DEUTERONOMY
Chapter 1
Deut | LinVB | 1:1 | Yoka maloba Moze alobaki na bato banso ba Israel o ngambo ya Yordane, o eliki, o lobwaku la Araba, penepene na Suf, kati ya Paran na Tofel, Laban, Aserot na Di-Zakab. | |
Deut | LinVB | 1:2 | Longwa Oreb mpo ya kokoma o Kades-Barne, soko baleki nzela ya ngomba ya Seir, bakotambola mikolo zomi na moko. | |
Deut | LinVB | 1:3 | O mobu mwa ntuku inei, o sanza ya zomi na yoko, mokolo mwa yambo, Moze ayebisi bana ba Israel makambo manso Yawe atindaki ye. | |
Deut | LinVB | 1:4 | Asili alongaki Sikon, mokonzi wa ba-Amor, oyo afandi o Kesbon ; alongaki mpe Og, mokonzi wa Basan, oyo afandi o Asterot mpe o Edrei. | |
Deut | LinVB | 1:6 | Yawe Nzambe wa biso alobaki na biso o ngomba Oreb maloba maye : « Bosili boumeli mikolo mingi o ngomba eye, ekoki sikawa. | |
Deut | LinVB | 1:7 | Bolongwa awa mpe bokende o ngomba ya ba-Amor, epai ya bato bafandi o Araba, o mokili mwa ngomba, o lobwaku, o Negeb mpe o mokili penepene na mbu. Bokende o mokili mwa Kanana mpe mwa Libano tee ebale enene Efrate. | |
Deut | LinVB | 1:8 | Tala mokili ngai napesi bino. Bokende kozwa mokili Yawe alakelaki bankoko ba bino na ndai, Abarama, Izaka, Yakob na bana ba bango. » | |
Deut | LinVB | 1:9 | O mokolo mona nalobaki na bino : « Nakoki komeme mokumba mwa boyangeli bino se ngai moko te. | |
Deut | LinVB | 1:10 | Yawe Nzambe wa bino akomisi bino libota linene, mpe sikawa bokomi ebele lokola minzoto mya likolo. | |
Deut | LinVB | 1:11 | Yawe Nzambe wa bino akokolisa naino libota lya bino mbala nkoto mobimba mpe akobenisa bino lokola alakelaki. | |
Deut | LinVB | 1:12 | Ndenge nini ngai moko nakata makambo ma bino ma nkanda, ma kofunda moninga mpe ma bowelani ? | |
Deut | LinVB | 1:13 | Yango wana boluka o libota lyoko lyoko lya bino bato ba bwanya, bato ba mayele, bato bameseni kokata makambo, nakomisa bango bayangeli ba bino. » | |
Deut | LinVB | 1:15 | Yango wana nakamati bayangeli ba mabota ma bino, bato ba mayele, bato bayebi kokata makambo, naluboli bango bakonzi ba bino, basusu bayangela bato nkoto, basusu bato monkama, basusu bato ntuku itano to zomi ; nabakisi mpe bakomi-minkanda. | |
Deut | LinVB | 1:16 | Nsima napesaki bazuzi ba bino mibeko miye : « Boyoka maloba manso ma bandeko ba bino, mpe bokata na bosembo makambo moto azwi na moninga wa ye to na mompaya afandi o ndako ya ye. | |
Deut | LinVB | 1:17 | Awa bolingi kokata makambo ma bato, botala bilongi bya bato te, kasi boyoka maloba ma moto moke na maloba ma moto monene se lolenge loko. Bobanga moto te, zambi se Nzambe akokata makambo. Soko likambo lyoko lileki bino na bokasi, tinda moto ona epai ya ngai, mpe nakoyoka ye. » | |
Deut | LinVB | 1:19 | Tolongwaki o Oreb mpe tokatisaki eliki enene ya nsomo, eye bomonoki o nzela ekokende o ngomba ya ba-Amor. Yawe Nzambe wa biso atindaki biso bongo mpe tokomi o Kades-Barne. | |
Deut | LinVB | 1:20 | Nsima nalobi na bino : « Bosili bokomi sikawa o ngomba ya ba-Amor, eye Yawe Nzambe wabiso apesaki biso. | |
Deut | LinVB | 1:21 | Yawe Nzambe wa bino apesaki bino mokili moye. Bokende mpe bozwa mwango lokola Yawe Nzambe wa bankoko ba bino alobaki. Bobanga te, boyoka mpe nsomo te. » | |
Deut | LinVB | 1:22 | Ntango bino banso boyaki koluka ngai, bolobaki : « Totinda liboso bato bakende kotala mokili ; bakoyebisa biso nzela nini tolanda mpe o mboka nini tokoki kokende. » | |
Deut | LinVB | 1:23 | Namonoki likanisi lyango lizali lilamu. Nakamataki bato zomi na babale o kati ya bino, o libota lyoko lyoko moto moko. | |
Deut | LinVB | 1:24 | Balandaki nzela ya ngomba mpe bakomaki o lobwaku la Eskol mpe batalaki mokili mobimba. | |
Deut | LinVB | 1:25 | Babukaki mbuma ya mokili mona mpe bayaki na yango epai ya biso, balobaki : « Mokili moye Yawe Nzambe wa biso apesaki biso mozali malamu mpenza. » | |
Deut | LinVB | 1:27 | bobandaki kosilika o biema bya bino mpe bolobaki : « Yawe akoyinaka biso, yango wana abimisaki biso o mokili mwa Ezipeti mpo ’te akaba biso o maboko ma bato ba Amor mpe asilisa biso. | |
Deut | LinVB | 1:28 | Tozali nde kokende epai wapi ? Bandeko ba biso balembisaki biso mitema, awa balobaki : Bato ba mokili mona baleki biso na bolai bwa nzoto mpe na bokasi : mboka ina izali inene mpe izingami na mapango makasi mpe itongami o ngomba. Tomonoki mpe ba-Anakim kuna. » | |
Deut | LinVB | 1:30 | Yawe Nzambe wa bino akotambola liboso lya bino, akobunela bino se lokola bomonoki o Ezipeti. | |
Deut | LinVB | 1:31 | Bomonoki ye mpe o eliki ; Yawe Nzambe wa bino amemeki bino se lokola tata akomeme mwana wa ye ; asalisaki bino ntango inso o nzela eye bozalaki kolanda tee awa. » | |
Deut | LinVB | 1:33 | Oyo azalaki kotambola liboso lya bino mpo ’te bozwa esika ya kopika nganda, alakisaki bino nzela : na butu azalaki lokola móto mpe na moi lokola limpata. | |
Deut | LinVB | 1:35 | « Moto moko wa libota liye libe akomono mokili moye mwa esengo te, moye nalakelaki bankoko ba bino. | |
Deut | LinVB | 1:36 | Bobele Kaleb, mwana wa Yefune akomono mwango. Nakopesa ye na bana ba ye mabelé mana ye atiaki makolo, zambi ye atosaki Yawe na motema moko. » | |
Deut | LinVB | 1:37 | Yawe ayokelaki ngai mpe nkanda mpo ya bino, alobaki na ngai : « Yo mpe okokoto kuna te. | |
Deut | LinVB | 1:38 | Mosaleli wa yo Yozue, mwana wa Nun, akokoto kuna. Lendisa ye, zambi ye moto akokomisa bato ba Israel bankolo ba mokili. | |
Deut | LinVB | 1:39 | Kasi bana ba bino baye bayebi naino te nini ezali malamu to mabe, baye bino bolobaki ’te bakokweya o maboko ma banguna, bango bakokoto ; nakopesa bango mokili mona, bakokoma bankolo ba mwango. | |
Deut | LinVB | 1:41 | O ntango ena boyanolaki ngai : « Tosalaki masumu o miso ma Yawe Nzambe wa biso. Tokokende kobu-nda etumba lokola Yawe Nzambe wa biso atindi biso. » Bokamataki bibuneli bya bino mpe bolataki molato mpo ya kobuta ngomba. | |
Deut | LinVB | 1:42 | Kasi Yawe alobaki na ngai : « Loba na bango : Bokende kobunda te, zambi nazali o kati ya bino te ; bokeba ’te banguna balonga bino te. » | |
Deut | LinVB | 1:43 | Ata nalobaki na bino bongo, boyokaki ngai te mpe boto-mbokoki na Yawe ; na lolendo la bino bobutaki ngomba. | |
Deut | LinVB | 1:44 | Ba-Amor, baye bafandi o ngomba babimaki mpo ya kozwana na bino ; balandaki bino lokola nzoi ikolandaka bato mpe balongaki bino ut’o ngomba Seir tee Oroma. | |
Deut | LinVB | 1:45 | Ekomi bino kozonga, bobandaki kolela o miso ma Yawe. Kasi ye ayokaki lolaka la bino te, atalaki bino se mpamba. | |