GENESIS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
Chapter 45
Gene | LinVB | 45:1 | Yosefu akoki kokanga motema lisusu te o miso ma bato banso bazalaki wana, agangi : « Bobimisa bato banso. » Moto mosusu azalaki na bango te ntango Yosefu amiyebisi na bandeko ba ye. | |
Gene | LinVB | 45:2 | Yosefu aleli makasi, bato banso bayoki yango, mpe nsango ekei tee o ndako ya Farao. | |
Gene | LinVB | 45:3 | Yosefu alobi na bandeko ba ye : « Ngai Yosefu ! Boni, tata azali ? » Kasi bandeko bakoki kozongisa liloba te. Awa bamoni ’te ezalaki ye babulungani. | |
Gene | LinVB | 45:4 | Yosefu alobi na ba-ngo : « Boya penepene na ngai. » Awa bakomi penepene, alobi na bango : « Ngai Yosefu, ndeko wa bino botekelaki ba-Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 45:5 | Boyoka motema mpasi te, bomitungisa mpe te na ndenge botekeki ngai na bato bayaki na ngai awa. Nzambe moto atindaki ngai awa liboso lya bino mpo ya kobikisa bino. | |
Gene | LinVB | 45:6 | Nzala enene esili engali mibu mibale o mokili. Etikali mibu mitano bato bakokoka kokata bilanga te, kolona mbuma mpe te. | |
Gene | LinVB | 45:7 | Nzambe atindaki ngai o mokili moye o boso bwa bino mpo ’te bino na bana ba bino botikala na bomoi, mpe mpo ’te abikisa bato baike. | |
Gene | LinVB | 45:8 | Bino bato botindaki ngai awa te. Ezali Nzambe mpenza moto atindaki ngai awa, mpe akomisi ngai lokola tata wa Farao, mokonzi wa ndako ya ye mpe moyangeli wa mokili mwa Ezipeti mobimba. | |
Gene | LinVB | 45:9 | Bozonga noki epai ya tata mpe boloba na ye : Mwana wa yo Yosefu alobi boye : Nzambe aluboli ngai mokonzi wa Ezipeti mobimba. Yaka noki epai ya ngai. | |
Gene | LinVB | 45:10 | Okofanda o mokili mwa Gesen mpe okozala penepene na ngai, yo na bana ba yo, na bankoko ba yo, ngombe na bibwele na binso bizali na yo. | |
Gene | LinVB | 45:11 | Kuna ngai moto nakosalisa yo na bilei, bongo ozanga eloko te, yo na bana ba yo, na bato banso ba ndako ya yo, mpo nzala ekongala naino mibu mitano. | |
Gene | LinVB | 45:12 | Bino moko bozali komono na miso, ndeko wa ngai Benyamin mpe azali komono ’te ngai moko nazali koloba na bino. | |
Gene | LinVB | 45:13 | Boyebisa tata ’te nazwi lokumu lonene o Ezipeti, na mpe makambo manso bomonoki. Boya na tata wa ngai awa noki ! » | |
Gene | LinVB | 45:14 | Azingi ndeko wa ye Benyamin o nkingo mpe abandi kolela. Benyamin mpe azingi ye o nkingo, ye mpe aleli. | |
Gene | LinVB | 45:15 | Yosefu azingi bandeko ba ye banso ekopi, mai mabimeli ye o miso. Na nsima bandeko ba ye basololi na ye mingi. | |
Gene | LinVB | 45:16 | Nsango ekomi tee o ndako ya Farao ’te bandeko ba Yosefu bayaki. Farao na bato ba ye basepeli mingi. | |
Gene | LinVB | 45:17 | Mpe Farao alobi na Yosefu : « Loba na bandeko ba yo : Bozala boye : bobutisa biloko o mpunda ya bino mpe bozonga o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 45:18 | Bokamata tata wa bino na bato ba bino banso, bozonga epai ya ngai, nakopesa bino mabelé ma Ezipeti maleki malamu, mpe bokolia bilei kitoko bya mokili moye. | |
Gene | LinVB | 45:19 | Bongo yo, yebisa bango : Bosala boye : Bokamata makalo o mokili mwa Ezipeti mpo ya komene bana na basi ba bino, bokamata tata wa bino mpe boya. | |
Gene | LinVB | 45:20 | Boyoka mawa te mpo ya biloko bokotika kuna, zambi bokozwa biloko biye bileki malamu o mokili mwa Ezipeti. » | |
Gene | LinVB | 45:21 | Bana ba-Israel basali bobele bongo. Yosefu apesi bango makalo lokola Farao atindaki, apesi bango mpe bilei mpo ya mobembo. | |
Gene | LinVB | 45:22 | Apesi bango moko moko elamba yoko ya sika, kasi apesi Benyamin mitako mya palata nkama isato na mpe bilamba bya sika bitano. | |
Gene | LinVB | 45:23 | Atindeli mpe tata wa ye mpunda zomi ikumbi mbuma elengi ya Ezipeti, na mpe mpunda basi zomi ikumbi mbuma ya mampa na bilei bisusu mpo ya mobembo mwa tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 45:24 | Na nsima atiki bandeko ba ye bakende, alobi na bango : « Bobanga likama lyoko o nzela te ! » | |
Gene | LinVB | 45:26 | Bayebisi ye : « Yosefu azali na bomoi, ye moto azali moyangeli o mokili mobimba mwa Ezipeti ! » Nzokande motema mwa Yakob motikali nye, mpo andimi maloba ma bango te. | |
Gene | LinVB | 45:27 | Bongo basololi ye makambo ma-nso Yosefu alobaki. Na nsima amoni makalo maye Yosefu atindaki mpo ya kokamata ye, mpe Yakob abandi kondima. | |