14 | Mokolo mwa Yawe mobelemi, mokolo monene, mozali koya mbangu mpenza ! O mokolo mwa Yawe bato bakolela makasi, ata elombe akobelela basalisi ba ye. | |
| Zeph | LinVB | 1:15 | Mokolo mona, mokolo mwa nkanda ! Mokolo mwa malozi mpe mwa bobangi, mokolo mwa mpasi mpe mwa mawa, mokolo mwa molili mpe mwa butu boindo tu, mokolo likolo likoinda na mampata manene, | |
| Zeph | LinVB | 1:16 | mokolo bakobete ebeleli ya bitumba na mondule, mpo babundisa bato ba bibombamelo mpe ba manongi. | |
| Zeph | LinVB | 1:17 | Nakoyokisa bato kwokoso, bakotambola lokola bato ba lolanda, zambi basali masumu o miso ma Yawe. Makila ma bango makosopama lokola mai, misopo mya bango mikobwakema lokola bipoli. | |
Chapter 2
| Zeph | LinVB | 2:2 | mpo ’te bapupola bino te lokola bakopupolaka matiti, nkanda enene ya Yawe ekwela bino te, awa mokolo mwa nkanda ya Yawe mokoki naino te. | |
| Zeph | LinVB | 2:3 | Babola banso ba nse baluka Yawe, bino baye bokotosaka mibeko mya ye. Bozala na motema bosembo mpe na bosawa, mbele bokobika o mokolo mwa nkanda ya ye. | |
| Zeph | LinVB | 2:4 | Solo, Gaza ekokoma esika ya mpamba, Askalon ekokoma mopotu, bakobengana bato ba Asdod na moi mpenza, mpe bakopikola Ekron. | |
| Zeph | LinVB | 2:5 | Mawa na bino bato penepene na mbu, bino bandeko ba ekolo ya Kereti, Yawe alobi mpo ya bino : « Yo Kanana, mokili mwa ba-Filisti, nakoboma yo na bato ba yo banso. » | |
| Zeph | LinVB | 2:7 | Mokili moye mokozala mwa bato ba Yuda baye batikali, bakoleisa mpata ya bango o mabelé mana ; na mpokwa bakopema o ndako ya Askalon, mpo Yawe Nzambe wa bango akoya kosalisa bango, akoya kobongisa makambo ma bango. | |
| Zeph | LinVB | 2:8 | Nayoki mafinga ma bato ba Moab mpe ba Amon ntango bazalaki kofinga bato ba ngai mpe kofunda na mabelé ma bango. | |
| Zeph | LinVB | 2:9 | Yawe wa bokasi bonso Nzambe wa Israel alobi : « Ya solo, nalayi o nkombo ya ngai : Moab ekokoma lokola Sodoma, mpe Amon lokola Gomora ; mabelé ma bango makotonda na nzube, makokoma libulu lya mongwa, mopotu seko. Bato ba ngai baye bakotikala o mokili bakobotolo bango biloko, mwana mboka oyo akotikala akozwa mabelé ma bango. » | |
| Zeph | LinVB | 2:10 | Tala etumbu bato ba bikolo bakozwa mpo ya lolendo, mpo bafingaki mpe bafundaki o miso ma bato ba ekolo ya Yawe wa bokasi. | |
| Zeph | LinVB | 2:11 | Yawe akoyokisa bango nsomo, akokweisa bikeko binso bya banzambe ba bango. Bato ba bisanga binso bakokumbamela ye, moko moko o mokili mwa ye. | |
| Zeph | LinVB | 2:13 | Akotumbola bato ba ekolo ya Nordi, akoboma Asur mobimba, akokomisa engumba Ninive mopotu, ekokoma zelo lokola eliki. | |
| Zeph | LinVB | 2:14 | Ngombe ikoya kolala wana, na nyama isusu ndenge na ndenge : esulungutu na yanganga ikolala wana na butu, penepene na maninisa nzembo ya ndeke ekoyokana, mpo nzete inso ikatani. | |
Chapter 3
| Zeph | LinVB | 3:2 | Yawe abengaki bango, bandimi te ; apalelaki bango, bayoki te ; batii mitema na Yawe te ; balingi kobeleme na Nzambe wa bango te. | |
| Zeph | LinVB | 3:3 | Bayangeli ba bango bazali lokola nkosi ya nkanda, bazuzi ba bango lokola nkoi o esobe, ikobombaka biloko tee lobi na ntongo te. | |
| Zeph | LinVB | 3:4 | Baprofeta bazali na maloba ma mpamba mpe na mayele ma bokosi, banganga Nzambe bakosantolaka biloko bisantu, bakobebisaka mibeko mya Nzambe. | |
| Zeph | LinVB | 3:5 | Kasi Yawe azali wana, azali na bosembo, akosalaka mabe soki te. Mokolo na mokolo akoyebisaka mibeko mya ye, etani ntongo ye azali se wana. Kasi moto azangi bosembo akoyokaka nsoni te. | |
| Zeph | LinVB | 3:6 | Nabomi bikolo bisusu, nabomi manongi ma bango, nabebisi balabala, bongo bato bakoleka wana lisusu te ! Bingumba bibebi, bato bazali wana lisusu te. | |
| Zeph | LinVB | 3:7 | Namilobelaki ’te : « Mbele okobanga ngai, mbele okoyoka liteya mpe okobosana makebisi ma ngai te. » Nzokande noki bakobi kosala mabe ! | |
| Zeph | LinVB | 3:8 | Yango wana Yawe alobi boye : Bozila mokolo bokoyeba ngai, mokolo nakoteleme mpo ya kofunda bino. Nasili nakani kosangisa bato ba bikolo binso, nakoyokela bango nkanda, nakokitisela bango nkele ya ngai, mokili mobimba mokosila na móto mwa zuwa lya ngai. | |
| Zeph | LinVB | 3:9 | Nakopetola mbebu ya bato ba bikolo binso mpo ’te banso babelela nkombo ya Yawe, mpe basalela ye na motema moko. | |
| Zeph | LinVB | 3:10 | Bato bakouta leka bibale bya Etiópia, esika bapanzani, mpo ya kosalela ngai mpe kobonzela ngai mabonza. | |
| Zeph | LinVB | 3:11 | Mokolo mona okoyoka nsoni lisusu te mpo ya mabe mingi osalaki ngai, zambi nakolongola bato ba monoko monene o mboka yo, mpe okotika kofunda o ngomba ya ngai esantu. | |
| Zeph | LinVB | 3:12 | Nakotika epai ya yo se ndambo ya bato, bato ba bosawa, baye bazali na lolendo te, baye bakotia elikya na nkombo ya Yawe. | |
| Zeph | LinVB | 3:13 | Bato bakotikala o Israel bakozanga bosembo lisusu te, bakobuka lokuta lisusu te ; bakokosa lisusu te, kasi bakolia mpe bakopema na boboto, moto moko akotungisa bango lisusu te. | |
| Zeph | LinVB | 3:14 | Bato ba Sion, boganga na esengo ! Bato ba Israel, boyemba nzembo ya nsai ! Bato ba Yeruzalem, bosepela mpe boyoka mitema nsai ! | |
| Zeph | LinVB | 3:15 | Yawe alongoli etumbu ya yo, apanzi banguna ba yo ; Yawe, Mokonzi wa Israel, azali na yo, obanga makambo ma mpasi lisusu te. | |
| Zeph | LinVB | 3:17 | Yawe Nzambe wa yo azali na yo, ye elombe mobikisi ! Akoyoka nsai enene mpo ya yo, akolakisa bolingi bwa ye lisusu, mpe akobinela yo na migango mya esengo, | |
| Zeph | LinVB | 3:19 | Tala boniboni nakosala banyokoli ba yo banso. O ntango ena nakobikisa baye babukani makolo, nakosangisa baye babungami. Nakosala ’te bakumisa yo, nkombo ya yo eyebana o bikolo biye bazalaki koyoka nsoni. | |