Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZEKIEL
Prev Up Next
Chapter 45
Ezek LinVB 45:1  Ntango bokokabola mabelé ma ekolo mobimba bo­bo­mbela Yawe ndambo. Ndambo ena ekozala mabelé masantu, batia mango liboso lya mabelé masusu : na bolai maboko nkoto ntuku ibale na itano, na bonene maboko nkoto ntuku ibale. Mabelé mana mobi­mba mazali mabelé masantu.
Ezek LinVB 45:2  O mabelé mana bameka ndambo eye ya ndako esantu : maboko nkama itano bipai binso binei ; babakisa lisusu eteni ya maboko ntuku itano bipai binso.
Ezek LinVB 45:3  O mabelé bokamati bongo, bokokata ndelo ya maboko nkoto ntuku ibale na itano, mpe na bonene maboko nkoto zomi ; o eteni eye bokotonga ndako esantu, esi­ka esantusantu ya ngai.
Ezek LinVB 45:4  Nda­mbo ya mabelé masantu mana ekozala ya banganga Nzambe bakosalaka mosala o ndako esantu, ná baye bakobeleme na Yawe mpo ya kosalela ye. O esika ena bakozala na ndako ya bango, mpe na mabelé ma ndako esantu.
Ezek LinVB 45:5  Eteni ya bolai maboko nko­to ntuku ibale na itano mpe bonene maboko nkoto zomi, ekozala ya ba-Levi bakosalaka o Tempelo. Eteni eye ekozala mabelé ma ba­ngo, esika bakofanda.
Ezek LinVB 45:6  Bopesa engu­mba eteni ya maboko nkoto itano na bo­nene, mpe maboko nkoto ntuku ibale na itano na bolai penepene na ndako esantu ; ezali eteni ya bato ba­nso ba Israel.
Ezek LinVB 45:7  Bopesa nkumu monene ndambo ya mabelé epai na epai ya eteni ya ndako esantu, mpe ya eteni ya engumba ; eteni yoko epai ya Westi, eteni esusu epai ya Esti. Bolai bwa eteni ena bokokana na ntaka ezali banda Westi tee ndako esantu, mpe banda ndako esantu tee ndelo ya Esti.
Ezek LinVB 45:8  Ezali mabelé ma nkumu o mokili mwa Israel. Nali­ngi bongo mpo ’te bankumu ba ngai bányokolo bato ba ngai lisusu te, bátikela bato ba Israel na mpe bituka binso mabelé ma ekolo.
Ezek LinVB 45:9  Mokonzi Yawe alobi boye : Ba­nkumu ba Israel, bolekisi ndelo ! Bo­tika bitumba mpe makambo ma boyibi, bosala malamu mpe bola­nda bosembo, botika koyokisa bato ba ngai mpasi na bolekisi motuya mwa biloko. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 45:10  Bozala na bimekeli bilamu, mpe na bingwongolo mpe na kopo na bonene bokoki.
Ezek LinVB 45:11  Bizala : efa mpo ya komeka bozito bwa mbuma, bat mpo ya komeka bokwi bwa mai. Yango ibale ikokana, izala ndambo ya zomi ya komer. Komer ekoya­ngela bonene bwa bimekeli.
Ezek LinVB 45:12  Bokomeka bozito bwa biloko na gera. Gera ntuku ibale ikokana na motako moko. Mitako ntuku ibale na mi­tano, bakisa lisusu mitako zomi na mitano ikokana na mina yoko.
Ezek LinVB 45:13  Tala biye bokolongola mpo ya kobonzela mokonzi. Soko bozwi mbuma ya mampa komer yoko, bo­longola ndambo ya motoba ; ya mbuma ya masangu komer yoko bolongola ndambo ya motoba.
Ezek LinVB 45:14  Kor yoko ya mafuta ekokana na komer yoko mpe bat zomi. Soko bozwi kor zomi, bolo­ngola bat yoko.
Ezek LinVB 45:15  O bisobe bya Israel, esika mpa­ta ya etonga ikoki nkama ibale, bolongola mpata yoko bo libonza lya mbuma, miboma mpe mabonza ma boboto ; bokokisa bongo milulu mya bosengi bolimbisi mpo ya bato. Elobi bongo Mokonzi Yawe.
Ezek LinVB 45:16  Bato banso ba Israel batosa mobeko moye, basalisa bongo nkumu wa ekolo ya Israel.
Ezek LinVB 45:17  Nkumu akopesa miboma, mabonza ma bolei mpe ma bomeli makobonzama o ntango ya mibembo mya losambo, o nta­ngo ya biyenga bya sanza ya sika, o mikolo mya Sabato mpe o mikolo minso mya eyenga o ekolo ya Israel. Ye moto akopesa libonza lya kolongola masumu, libonza lya bo­ndeko, libonza lya kotumba na mpe mabonza ma boboto, mpo ya kozwela bato ba Israel bolimbisi.
Ezek LinVB 45:18  Mokonzi Yawe alobi boye : O mokolo mwa yambo mwa sanza ya liboso bokokamata mwana mobali wa ngombe ezali na mbeba te, eye bokobonza mpo ya bolongoli masumu o ndako esantu.
Ezek LinVB 45:19  Nganga Nzambe akokamata makila ma nya­ma babomi mpo ya masumu, akopakola makila o mabaya ma mpe­mbeni ma ezibeli ya libanda like.
Ezek LinVB 45:20  O mokolo mwa nsambo ya sanza, bokosala lisusu bongo mpo ya bato banso basalaki mabe, kasi na nko te. Bokosala bongo mpo ya bopetoli Tempelo.
Ezek LinVB 45:21  O sanza ya yambo, o mokolo mwa zomi na minei, bozala na eyenga enene ya Pasika. Mikolo nsambo bokolia se mampa balambi na nkisi te.
Ezek LinVB 45:22  Mokolo mona nkumu akobonza ngombe mobali bo libonza lya kolongola masumu ma ye moko mpe ma bato ba ekolo mobimba.
Ezek LinVB 45:23  Mikolo nsambo mya eye­nga akobo­nzela Yawe libonza lya kotumba : ngombe babali nsa­mbo mpe mpata babali nsambo izali na mbeba te, yoko o mokolo moko moko. Bo libonza lya kolongola masumu : ntaba mobali yoko o mokolo moko moko.
Ezek LinVB 45:24  Na ngombe mobali yoko akobonza efa yoko ya fufu ; na mpata mobali akobonza efa esusu. Na efa yoko akobakisa mpe hin yoko ya mafuta.
Ezek LinVB 45:25  O sanza ya nsambo, o mokolo mwa zomi na mitano, mokolo mwa eyenga enene, akosala se bongo mikolo nsa­mbo mobimba : akobonza libonza mpo ya masumu, libonza lya kotumba, libonza lya mbuma mpe libonza lya mafuta.