GENESIS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
Chapter 38
Gene | LinVB | 38:1 | O eleko ena, Yuda atiki bandeko ba ye mpe akei epai ya moto wa Adulam, nkombo ya ye Kira. | |
Gene | LinVB | 38:2 | Kuna amoni elenge mwasi, mwana wa Sua, moto wa Kanana. Yuda abali ye, akomisi ye mwasi wa ye. | |
Gene | LinVB | 38:5 | Na nsima aboti lisusu mwana mobali mpe apesi ye nko-mbo Sela. Ntango Sela abotami Yuda azalaki kofanda o mboka Kezib. | |
Gene | LinVB | 38:8 | Sikawa Yuda alobi na Onan : « Kende epai ya mwasi wa ndeko wa yo, mpe salisa ye lokola semeki akosalisaka, botela ndeko wa yo mwana. » | |
Gene | LinVB | 38:9 | Nzokande Onan ayebi ’te mwana akozala wa ye te, yango wana mbala inso asangisi nzoto na mwasi wa ndeko wa ye, asopi mai o nse, bongo ndeko wa ye azwa mwana te. | |
Gene | LinVB | 38:11 | Sikawa Yuda alobi na bokilo wa ye Tamar : « Okufeli mobali, bongo zonga epai ya tata wa yo tee mwana wa ngai Sela akokoma mokolo. » Amilobeli : « Ekoki te ’te mwana oyo akufa lokola bandeko ba ye. » Tamar azongi epai ya tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 38:12 | Nsima ya mikolo mingi, mwasi wa Yuda, mwana wa Sua, akufi. Esilisi Yuda kokitisa motema, akei o mboka Timna mpo ya kokatisa nsuki ya mpata ya ye, akei elongo na Ira, moninga wa ye wa mboka Adulam. | |
Gene | LinVB | 38:13 | Bato bayebisi Tamar, balobi na ye : « Bokilo wa yo ayei o Timna kokatisa nsuki ya mpata ya ye. » | |
Gene | LinVB | 38:14 | Tamar alongoli bilamba bibe bya mwasi bosenge, alati litambala, amisipi elongi na elamba mpe akei kofanda liboso lya ezibeli ya Enaim, o nzela ya Timna, zambi amoni ’te Sela asili akomi mokolo mpe babalisi ye na Tamar te. | |
Gene | LinVB | 38:16 | Akei epai ya ye mpe atuni ye : « Náya epai ya yo ? » Ayebi te ’te mwasi azalaki bokilo wa ye. Mwasi atuni ye : « Okopesa ngai nini awa okoya epai ya ngai ? » | |
Gene | LinVB | 38:17 | Azongisi : « Nakotindela yo mwana ntaba. » Kasi azongisi : « Nandimi, soko otikeli ngai ndanga tee nakozwa ntaba. » | |
Gene | LinVB | 38:18 | Atuni ye : « Napesa yo ndanga nini ? » Ye azongisi : « Pesa ngai mpete, nkamba mpe lingenda lya yo. » Apesi ye biloko bina, mpe alali na ye ; mwasi azwi zemi. | |
Gene | LinVB | 38:20 | Yuda atindi moninga wa ye wa Adulam apesa mwasi mwana ntaba, mpo ’te akamata biloko bya ye o maboko ma ye ; kasi moninga akuti mwasi te. | |
Gene | LinVB | 38:21 | Atuni bato ba mboka : « Wapi mwasi ndumba oyo azalaki o nzela ya Enaim ? » Kasi bango bayanoli : « Mwasi ndumba azalaka awa te ! » | |
Gene | LinVB | 38:22 | Yango wana azongi epai ya Yuda mpe alobi : « Nakutaki ye te ; bato ba mboka balobaki : Mwasi ndumba azalaka awa te. » | |
Gene | LinVB | 38:23 | Yuda alobi : « Atikala na biloko bina. Mabe soko bato bakomi koseke biso. Ngai moto natindelaki ye mwana ntaba, kasi yo okuti ye te. » | |
Gene | LinVB | 38:24 | Nsima ya sanza isato, bayebisi Yuda : « Bokilo wa yo Tamar asali bondumba, mpo ya mobulu mwa ye azwi zemi. » Yuda atindi etinda eye : « Babimisa ye o libanda, mpe batumba ye ! » | |
Gene | LinVB | 38:25 | Awa bazalaki kobimisa ye, Tamar atindeli bokilo wa ye maloba : « Moto apesaki ngai zemi, nkolo wa biloko biye. Bongo tala soko nani azali nkolo wa mpete, nkamba na lingenda liye. » | |
Gene | LinVB | 38:26 | Yuda amoni ’te biloko bisalaki bya ye, alobi : « Solo, aleki ngai na bosembo, mpo naboyaki kobalisa ye na mwana wa ngai Sela. » Na nsima Yuda ayebani na ye lisusu te. | |
Gene | LinVB | 38:28 | O ntango ya kobota, mwana moko abimisi loboko ; mwasi mobotisi akangi nsinga etane o loboko lona, alobi : « Mwana oyo abimi liboso. » | |
Gene | LinVB | 38:29 | Kasi mwana abendi loboko la ye mpe ndeko wa ye abimi. Mobotisi alobi : « Ofungoleli ye nzela, solo ! » Bongo bapesi ye nkombo Peres, lokola ’te « Mofungoli ». | |