Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOB
Prev Up Next
Chapter 16
Job LinVB 16:2  Nasili koyoka maloba maye, bozali na mawa solo, bino bato bolingi kobondo ngai !
Job LinVB 16:3  Bolobi : « Maloba maye mazangi ntina mazali nde na nsuka te ? Eloko nini etindi yo koyanola lisusu ? »
Job LinVB 16:4  Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soko bozalaki o esika ya ngai ; mbele nabimiseli bino maloba elengi, mpe naningisi motó mpo ya bino.
Job LinVB 16:5  Mbele nabondi bino na maloba ma ngai, mpe nasilisi mawa ma bino.
Job LinVB 16:6  Ata nazali koloba, mpasi ya ngai ekosila te, ata nazali kokanga monoko, mpasi ekotika ngai mpe te.
Job LinVB 16:7  Kasi sikawa, Nzambe alembisi ngai, nasuki, zambi bato ebele bakomi kozinga ngai.
Job LinVB 16:8  Moto afundi ngai akomi nzeneneke wa ngai, atelemi mpe afundi ngai polele.
Job LinVB 16:9  Nkanda ya ye elandi mpe enyokoli ngai ; o miso ma ngai akomi kolia mino. Banguna ba ngai batali ngai swii,
Job LinVB 16:10  bafungoli monoko mpo ’te bakanela ngai, mafinga mabe ma bango mabeti ngai lokola mbata, banso bayokani ’te bakobundisa ngai.
Job LinVB 16:11  Nzambe akabi ngai o maboko ma bato bazangi bosembo, abwaki ngai o maboko ma bato babe.
Job LinVB 16:12  Nafandaki nye, kasi ye ayei kotungisa ngai mpe kokanga ngai mpo abuka ngai nkingo, apiki ngai mpo ’te banguna babetele ngai mimbai.
Job LinVB 16:13  Bato ba ye ba matimbo bazingi ngai, batuboli ngai, mawa te, mpe basopi misopo mya ngai o nse.
Job LinVB 16:14  Azokisi ngai mpota epai na epai, abimeli ngai lokola mobundi.
Job LinVB 16:15  Nazipi nzoto na ngoto, mpe nakitisi motó kin’o mabelé.
Job LinVB 16:16  Miso ma ngai mateli na boleli, mpe molili mozipi ngai elongi.
Job LinVB 16:17  Nzokande naboyaki makambo makasi makasi, mpe nasambelaki na motema peto.
Job LinVB 16:18  E mabelé, omele makila ma ngai te, boleli bwa ngai bozwa ntango ya kopema te.
Job LinVB 16:19  Banda lelo nazwi molobeli o likolo, oyo akobatela ngai azali kuna o likolo.
Job LinVB 16:20  Baninga ba ngai bazali koseke ngai, kasi ngai nakolelela se Nzambe.
Job LinVB 16:21  Ye moko abikisa bato baye bakosamba na Nzambe, se lokola moto akobikisaka moninga wa ye.
Job LinVB 16:22  Nzokande basili batangi mikolo mya ngai, nazali kokende nzela eye bakozongaka te.