Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GENESIS
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 17
Gene LinVB 17:1  Awa Abram akokisi mibu ntuku libwa na libwa, Yawe abimeli ye, alobi na ye : « Ngai Nzambe wa bokasi bonso. Tambola o miso ma ngai mpe zala mosa­ntu.
Gene LinVB 17:2  Nalingi kokata bondeko na yo ; nakosala ’te okokoma tata wa bana ebele mpe­nza. »
Gene LinVB 17:3  Abram akwei elongi o nse. Nzambe alobi na ye :
Gene LinVB 17:4  « Ngai oyo ! Tala bondeko nakokata na yo : okokoma tata wa bikolo ebele mpenza.
Gene LinVB 17:5  Bakotanga yo lisusu Abram te, kasi nkombo ya yo ekozala : Abarama, mpo nakokomisa yo tata wa bikolo ebele.
Gene LinVB 17:6  Nakopesa yo bana baike. Nakokomisa yo tata wa bikolo mpe bakonzi bakobima o libota lya yo.
Gene LinVB 17:7  Bondeko nakokata na yo, na bana ba yo na bankoko ba yo tee bankokolo ba yo, bokozala bwa seko ! Bongo nakozala Nza­mbe wa yo mpe wa bankoko ba yo.
Gene LinVB 17:8  Nakopesa yo mpe bana ba yo mokili moye, esika oyei kofa­nda lokola mo­mpaya, ekolo mobimba ya Kanana. Ekozala ekolo ya yo seko, mpe ngai nakozala Nzambe wa yo. »
Gene LinVB 17:9  Nzambe alobi na Abarama lisusu : « Osengeli kotosa bondeko bwa biso na yo, na bana ba libota lya yo bakobotama nsima.
Gene LinVB 17:10  Elembo ya bondeko ekozala kati ya biso na yo na bana ba yo : babali banso ba libota lya yo basengeli kokatisa nzoto.
Gene LinVB 17:11  Bokatisa nzoto ya bino. Mpo yango ekozala elembo ya bondeko kati ya ngai na bino.
Gene LinVB 17:12  Bosengeli kokatisa bana babali ba bino banso nzoto, ntango bakokisi mikolo mwambe ; ezali mobeko mwa seko. Moombo abotami o ndako ya bino, ná oyo bosombi epai ya mompaya mpe azali mwana wa libota te.
Gene LinVB 17:13  Bokatisa nzoto ya moo­mbo abotami o ndako ya bino, ná oyo bosombi na mosolo. Bondeko bwa biso na bino bomonono o mosuni mwa bino lokola elembo ya bondeko bwa seko.
Gene LinVB 17:14  Soko bakati mwana mobali nzoto te, alongwa o libota lya bino, mpo abomi bondeko na ngai. »
Gene LinVB 17:15  Nzambe alobi lisusu na Abarama : « Obenga mwasi wa yo lisusu Sarai te, kasi Sara.
Gene LinVB 17:16  Nakobenisa ye ; na nguya ya ngai akobotela yo mwana mobali. Nakobenisa ye, bongo akosala mama wa mabota, mpe bakonzi ba bikolo bakobotama o libota lya ye. »
Gene LinVB 17:17  Abarama akwei elongi o nse, aseki, amilobeli o motema : « Mwana akobotama solo na mobali akokisi mbula monkama ? Sara, awa akokisi mbula ntuku libwa, akobota naino, solo ? »
Gene LinVB 17:18  Abarama alobi na Nzambe : « Nakolikya ’te Ismael akozwa bolamu o miso ma yo. »
Gene LinVB 17:19  Nzambe alobi na Abarama : « Te ! Mwasi wa yo Sara akobotela yo mwana mobali mpe okopesa ye nkombo Izaka. Nakokata bondeko na ye mpe na bankoko ba ye, bondeko bwa seko !
Gene LinVB 17:20  Nayoki mpe mabondeli ma yo mpo ya Ismael. Tala, nakobenisa ye mpe nakokomisa ye nkoko wa bana ebele mpenza ; akobota bakonzi ba mabota zomi na mabale, mpe akokoma nkoko wa ekolo enene ya bato.
Gene LinVB 17:21  Kasi nakokata bondeko bwa ngai na Izaka, mwana oyo Sara akobotela yo o mobu mokoya bobele o eleko eye. »
Gene LinVB 17:23  Abarama akamati mwana wa ye Ismael, na bana babali banso babotami o ndako ya ye, na baye banso asombaki na mosolo. Babali banso bazalaki o ndako ya ye, akatisi ba­ngo nzoto bobele o mokolo monamei, lokola Nzambe ayebisaki ye.
Gene LinVB 17:24  Abarama ye moko mpe asali bo­ngo, asili akokisi mibu ntuku libwa na libwa ;
Gene LinVB 17:25  Ismael, mwana wa ye, akokisaki mibu zomi na misato ntango bakatisi ye nzoto.
Gene LinVB 17:26  Abarama na mwana wa ye Ismael bakatisi nzoto se o mokolo moko.
Gene LinVB 17:27  Babali banso ba ndako ya ye na mpe baombo banso asombaki na mosolo basali se bongo.