Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next
Chapter 24
Job LinVB 24:1  Mpo nini Nzambe abombeli bato mikolo misusu te ? Mpo nini bato bandimi ye bakomonoko myango te ?
Job LinVB 24:2  Bato babe bakotindisaka ndelo ya bilanga bya bango, bakobokoloko bibwele bayibaki.
Job LinVB 24:3  Bakokamataka mpunda ya bana bitike, bakobotoloko mwasi bozenge ngombe ya ye.
Job LinVB 24:4  Bakobenganaka o nzela bato bakeleli, babola basengeli komibomba mosika na bango.
Job LinVB 24:5  Lokola mpunda ya esobe bakobimaka ut’o ntongo mpo ya koluka bilei, mpo ’te basilisa nzala ya bana ba bango.
Job LinVB 24:6  Mbuma iye bakobukaka, se matiti mpe mbuma ya vino iye itikali o bilanga bya bato babe.
Job LinVB 24:7  Na butu bakolalaka bolumbu, mpo bazangi bilamba mpe bolangiti mpo ya komibatela o eleko ya mpio.
Job LinVB 24:8  Mbula ekoutaka o ngomba ekopolisaka bango, bakobombamaka o mibenga mpo bazangi ndako.
Job LinVB 24:9  Babotoli mwana etike mwa mabelé ma ye, bakamati biloko bya mobola bo ndanga.
Job LinVB 24:10  Bakotambolaka bolumbu, elamba o nzoto te, basengeli komeme mikumba ata bakufi na nzala,
Job LinVB 24:11  bakokamolaka mbuma ya mafuta na moi makasi, mpe bakonyataka bituka bya vino, ata bakufi na mposa ya mai.
Job LinVB 24:12  O engumba bato balingi bakufa bakokimelaka, baye bazoki bakobelelaka mpo bazwa lisalisi, kasi Nzambe akoyokaka bango te !
Job LinVB 24:13  Banyokoli ba bango bakoyinaka moi, bameseni na nzela ya babola te, bakolandaka nzela ike te.
Job LinVB 24:14  Mobomi akolamukaka na butu, mpo ’te akende koboma mobola na mozangi, mpo ayiba biloko bya bato :
Job LinVB 24:15  Moto wa bosoni akozilaka ntango ya molili, akanisi : « Moto moko amono ngai te », mpe azipi elongi ya ye na elamba.
Job LinVB 24:16  Moyibi akobukaka ndako ya bato na butu, na moi abombami o ndako, alingi komono mwinda te.
Job LinVB 24:17  Bango banso babangi ntongo lokola bakobangaka liwa, bameseni se na nsomo ya molili.
Job LinVB 24:18  Makambo ma bango lokola nkoni ekotetwa o mai. Bato banso ba mokili batombela bilanga bya bango bobe. Bakokende lisusu o bilanga bya vino te.
Job LinVB 24:19  Lokola molunge mokonyangwisaka mai ma matandala, mboka ya bawa ekolimwisa moto wa masumu.
Job LinVB 24:20  Mama wa ye akobosana ye, nkusu ikolia ye, bakotanga nkombo ya ye lisusu te ; mosumuki akosuka mabe lokola nzete bakati.
Job LinVB 24:21  Azalaki konyokolo mwasi ekomba, mpe aboyaki kosalisa mwasi akufeli mobali.
Job LinVB 24:22  Bongo Nzambe, oyo akolongolaka bato banene na makasi, awa atelemi, moto oyo akomi kobanga liwa.
Job LinVB 24:23  Nzokande Nzambe akopesa ye mikolo afanda naino kimia, kasi miso ma ye mazali se kotala ye.
Job LinVB 24:24  Akoyoka malamu bobele mwa ntango, na nsima esili, akosuka lokola bato baye basilisaki mobembo. Azali lokola motó mwa lititi bakati.
Job LinVB 24:25  Ezali bongo te ? Nani akondimisa ngai mambi ma lokuta ? Nani akoki kowangana maloba ma ngai ?