JOB
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
Chapter 18
Job | LinVB | 18:4 | Yo moko ominyokoli na nkanda ya yo, olingi ’te bato basila o mokili mpo ya yo, mpe ngomba ya mabanga elongwa o esika ya yango ? | |
Job | LinVB | 18:5 | Ntembe te, mwinda mwa moto mabe mokozima, mpe móto mokongenge o ndako ya ye lisusu te. | |
Job | LinVB | 18:6 | Moi mokobongwana molili o ema ya ye, mpe mwinda mozali likolo lya ye mokopela lisusu te. | |
Job | LinVB | 18:7 | Liboso azalaki kotambola makasi, sikawa alembi ; akomi kotuta libaku liye ye moko atielaki baninga. | |
Job | LinVB | 18:8 | Ye moko akokotisa makolo ma ye o motambo, mpe akotambola nzela eye ekokanga ye o monyama. | |
Job | LinVB | 18:17 | O ekolo mobimba moto moko akokanisa ye lisusu te, o ntei ya bana mboka bakotanga nkombo ya ye lisusu te. | |
Job | LinVB | 18:18 | Bakolongola ye o mwinda mpe bakobwaka ye o molili, bakopima ye esika ya bozali o mokili mona. | |
Job | LinVB | 18:19 | O mboka ya ye akotika mwana moko te, nkoko mpe te, o ndako ya ye moto moko akokitana ye azali te. | |