JOB
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
Chapter 15
Job | LinVB | 15:2 | Moto wa bwanya akoki kozongisa nde eyano ezangi ntina ? akotondisa nde libumu na mompepe mwa Esti ? | |
Job | LinVB | 15:3 | Akoluka nde komilongisa na maloba mazangi ntina, mpe kosakola makambo makoki kobikisa ye te ? | |
Job | LinVB | 15:4 | Kutu, obandi kozanga limemya o miso ma Nzambe, mpe obebisi bomanyoli bwa yo o miso ma ye. | |
Job | LinVB | 15:5 | Masumu ma yo mazali kolobisa yo maloba mana, okomi kolanda monoko mwa bato ba lokuta. | |
Job | LinVB | 15:9 | Makambo nini oyebi, maye biso toyebi te ? Eloko nini oyoki malamu mpe biso toyoki yango te ? | |
Job | LinVB | 15:10 | O ntei ya biso babange na nsuki mpembe bazali, basusu mpe baleki tata wa yo na mibu. | |
Job | LinVB | 15:11 | Otii motema te na mabondi Nzambe azali kobondo yo, mpe na maloba ma biso ma boboto ? | |
Job | LinVB | 15:14 | Boniboni moto akoki komimono ’te azali peto ? Eloko ebotami na mwasi ezali nde na bosembo ? | |
Job | LinVB | 15:15 | Nzambe atii ntembe ata na basantu ba ye, mpe o miso ma ye banzelu bazangi mbindo te. | |
Job | LinVB | 15:16 | Bongo mbindo ezanga na moto mpamba, oyo abeba, awa ameseni kosala masumu lokola akomeleke mai ? | |
Job | LinVB | 15:21 | na matoi ma ye azali koyoka bobele makambo ma nsomo, soko afandi na boboto mobebisi azali kokanela ye. | |
Job | LinVB | 15:26 | Akitisi motó, akei mbangu mpo ya kobete Nzambe, amibombi o nsima ya nguba ya ye enene. | |
Job | LinVB | 15:28 | Akei kofanda o mboka ebebi na bitumba mpe o ndako ikoki kobatela ye lisusu te, iye ibandi kokweya mpe kobukana. | |
Job | LinVB | 15:29 | Akokolisa nkita ya ye te, mosolo mwa ye mokoumela soki te, akomeme nkita ya ye o mboka ya bawa te. | |
Job | LinVB | 15:30 | Akoki kokima mboka ya molili te, móto mokokaukisa ye lokola bitapi bya nzete, akokima ata mpema ya monoko mwa ye moko. | |
Job | LinVB | 15:31 | Soko akanisi ’te akobika mpo ya lokuta la ye, amikosi, zambi bakozongisela ye mpe makambo ma lokuta. | |
Job | LinVB | 15:32 | Akosuka, naino mikolo mya ye mikoki te, mpe bitapi bya nzete ya ye bikokola lisusu te. | |
Job | LinVB | 15:33 | Azali lokola nzete ya vino ekweisi mbuma ibesu, mpe lokola nzete ya oliva ekweisi fulele noki. | |